Anivɛrsɛrɛ ya mbotama
Ndimbola: Kokanisa mokolo oyo moto abotamaki mpe mbala mosusu basalaka fɛti ya mbotama yango. Na bisika mosusu, na anivɛrsɛrɛ ya mbotama, mingimingi oyo ya mwana, basalaka fɛti mpe bato bapesanaka makabo. Kasi likambo yango euti na Biblia te.
Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli baanivɛrsɛrɛ ya mbotama elobeli yango na ndenge ya malamu? Biblia elobeli bafɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama kaka mibale:
Eba. 40:20-22: “Nzokande, mokolo ya misato ezalaki mokolo ya mbotama ya Farao, mpe asalaki fɛti . . . Na yango, azongisaki kapita ya bapesi-masanga na mosala na ye ya mopesi-masanga . . . Kasi akakisaki kapita ya basali-mampa.”
Mat. 14:6-10: “Ntango bazalaki kosepela mokolo ya mbotama ya Erode, mwana mwasi ya Erodiadi abinaki na mokolo yango mpe asepelisaki Erode mingi bongo alakaki mpe alapaki ndai ete akopesa ye eloko nyonso oyo akosɛnga. Bongo ye alobaki ndenge mama na ye atindaki ye ete: ‘Pesá ngai motó ya Yoane Mobatisi na saani, awa.’ . . . [Erode] atindaki bákata Yoane motó na bolɔkɔ.”
Makambo nyonso oyo ezali na Biblia ezali na ntina. (2 Tim. 3:16, 17) Batatoli ya Yehova bamoni ete Biblia elobeli bafɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama na ndenge ya malamu te, yango wana bango basalaka yango te.
Ndenge nini bakristo ya liboso mpe Bayuda ya ntango ya kala bazalaki kotatela bafɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama?
“Bakristo ya eleko wana bazalaki kosala fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama te.”—The History of the Christian Religion and Church, During the Three First Centuries (New York, 1848), Augustus Neander (ebongolami na Henry John Rose), lok. 190.
“Baebre na ntango ya kala bazalaki komona ete kosala fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama ezali losambo ya bikeko; makambo oyo bazalaki komona, oyo ezalaki kosalema mikolo wana nde etindaki bango bázala na likanisi wana.”—The Imperial Bible-Dictionary (Londres, 1874), ebimisami na Patrick Fairbairn, Vol. I, lok. 225.
Makambo oyo esalemaka na bafɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama eutá wapi?
“Makambo ndenge na ndenge oyo tomonaka lelo na bafɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama ebandá kala mpenza. Eutá na makambo ya maji mpe ya losambo. Na ntango ya kala, bato bazalaki kopesana longonya, kopesana makabo mpe kosala fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama—bazalaki kopelisa babuji—bazalaki kokanisa ete yango ekobatela nkolo fɛti yango mpo bademo básala ye mabe te, mpe ekobatela ye na mbula ya sika. . . . Tii na siɛklɛ ya minei, bakristo bazalaki koboya kosala bafɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama, bazalaki komona ete yango ezali momeseno ya bapakano.”—Schwäbische Zeitung (zulunalo oyo babakisi na Zeit und Welt), 3 mpe 4 Aprili 1981, lok. 4.
“Bagrɛki bazalaki kondima ete moto nyonso azali na elimo moko boye to daïmôn oyo ezalaka wana ntango moto yango abotami mpe ekɛngɛlaka moto yango bomoi na ye mobimba. Elimo yango ezalaka na boyokani moko boye na nzambe oyo anivɛrsɛrɛ ya mbotama na ye ekokani na mokolo oyo moto wana abotami. Baroma mpe bazalaki kondima likanisi yango. . . . Liteya yango ekolaki mpe ebimisaki likanisi ya anzelu-mobateli, nzambe-mwasi oyo azali na nguya ya kobatela mpe mosantu oyo abatelaka bato ya mosala. . . . Bagrɛki nde babandisaki momeseno ya kopelisa babuji likoló ya bagato. . . . Bagato oyo esalemá na mafuta ya nzoi ezalaki sɛrklɛ lokola sanza; likoló ya bagato yango bazalaki kopelisa babuji mpe kotya yango na bitumbelo ya tempelo ya [Artemisi]. . . . Bato bandimaka ete babuji oyo bapelisaka na anivɛrsɛrɛ ya mbotama ezalaka na nguya moko boye mpo na kopesa bato makambo oyo balingi. . . . Banda moto abandá kosalela banzambe na ye bitumbelo, akanisaka ete kopelisa babuji mpe kotumba mbeka ezalaka na nguya moko boye. Na yango, bato bakanisaka ete babuji oyo bapelisaka na mokolo ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama ya mwana epesaka ye lokumu mpe shanse. . . . Na bafɛti yango, kopesana mbote mpe kotombelana makambo ya malamu ezalaka na ntina mingi. . . . Likanisi yango euti na makambo ya maji. . . . Mbote oyo bapesaka moto na anivɛrsɛrɛ na ye ekoki komemela ye shanse to libabe, mpo na mokolo wana moto akómaka mpenza pene na mokili ya bilimo.”—The Lore of Birthdays (New York, 1952), Ralph mpe Adelin Linton, nk. 8, 18-20.
Ezali mabe te ete bato ya libota to baninga bákutana na ntango moko boye mpo na kolya, komɛla mpe kosepela
Mos. 3:12, 13: “Eloko oyo eleki malamu mpo na bango ezali te, longola kaka kosepela mpe kosala malamu na boumeli ya bomoi; mpe lisusu ete moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.”
Talá mpe 1 Bakorinti 10:31.