Basalaki Mokano ya Yehova
Ntoma Paulo alongi mikakatano
NTOMA Paulo akutani na likama moko oyo ayebi te soki akobika. Ye na bato mosusu 275 bazali na kati ya masuwa moko oyo ekutani na Yulakulu (Euraquilon), elingi koloba mopɛpɛ oyo eleki makasi na mai monene ya Méditerranée. Mopɛpɛ eleki makasi na boye ete ata mwɛsɛ ekoki komonana te na moi, mpe na butu minzoto ezali komonana mpe te. Na ntembe te, bato oyo bazali na kati ya masuwa bazali kobanga ete bakokufa. Kasi mpo na kobɔndisa bango, ntoma Paulo ayebisi bango makambo oyo Nzambe amonisaki ye na ndɔtɔ ete: “Bomoi na moto moko kati na bino ekobeba te, bobele masuwa makokufa.”—Misala 27:14, 20-22.
Na butu ya mokolo ya 14 ya mopɛpɛ makasi, basali na masuwa bamoni likambo moko oyo ebangisi bato—mai ezali na bozindo soko ya mabɔkɔ 20.a Ntango bapusani lisusu moke, bameki lisusu bozindo. Mbala oyo, bozindo ezalaki ya mabɔkɔ 15. Libongo ezali lisusu mosika te! Likambo malamu yango ememi motungisi mosusu. Lokola masuwa ezali kokenda epai na epai na butu na esika oyo ezali mpenza mozindo te, ekoki kotutana na mabanga mpe kopanzana. Basali na masuwa basali likambo moko ya mayele, babwaki longo. Bamoko na bango balingi kokitisa bwato ya moke (canot) mpo bámata mpe bákima.b Kasi ntoma Paulo apekisi bango. Ayebisi mokonzi ya basoda mpe basoda ete: “Soko baoyo bakotikala kati na masuwa te, bino bokokoka kobika te.” Mokonzi ya basoda ayokeli ntoma Paulo, mpe bango nyonso bato 276 bazali kozela na motema likoló ntɔngɔ etana.—Misala 27:27-32.
Masuwa ezindi
Ntango ntɔngɔ etani, bato oyo bazali na kati ya masuwa bamoni libongo moko ezali na zelo. Lokola elikya ezongi, basali na masuwa balongoli longo mpe bamatisi elamba na liboso ya masuwa mpo na kokanga mopɛpɛ. Masuwa ebandi kopusana na libongo—na ntembe te bazali konganga na esengo.—Misala 27:39, 40.
Mbala moko, masuwa ekangami na zelo. Likambo ya nsɔmɔ, mopɛpɛ makasi ebandi kobɛta masuwa na nsima mpe epanzi yango bitenibiteni. Bato nyonso basengeli kosundola masuwa! (Misala 27:41) Kasi likambo mosusu ebimi. Bato mingi oyo bazali na masuwa wana, bakisa mpe ntoma Paulo, bazali bakangami. Na mobeko ya Baloma, mokɛngɛli oyo akimisi mokangami asengeli kozwa etumbu oyo esengelaki kopesama na mokangami yango. Na ndakisa, soki moto oyo abomaki moto akimi, bakoboma mokɛngɛli mpo ete azalaki na ekɛngɛ te.
Lokola babangi noki makambo ya ndenge yango ekómela bango, basoda bazwi ekateli ya koboma bakangami nyonso. Kasi, mokonzi ya basoda oyo azalaki na boboto epai na ntoma Paulo, apekisi. Apesi etinda na moto nyonso oyo akoki kobɛta mai ete abɛta mpo na kobima na mokili. Baoyo bakoki te, bamati likoló ya mabaya to likoló ya biloko mosusu oyo ezalaki na masuwa. Bato oyo bauti na masuwa oyo ezali kozinda, bazali kokóma na libongo mokomoko. Ndenge Paulo alobaki, ata moto moko akufaki te!—Misala 27:42-44.
Ekamwiseli na Melita
Bato yango balɛmbi, babiki ndenge bakómi na esanga moko na nkombo Melita. Bato ya esanga yango bazali “bato ya lokota ya bapaya,” elingi koloba “barbare” (na Greke, barbaros).c Kasi bato ya Melita bazali bato ya mobulu te. Kutu, Luka, moninga ya mosala ya ntoma Paulo alobi ete “bamonisi biso boboto mpenza. [Bapelisi] mɔ́tɔ, mpe [bayambi] biso nyonso mpo na mbula makasi, na malili.” Ntoma Paulo alandi bato yango mpo na kolɔkɔta nkoni mpe kopelisa mɔ́tɔ.—Misala 28:1-3, NW, maloba na nse ya lokasa.
Mbala moko, etupa ebimaki mbangu mpe ekangami ntoma Paulo na lobɔkɔ! Bato ya esanga balobi ete ntoma Paulo asengeli kozala mobomi bato. Bazalaki kokanisa mpenza ete Nzambe apesaka bato ya masumu etumbu na konyokoláká enama ya nzoto oyo basalelaki mpo na lisumu yango. Kasi, bato ya mboka bakamwe ntango ntoma Paulo aningisi lobɔkɔ mpe etupa ekwei na kati ya mɔ́tɔ. Luka, oyo amonaki makambo yango alobi ete, “bakanisaki ete [Paulo] akovimba to akokwea mbala moko bongo akufa.” Bato yango babongoli makanisi mpe balobaki ete ntoma Paulo azali nzambe.—Misala 28:3-6, NW.
Ntoma Paulo afandaki nsanza misato na Melita, abikisi tata ya Pubili, mokonzi ya esanga, oyo ayambaki ntoma Paulo malamu, abikisi mpe bato mosusu oyo bazalaki na maladi. Lisusu, ntoma Paulo ateyaki solo, oyo epesaki bato ya esanga wana mapamboli mingi, bango bazalaki bayambi ya bapaya.—Misala 28:7-11.
Liteya mpo na biso
Ntoma Paulo akutanaki na mikakatano mingi na boumeli ya mosala na ye. (2 Bakolinti 11:23-27) Na lisolo oyo touti kolobela, azalaki mokangami mpo na nsango malamu. Na nsima, akutanaki na makama ya mbalakaka: mopɛpɛ makasi mpe masuwa ezindaki. Na nyonso wana, ntoma Paulo abatelaki ekateli na ye ya kozala mosakoli ya molende ya nsango malamu. Na makambo oyo akutanaki na yango, akomaki ete: ‘Nayebi kozala na bobola, nayebi mpe kozala mozwi. Na likambo na likambo, ɛɛ, na makambo nyonso nalakisami nzela ya kotonda mpe koyoka nzala, kozala na biloko mingi mpe kozanga. Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.’—Bafilipi 4:12, 13.
Tótika te ete mikakatano ya bomoi elɛmbisa ekateli na biso ya kozala basaleli ya molende ya Nzambe ya solo! Ntango mokakatano ya mbalakaka ekómeli biso, tókitisa mokumba na biso epai ya Yehova. (Nzembo 55:22) Na nsima, tózela na motema pɛtɛɛ mpo na komona ndenge oyo Yehova akosala ete tókangela yango motema. Na ntango yango, tókoba kosalela ye na bosembo, tóyeba ete azali kobatela biso. (1 Bakolinti 10:13; 1 Petelo 5:7) Soki totii molende, oyo ekoya eya, lokola ntoma Paulo, biso mpe tokoki kolonga mikakatano.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Awa lobɔkɔ moko to brasse na Lifalanse ekokani na mapeko (coudée) minei, to matambe motoba [mɛtɛlɛ 1,8].
b Canot ezalaki bwato moke oyo bazalaki kosalela mpo na kobima na mokili soki babwaki longo mpe masuwa etɛlɛmi pembeni ya libongo. Emonani polele ete, basali na masuwa balingaki komibikisa kozanga kokanisa bomoi ya baoyo balingaki kotikala na nsima, baoyo bayebi makambo ya masuwa te.
c Wilfred Funk alobi kati na buku na ye (Word Origins) ete: “Bagreke bazalaki kotyola minɔkɔ ya bato mosusu, mpe bazalaki koloba ete minɔkɔ yango ezalaki koyokana lokola ‘bar-bar’ mpe moto nyonso oyo azalaki koloba yango bazalaki kobénga ye barbaros.”