Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 10 lok. 28-lok. 29 par. 7
  • Libota ya Yesu basali mobembo na Yerusaleme

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libota ya Yesu basali mobembo na Yerusaleme
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Mibembo na Yelusaleme
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Elenge Yesu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Elenge Yesu na kati ya Tempelo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Yesu ayekolaki kotosa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 10 lok. 28-lok. 29 par. 7
Yesu, azali na mbula 12 na tempelo, azali kotuna bateyi mituna

MOKAPO 10

Libota ya Yesu basali mobembo na Yerusaleme

LUKA 2:40-52

  • YESU AKÓMI NA MBULA 12 MPE AZALI KOTUNA BATEYI MITUNA

  • YESU ABENGI YEHOVA “TATA NA NGAI”

Tozali na eleko ya prɛnta. Sikoyo ntango ekoki mpo Yozefe ná libota na ye, elongo na baninga mpe bandeko na bango, básala mobembo oyo basalaka mbula nyonso na Yerusaleme. Bakei kosala fɛti ya Elekeli, kaka ndenge Mibeko elobaki. (Kolimbola Mibeko 16:16) Kolongwa na Nazarete tii Yerusaleme ezali mobembo ya ntaka ya kilomɛtrɛ soki 120. Mobembo yango ezali kosɛnga makambo mingi kasi ezalaki ntango moko ya esengo mpo na moto nyonso. Yesu azali na mbula 12 mpe azali kozela na motema likoló fɛti wana ya ntina mingi mpe libaku ya kozala lisusu na tempelo.

Mpo na Yesu mpe libota na bango, fɛti ya Elekeli ezali kaka molulu ya mokolo moko te. Mokolo oyo elandi mokolo ya Elekeli, ezali mokolo ya ebandeli ya fɛti ya bagato ezangi levire, fɛti oyo ezalaki koumela mikolo nsambo. (Marko 14:1) Ezalaki mpe kotalelama lokola eleko ya Elekeli. Kosala mobembo kobanda na mboka na bango Nazarete, kofanda na Yerusaleme, mpe kozonga lisusu Nazarete, ezalaki kozwa pɔsɔ soki mibale. Kasi, mobembo ya mbala oyo eumeli lisusu mingi mpo likambo moko ekómeli Yesu. Likambo yango esalemi ntango bauti na Yerusaleme bazali kozonga epai na bango.

MOBEMBO MOKO YA ESENGO

Yesu ná libota na bango bazali kosala mobembo na Yerusaleme

Kokende Yerusaleme mpo na bafɛti misato oyo ezalaki kosalema mbula nyonso, ezalaki likambo ya esengo mpo na moto nyonso. (Kolimbola Mibeko 16:15) Ntango bazalaki kosala mobembo yango, Yesu azalaki komona bisika ndenge na ndenge ya ekólo, koyekola ndenge bamboka na yango ezalaki mpe azalaki kokutana na basambeli mosusu ya Yehova oyo bazalaki kouta bisika ndenge na ndenge. Ezalaki mpenza mobembo moko ya esengo!

Ntango bazali kosala mobembo, Yozefe ná Maria bakanisi ete Yesu mpe azali elongo na bandeko na bango mosusu mpe baninga oyo bazali kosala mobembo elongo na bango. Kasi, ntango bakómi na butu, bamoni ye te. Baluki ye na kati ya bandeko na bango, kasi azali te. Mwana yango azali komonana te! Yozefe ná Maria bazongi na Yerusaleme mpo na koluka ye.

Baluki ye mokolo mobimba kasi bamoni ye te. Mokolo ya mibale, bamoni ye kaka te. Mokolo ya misato, bamoni ye na tempelo na kati ya eteni ya ndako moko. Bakuti ye afandi na kati ya balakisi ya Bayuda. Azali koyoka, kotuna mituna mpe bazali kokamwa mpo na bososoli na ye.

Yozefe ná Maria bamoni Yesu

Maria atuni ye boye: “Mwana, osali biso boye mpo na nini? Ngai ná tata na yo totamboli motó mpo na koluka yo.”​—Luka 2:48.

Yesu akamwe ndenge bayebaki te esika azali. Atuni mama na ye ete: “Mpo na nini bóluka ngai? Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?”​—Luka 2:49.

Sikoyo bakutani, mpe Yesu azongi elongo na Yozefe ná Maria mpe akobi kotosa bango. Yesu azali kokola na mayele mpe na nzoto. Banda bomwana na ye, Yesu azali kondimama epai ya Nzambe mpe bato. Ya solo, kobanda bomwana na ye tii ntango akómi mokóló, Yesu atiki ndakisa malamu na likambo etali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso mpe kotosa baboti.

  • Mobembo nini Yesu ná libota na bango bazalaki kosala na eleko ya prɛnta, mpe mpo na nini?

  • Ntango Yesu akokisi mbula 12, likambo nini esalemi wana Yozefe ná Maria bazali kolongwa Yerusaleme, mpe bayei komona Yesu wapi?

  • Ndakisa nini ya malamu Yesu apesi bilenge lelo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto