Lisolo 45
Bakatisi ebale Yordani
TALÁ Bayisraele bazali kokatisa Ebale Yordani. Kasi, mai ekei wapi? Na mikolo yango, mbula ezalaki konɔka mingi, mpe liboso bákatisa, mai ya ebale yango etondaki tii na libongo. Kasi sikoyo mai yango nyonso elimwe. Bayisraele bango wana bazali koleka na mabele oyo esili kokauka, kaka ndenge balekaki na Mbu Motane. Mai yango nyonso eleki wapi? Tótala ndenge esalemaki.
Ntango mokolo ya kokatisa Ebale Yordani ekoki, Yehova atindi Yosua ayebisa Bayisraele ete: ‘Banganga-nzambe basengeli kozwa sanduku ya kondimana mpe koleka liboso na biso. Ntango bakotya makolo na bango na mai ya Ebale Yordani, mai ekotika kotiyola.’
Bongo banganga-nzambe bazwi sanduku ya kondimana mpe batamboli liboso ya bato. Ntango banganga-nzambe yango bakómi na Ebale Yordani, bakɔti mbala moko na mai. Mai ezali kotiyola makasi mpe ebale ezali mozindo. Kasi, ntango kaka makolo na bango enyati mai, mai ya Yordani ebandi kotɛlɛma. Yango ezali mpenza likamwisi! Yehova atɛlɛmisi mai oyo ezali kouta likoló, ekómi lokola efelo. Mosika te ebale ekauki.
Banganga-nzambe oyo bamemi sanduku ya kondimana batɛlɛmi na katikati ya ebale, mai esili kokauka. Bozali komona bango na elilingi? Batɛlɛmaki wana, bazali koningana te, kino Bayisraele nyonso bakatisaki Ebale Yordani na mabele oyo ekauki.
Ntango bato nyonso basilisi kokatisa, Yehova asɛngi Yosua aloba na mibali zomi na mibale ya nguya ete: ‘Bókende na kati ya mai na esika oyo banganga-nzambe oyo bamemi sanduku ya kondimana batɛlɛmi. Bózwa mabanga zomi na mibale mpe bótya yango na esika oyo bokolala na butu ya lelo. Bongo na mikolo ekoya, soki bana na bino batuni bino ete, mabanga oyo ezali na ntina nini? Bokoyebisa bango ete mai ya Yordani etikaki kotiyola ntango sanduku ya kondimana ya Yehova ekatisaki Yordani. Mabanga oyo ekokundwela bino likamwisi yango.’ Yosua mpe atɛlɛmisi mabanga zomi na mibale na esika oyo banganga-nzambe batɛlɛmaki na kati ya ebale.
Na nsima, Yosua ayebisi banganga-nzambe oyo bamemi sanduku ya kondimana ete bábima na Yordani. Ntango kaka babimi, mai ya ebale ebandi lisusu kotiyola.