Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 87
  • Elenge Yesu na kati ya Tempelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elenge Yesu na kati ya Tempelo
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Elenge Yesu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Libota ya Yesu basali mobembo na Yerusaleme
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu ayekolaki kotosa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 87

Lisolo 87

Elenge Yesu na kati ya Tempelo

ELILINGI oyo elakisi bino elenge mobali moko azali kosolola na mikóló. Mikóló yango nde bateyi na tempelo ya Nzambe na Yerusaleme. Mpe elenge mobali yango ezali Yesu. Akoli mwa moke. Sikoyo azali na mbula zomi na mibale.

Bateyi yango bakamwe makasi ete Yesu ayebi makambo ya Nzambe mingi, ayebi mpe Biblia. Kasi mpo na nini Maria ná Yozefe bazali elongo na ye te? Bango bazali wapi? Likambo nini esalami?

Mbula na mbula, Yozefe ayaka na libota na ye na Yerusaleme na fɛti ya Elekeli. Nazarete ná Yerusaleme ezali mosika. Na ntango wana mituka to bingbunduka ezalaki te. Bato mingi bazalaki kotambola na makolo. Bazalaki kosala mikolo soki misato longwa na Nazarete tii Yerusaleme.

Yozefe akómaki na bana mingi, baleki ya Yesu, basi ná mibali, oyo esengelaki kobatela bango. Na mbula wana, Maria ná Yozefe bazalaki kozonga na Nazarete elongo na bana na bango. Bakanisi ete Yesu azali na bato mosusu oyo bazali kozonga na bango. Kasi, ntango batɛlɛmi na mpokwa, bamoni Yesu te. Baluki ye epai ya bandeko mpe baninga na bango, kasi bazwi ye te. Bongo bazongi koluka ye na Yerusaleme.

Nsukansuka, bakuti Yesu na tempelo, na katikati ya bateyi. Azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna. Bato nyonso bazali kokamwa na bwanya na ye. Bongo Maria alobi na ye ete: ‘Mwana, osali biso boye mpo na nini? Ngai ná tata na yo tomoni mpasi na koluka yo.’

Yesu azongisi ete: ‘Mpo na nini bóluka ngai? Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?’

Yesu alingi mpenza kozala na esika oyo akoki koyekola makambo ya Nzambe. Biso mpe tosengeli kosalaka bongo. Na Nazarete, Yesu azalaki kokende na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosambela. Lokola azalaki ntango nyonso koyoka na likebi mingi, ayekolaki makambo ya Biblia mingi mpenza. Tiká tólanda ndakisa ya Yesu.

Luka 2:41-52; Matai 13:53-56.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto