Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/9 nk. 30-31
  • Lokoso ebebisaki Gehazi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lokoso ebebisaki Gehazi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Kobika ya Naamane
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Azalaki na mposa ya kosalisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Na ebandeli amonisaki motó makasi, kasi nsukansuka atosaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Limpinga ya baanzelu ya Yehova
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/9 nk. 30-31

Teyá bana na yo

Biblia efungwami
Lokoso ebebisaki Gehazi

Mwana moko alingi kaka mama na ye asombela ye ordinatɛrɛ

ESÍ ekómela yo oyoka mposa makasi ya eloko moko boye?—a Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Kasi, osengeli nde kokosa mpo na kozwa eloko oyo olingi?— Te, osengeli kosala bongo te. Moto oyo asalaka bongo azali lokoso. Tótala naino ndenge lokoso ebebisaki mobali moko na nkombo Gehazi. Azalaki mosaleli ya Elisha, mosakoli ya Yehova, Nzambe ya solo.

Elisha ná Gehazi bazalaki na bomoi bambula soki nkóto moko liboso Yesu, Mwana ya Nzambe, abotama awa na mabele. Yehova asalelaki Elisha mpo na kosala makambo ya kokamwa​—kosala makamwisi! Na ndakisa, Biblia elobeli mobali moko oyo azalaki mokonzi monene ya basoda ya Siri, oyo azalaki na maladi mabe ya maba. Moto moko te akokaki kobikisa ye, kasi Elisha abikisaki ye.

Elisha aboyi kozwa makabo oyo Naamane alingi kopesa ye

Ntango Nzambe asalelaki ye mpo na kobikisa bato, Elisha azalaki kosɛnga mbongo te. Oyebi mpo na nini?— Mpo Elisha ayebaki ete Yehova nde azalaki kosala makamwisi yango, kasi ye te. Ntango Naamane abikisamaki, asepelaki mingi mpe alingaki kopesa Elisha makabo ya wolo, palata, mpe ya bilamba kitoko. Elisha aboyaki kozwa ata eloko moko, kasi Gehazi azalaki mpenza na mposa ya kozwa makabo yango.

Ntango Naamane akendaki, Gehazi alandaki ye kozanga koyebisa Elisha. Ntango amonaki Naamane, oyebi likambo nini Gehazi ayebisaki ye?— ‘Elisha atindi ngai nayebisa yo ete kaka sikoyo bapaya mibale bayei epai na ye. Alobi opesa ye bilamba mibale mpo apesa bango.’

Gehazi azali kokosa Naamane

Kasi, yango ezalaki lokuta! Likambo oyo Gehazi alobaki ya bapaya mibale ezalaki solo te. Alobaki bongo mpo alingaki kozwa bilamba oyo Naamane alingaki kopesa Elisha. Naamane mpe ayebaki te ete Gehazi akosaki ye. Yango wana, asepelaki mpe apesaki Gehazi makabo yango. Kutu, Naamane apesaki Gehazi biloko mingi koleka oyo asɛngaki. Oyebi likambo nini esalemaki na nsima?—

Ntango Gehazi azongaki na ndako, Elisha atunaki ye boye: ‘Outi wapi?’

Gehazi ayanolaki ete: ‘Epai te.’ Nzokande, Yehova amonisaki Elisha likambo oyo Gehazi asalaki. Yango wana, Elisha alobaki boye: ‘Oyo ezali te ntango ya kondima mbongo to bilamba!’

Gehazi azwi maladi ya maba

Gehazi azwaki mbongo mpe bilamba oyo ezalaki ya ye te. Yango wana, Nzambe apesaki Gehazi maba oyo ezalaki epai ya Naamane. Okanisi ete tokoki kozwa liteya nini na likambo yango?— Liteya oyo tokoki kozwa ezali ete tosengeli te kokosa to koloba makambo oyo ezali solo te.

Mpo na nini Gehazi alobaki likambo oyo ezalaki solo te?— Ezalaki mpo Gehazi azalaki lokoso. Alingaki kozwa eloko oyo ezali ya ye te, mpe amonaki ete esengeli abuka lokuta mpo na kozwa yango. Mpo na yango, azwaki maladi moko ya mabe bomoi na ye mobimba.

Na ntembe te, Gehazi anyokwamaki mpo na likambo mosusu oyo eleki kutu maladi ya maba. Oyebi soki ezalaki nini?— Abebisaki boninga na ye ná Nzambe; Nzambe azalaki kolinga ye lisusu te. Tiká ete tósala ata eloko moko te oyo ekosala ete likambo ya ndenge wana ekómela biso! Kasi, tózala nde na boboto mpe tókabolaka ná basusu biloko oyo tozali na yango.

Tángá na Biblia na yo

  • 2 Bakonzi 5:5, 20-27; Yuda 21

  • Yoane 15:10

a Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto