Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 44
  • Rahaba abombi banɔngi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Rahaba abombi banɔngi
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Rahaba andimelaki Yehova
    Teyá bana na yo
  • Laaba ayokaki nsango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Rahaba abombaki banɔngi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Atángamaki moyengebene mpo na misala na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 44

Lisolo 44

Rahaba abombi banɔngi

BATO oyo bozali komona awa bazali na likama. Basengeli kokima, noki báboma bango. Bato yango bazali banɔngi, bazali Bayisraele; mpe mwasi oyo azali kobomba bango ezali Rahaba. Ndako na ye ezali na likoló ya lopango ya Yeriko. Tótala mpo na nini bato oyo bazali na likama.

Bayisraele bakómi pene na kokatisa Ebale Yordani mpo bákɔta na mokili ya Kanana. Kasi liboso ya kokatisa, Yosua atindi banɔngi mibale mpe alobi na bango ete: ‘Bókende, bótalatala mokili mpe engumba Yeriko.’

Ntango bakómi na Yeriko, bakei na ndako ya Rahaba. Bongo bato bayebisi mokonzi ya Yeriko ete: ‘Mibali mibale ya Yisraele bakɔti awa kaka na butu oyo mpo na kotalatala mokili.’ Ntango mokonzi ya Yeriko ayoki yango, atindi bato epai ya Rahaba mpe balobi na ye ete: ‘Bimisá mibali oyo bayei na ndako na yo.’ Kasi Rahaba abombaki bango na plafɔ. Bongo azongiseli bango ete: ‘Mibali moko boye bayaki epai na ngai, kasi nayebaki te epai bango bauti. Mpe ntango molili ebandi kokɔta, liboso bákanga porte ya mboka, babimi bakei. Soki bosali noki, bokokanga bango.’ Bongo bato yango babimi mpe balandi bango.

Ntango bato yango bakei, Rahaba amati na plafɔ nokinoki mpe alobi na banɔngi yango ete: ‘Nayebi ete Yehova akopesa bino mokili oyo. Toyokaki ndenge oyo Yehova akaukisaki Mbu Motane ntango bobimaki na Ezipito, mpe ndenge bobomaki bakonzi mibale, Sihone ná Oge. Ngai nasaleli bino boboto; bino mpe bólaka ngai ete bokosalela ngai boboto. Bóbikisa tata na ngai ná mama na ngai, ná bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi.’

Banɔngi yango balakaki ete bakosala ndenge alobi, kasi Rahaba asengeli kotosa mitindo bapesi ye, mpe bayebisi ye ete: ‘Kangá nsinga ya motane oyo na lininisa na yo, mpe sangisá libota na yo mobimba na ndako na yo. Mpe ntango tokozonga kozwa Yeriko, tokomona nsinga oyo mpe tokobikisa bato oyo bakozala na ndako na yo.’ Ntango banɔngi yango bakómi epai ya Yosua, bayebisi ye ndenge makambo nyonso elekaki.

Yosua 2:1-24; Baebre 11:31.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto