Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/07 nk. 13-15
  • Masuwa ya Galilai—Eloko ya motuya ya ntango ya kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masuwa ya Galilai—Eloko ya motuya ya ntango ya kala
  • Lamuká!—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Emonanaki mpo mai ekitaki mingi
  • Babomi-mbisi na Mbu ya Galilai
  • Mosala ya kobimisa masuwa yango
  • Na Mbu ya Galilai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Likama na mobembo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Bomoi na ntango ya kala—Baluki-mbisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yesu akoki kobatela biso
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Makambo mosusu
Lamuká!—2007
g 1/07 nk. 13-15

Masuwa ya Galilai​—Eloko ya motuya ya ntango ya kala

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA ISRAËL

NTANGO Yesu azalaki awa na mabelé, asalaki makambo mingi pembeni to mpe na kati ya Mbu ya Galilai; na ndakisa atambolaki likoló ya mai na yango, apekisaki mopɛpɛ makasi, aleisaki bankóto ya bato, mpe abikisaki bato ya maladi.

Na 1986, bakundolaki eloko moko na mai yango, pembeni ya Kapalanauma ya kala. Eloko yango ezalaki masuwa oyo etambolaki na mbu yango na ntango ya Yesu. Ndenge nini bamonaki yango? Masuwa yango ekoki kosalisa biso tóyeba makambo nini?

Emonanaki mpo mai ekitaki mingi

Liboso ya mobu 1985, mbula ezalaki konɔka mingi te mpe na 1985, na eleko ya molunge, moi ezalaki makasi mpenza na boye ete mai ya mbu ekitaki; longola yango basali-bilanga bazalaki kobenda mai ya mbu mpo na kosopa na bilanga na bango. Yango esalaki ete mai ya mbu ekita makasi mpe bisika mingi oyo kala ezalaki na nse ya mai ekómaki komonana. Mibali mibale, yaya ná leki, oyo bafandaka pembeni wana na esika moko oyo babɔkɔlaka banyama mpe basalaka bilanga (kibboutz), bamonaki ete lokola mai ekiti, ezali libaku malamu ya koluka biloko ya motuya na nse ya mabelé. Ntango bazalaki kotambola na bisika yango oyo liboso ezalaki na nse ya mai, bamonaki misolo ya bibende mpe bansɛtɛ ya kala. Na nsima, bamonaki sɛrklɛ moko na mabelé yango; ezalaki esika oyo masuwa wana ya kala ekundamaki. Bamonaki mpenza eloko moko ya motuya!

Bato ya arkeoloji bazalaki kondima te ete na Mbu ya Galilai, bakoki kokundola masuwa moko oyo eumeli mbula 2 000. Mpo na bango mabaya na yango nyonso esilá kobeba mpe kopanzana. Kasi, ntango batalelaki masuwa yango malamu mpe batalelaki mbongo ya bibende oyo bamonaki na esika oyo masuwa ekundamaki, bamonaki ete masuwa yango ekokaki kozala ya siɛklɛ ya liboso, liboso ya ntango na biso (L.T.B.) to ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso (T.B.). Likambo ya kokamwa, nse ya masuwa yango epanzanaki te. Ndenge nini?

Emonani ete batikaki masuwa yango na esika oyo mbonge ezalaki kobɛta mingi te; yango esalaki ete nse ya masuwa yango ezinda na mabelé ya pɛtɛɛ. Na nsima, mabelé yango ekómaki makasi. Ezali na ndenge yango nde masuwa wana ya kala ebatelamaki na boumeli ya bambula soki 2 000.

Ntango nsango ya masuwa yango oyo bakundolaki epalanganaki, bato bakómaki kobenga yango masuwa ya Yesu. Ya solo, moto moko te alobaki mpenza ete Yesu ná bayekoli na ye basalelaki masuwa yango. Kasi, bambula oyo masuwa yango eumeli mpe bokokani oyo ezali kati na yango mpe bamasuwa oyo baevanzile elobeli, ezali kobenda likebi ya bato ya mayele na masolo ya kala mpe ya bato oyo balimbolaka Biblia.

Masuwa yango ezali na molai ya mɛtrɛ koleka mwambe, mpe bonene ya mɛtrɛ koleka mibale. Moto oyo asalaki yango, abandaki mbala moko na kotonga nse ya masuwa, elingi koloba akangisaki banzete mbala moko na nse ya masuwa mpe na nsima asalaki mipanzi na yango. Bazalaki kosalela mayele wana ya kotonga masuwa, mingimingi mpo na masuwa oyo esengelaki kotambolaka na Mbu ya Meditelane. Kasi, ekoki kozala ete masuwa wana ya Galilai ebongisamaki mpe mpo etambolaka na laki.

Emonani ete masuwa yango ezalaki liboso na elamba kaka moko oyo mopɛpɛ ebɛtaka mpo na kopusa yango. Lokola ezalaki na nkai minei, emonisi ete ezalaki na likoki ya komema bato koleka mitano, elingi koloba, bato minei mpo na kolúka mpe moto moko mpo na kotambwisa. Kasi, masuwa yango ezalaki na likoki ya komema bato zomi to mpe koleka. Yango ezali kosalisa biso tómona na makanisi, monene ya masuwa oyo bayekoli nsambo bamataki, ntango Yesu akutaki bango bazali koboma mbisi nsima ya lisekwa na ye.​—Yoane 21:2-8.

Emonani ete masuwa ya Galilai ezalaki na nkɔbɛ oyo likoló na yango bakokaki kobomba minyama ya minene. Na nse na yango ezalaki na esika oyo mobomi-mbisi oyo alɛmbi akokaki kopema. Ekoki kozala ete Yesu alalaki na esika moko ya bongo ntango mopɛpɛ moko ya makasi ezalaki kobɛta; Biblia elobi ete: “Azalaki na eteni ya nsima ya masuwa, alalaki likoló ya kuse.” (Malako 4:38) Bato mosusu ya mayele balobaka ete “kuse” yango ekokaki kozala saki ya zɛlo oyo bazalaki kosalela mpo masuwa etɛngatɛnga te.a

Babomi-mbisi na Mbu ya Galilai

Kanisá ete ozali na siɛklɛ ya liboso, na kati ya masuwa moko ya bongo mpe ozali kosala mobembo. Ntango masuwa ezali kotambola na Mbu ya Galilai okomona nini? Na ntembe te, okomona babomi-mbisi, basusu na masuwa ya mike mpe basusu bakiti na mai, bazali kobwaka minyama na bango. Ndenge oyo bazali kosimba na lobɔkɔ moko minyama ya kilo oyo ezali na molai ya mɛtrɛ 6 to 8 mpe bazali kobwaka yango na mai ya mbu ezali komonisa ete bamesaná mpenza na mosala na bango. Soki babwaki yango bongo, ezali kofungwama mpe kotandama likoló ya mai mpe ntango ezali kokita na nse ya mai, ezali kokanga mbisi ata liboso ezinda na nse ya mai. Na nsima, mobomi-mbisi akobenda monyama tii na libongo to akoki kotya yango na kati ya masuwa ná bambisi oyo ekangi. Biblia elobi ete Simona ná Andele bazalaki “kobwaka” minyama na bango; ekoki kozala ete babwakaki yango ndenge wana.​—Malako 1:16.

Okoki mpe komona etuluku moko ya babomi-mbisi bazali kosolola na esengo nyonso wana bazali kobongisa monyama ya monene. Monyama yango ekoki kozala na molai ya mɛtrɛ 300, soki bazindisi yango na mai ekoki kozinda tii na mɛtrɛ 8; ezalaka na bansinga na nsukansuka na yango mpo na kobenda yango. Soki babomi-mbisi baponi esika oyo bakokanga mbisi, bamosusu bakosimba nsuka mosusu ya monyama yango mpe bakozonga na yango na libongo. Na nsima, masuwa ekopusana na kati ya ebale, wana ezali kobenda monyama mpe kofungola yango mobimba; na nsima, masuwa ekobanda kobaluka mokemoke mpe monyama ekosala lokola mwa sɛrklɛ, mpe masuwa ekobaluka na ngámbo ya libongo. Na nsima, babomi-mbisi oyo bazalaki na kati ya masuwa bakobanda kozonga na libongo wana basimbi mpe nsuka mosusu ya monyama. Bituluku yango mibale ya babomi-mbisi bakobanda kopusana wana bazali kobenda monyama oyo etondi na mbisi.​—Matai 13:47, 48.

Na mosika okomona mobomi-mbisi moko azali kobwaka ndɔbɔ na mai. Mokolo moko Yesu ayebisaki Petelo abwaka ndɔbɔ na mbu yango. Kanisá ndenge Petelo akamwaki ntango afungolaki monɔkɔ ya mbisi oyo akangaki mbisi mpe amoni mbongo ya ebende​—mbongo oyo basengelaki na yango mpo na kofuta mpako.​—Matai 17:27.

Na butu mbu yango ekómi nyɛɛ. Kasi, na mbala moko okoyoka makɛlɛlɛ makasi ya babomi-mbisi, bazali kotuta makolo na masuwa mpe kobɛta bankai na bango makasi likoló ya mai. Mpo na nini? Batye minyama na bango na ebale, yango wana bazali kosala makɛlɛlɛ makasi mpo mbisi ebanga mpe eya komikɔtisa na minyama yango. Monyama yango oyo batɛlɛmisaka, emonanaka te mpo na molili ya butu; babongisaka yango na ndenge oyo mbisi ekoki komikɔtisa na kati kozanga nkaka mpe kokangama na kati. Na butu moko bakoki kobwaka minyama yango mbala mingi. Na ntɔngɔ basukolaka yango mpe batandaka yango mpo ekauka. Mbala mosusu okoki komituna ete ‘Ntango bantoma bakangaki mbisi na ndenge ya likamwisi na lisolo oyo ezali na Luka 5:1-7, basalelaki monyama yango?’

Mosala ya kobimisa masuwa yango

Tózongela sikoyo masuwa oyo bakundoli na ntango na biso. Esukaki ndenge nini? Atako masuwa yango epanzanaki te, yango nyonso ekómaki pɛtɛpɛtɛ lokola limpa ezindi na mai. Bamonaki ete ekozala malamu te bábimisa yango mbala moko na kati ya pɔtɔpɔtɔ. Elingaki mpenza kozala mabe soki masuwa yango oyo eumelaki bambula mingi na nse ya mai kozanga kopanzana, epanzanaki na ntango bazali koluka kobimisa yango. Batongaki barage mpo ete ntango mai ekozonga lisusu mingi na ebale, ekóma te na esika oyo masuwa yango ezalaki. Batimolaki na nse nse ya esika oyo masuwa yango ezalaki mpo na kokɔtisa eloko moko mpo na kotombola yango. Na nsima, balongolaki na ekɛngɛ nyonso pɔtɔpɔtɔ oyo ekangamaki na masuwa yango, mpe babwakaki na kati ya masuwa mpe na libándá na yango nkisi moko oyo ezali lokola fulufulu (polyuréthane) mpo ezipa yango mobimba.

Likambo oyo basengelaki kosala nsima ezalaki ya kolongola masuwa yango na esika oyo ezalaki mpo na komema yango na ekɛngɛ nyonso na ntaka ya mɛtrɛ 300 mpo na kosala mosala ya kobongisa yango mpo na kobatela yango. Nkisi oyo basopelaki masuwa yango ezalaki makasi; kasi, soki eningani makasi, mputulu nyonso ya mabaya oyo ezalaki na kati ekopanzana. Yango wana, bamonaki básalela mayele mosusu. Balongolaki barage oyo batyaki mpe batikaki ete mai ya ebale eya na esika wana. Mai yango etombolaki masuwa yango mpe mpo na mbala ya liboso, nsima ya bankama na bankama ya bambula, masuwa yango etɛpaki lisusu na mai ya Mbu ya Galilai.

Batongaki esika moko na simá mpo na kotya masuwa yango wana bazalaki kosala mosala ya kobongisa yango mpo ebatelama malamu; mosala yango eumelaki mbula 14. Mokakatano ebimaki ntango bangungi babwakaki maki na mai oyo ezalaki na esika yango mpe ekómaki mpasi mpo bato bákɔta na mai yango mpo na kosala mosala na masuwa. Kasi, basilisaki mokakatano yango na mayele moko; batyaki mbisi oyo babengi saint-pierre na mai yango mpe elyaki maki nyonso ya ngungi mpe mai ekómaki pɛto.

Sikoyo ekómaki ntango ya kokausa masuwa yango. Kasi, bakokaki kotika yango te ekauka yango moko. Ezalaki kosɛnga bábimisa mai oyo ekɔtaki na mabaya ya masuwa yango mpe bákɔtisa eloko mosusu na esika yango. Basalelaki mayele ya kobimisa mai oyo ekɔtaki na mabaya, mpe na esika na yango bakɔtisaki ndembo oyo ekoki kosangana na mai, yango esalaki ete mabaya ya masuwa ekauka kozanga kobeba.

Ntango mosala yango nyonso esilaki, bamonaki ndenge masuwa yango ezalaki; esalemaki na biteni mingi te. Basalaki yango na banzete lolenge 12. Mpo na nini? Ekoki kozala ete banzete ezalaki mingi te na ntango yango. To mpe ekoki kozala ete nkolo na yango azalaki na bozwi te. Abongisaki masuwa yango mbala mingi liboso asundola yango na mai ya mbu.

Ekoki kozala ete Yesu atikalá komata na masuwa yango te. Kasi, mpo na bato mingi yango ezali eloko ya motuya. Ezali kopesa biso libaku ya koyeba ndenge bomoi ezalaki na Mbu ya Galilai na ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye awa na mabelé.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisolo “Na Mbu ya Galilai,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2005, lokasa 8, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 15]

Bazali kolongola na ekɛngɛ nyonso pɔtɔpɔtɔ oyo ekangamaki na masuwa

[Elilingi na lokasa 15]

Bazali kotya yango nkisi moko oyo ezali lokola fulufulu

[Elilingi na lokasa 15]

Nsima ya mbula pene na 2 000, masuwa yango etɛpaki lisusu na mai

[Elilingi na lokasa 15]

Ekoki kozala ete masuwa yango ezalaki boye na siɛklɛ ya liboso

[Elilingi na lokasa 15]

Masuwa ya Galilai; basilisi mosala ya kobongisa yango

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

Bafɔtɔ nyonso longola modɛlɛ ya masuwa mpe mai ya mbu: Israel Antiquities Authority - The Yigal Allon Center, Ginosar

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto