Mituna na batangi
Soki ba Témoins de Jéhovah bakumisaka bakundoli mokolo ya kobotama te, ezali mpo ete momeseno yango ezalaki na boyokani na losambo na ntango ya kala?
Kokumisa bokundoli mokolo ya kobotama euti na biyambayamba mpe na mangomba ya lokutá, nzokande yango ezali ntina bobele moko te to ntina ya moboko te oyo ba Témoins de Jéhovah bazali koboya kosala yango.
Na bisika mingi, mimeseno mosusu misilá kobungisa mitindo na yango ya kala ya losambo. Na ndakisa, momeseno ya kolata lopete ya libala ezalaki kala na ndimbola ya losambo, kasi lelo oyo ezali lisusu na ndimbola yango te na mikili mingi. Mpo na yango, mingi na baklisto ya solo bazali kolala lopete, esika momeseno yango ezali, mpo na komonisa ete basilá kobala. Kati na makambo motindo yango, mbala mingi likambo lileki ntina lizali ya koyeba soko momeseno boye mozali naino lelo na boyokani na losambo ya lokutá. Tala “Mituna na batangi” kati na Tour de Garde ya 15 juillet 1972 mpe Mosenzeli ya 15 octobre 1991.
Kasi, ntembe ezali te ete mikanda mingi mikolimbolaka makambo mizali komonisa biyambayamba mpe losambo lozalaki kosalema kala na elambo ya bokundoli mikolo ya kobotama. Mokanda Encyclopédie américaine (angl. ebimeli ya 1991) epesi likanisi oyo: “Na mikili ya kala lokola Ezipito, Grèce, Loma mpe Perse bazalaki kokumisa bokundoli mbotama ya banzambe, ya mikonzi mpe ya bato na bozwi na mboka wana.” Eyebisi lisusu ete Baloma bazalaki kokumisa mbotama ya nzambe Alatɛmi mpe mokolo ya Apolona. Na kokesena, “eloko moko te emonisi ete Bayisraele bazalaki kosala bilamba mpo na kokanisa mikolo ya kobotama, atako bazalaki kobomba mikanda mpo na kokoma mbula ya kobotama ya bana mibali na mboka na bango.”
Mikanda misusu mizali kopesa bandimbola mingi likoló na ebandeli ya kokumisa mikolo ya kobotama: ‘Kokumisa bokundoli mbotama ebandaki na mikili ya Mpótó, eleki sikawa ebele na bambula. Bato bazalaki kondima ete bilimu malamu to mabe bizali, oyo mbala mosusu bibéngamaki bilimá. Bato nyonso bazalaki kobanga bilimu yango; bazalaki kobanga ete basala mabe na moto oyo akómaki na mokolo na ye ya kobotama. Yango wana azalaki kofanda elongo na baninga mpe bandeko na ye, baoyo, na kotombeláká ye bolamu mpe na kozala penepene na ye, bazalaki kobatela ye na makámá mayebani te oyo makokaki kouta na mokolo ya kobotama. Na kopesáká ye makabo, bazalaki kobatela ye malamu mingi. Kolya elongo na ye ezalaki libateli mosusu ya malamu mpe ezalaki komema mapamboli ya bilimu malamu. Yango wana, na ebandeli ya kokumisa bokundoli mbotama ezalaki na mokano ya kobalela moto yango na makámá mpe kobongisela ye mbula ya sika malamu.’—La célébration des anniversaires de naissance dans le monde (angl., 1967).
Mokanda wana mazali mpe kolimbola ebandeli ya ebele na mimeseno mikangisami na mikolo ya kobotama. Na ndakisa: “Ntina [ya kosalelama ya babuzi] ebandaki na Bagreke mpe Baloma ya ntango na kalakala, baoyo bazalaki kokanisa ete babuzi to bakandélá wana ezalaki na nguya ya kobatela. Bazalaki kosala mabondeli mpe kolapa ndai oyo esengelaki kotindama epai na banzambe kati na mɔ́tɔ ya kandélá. Banzambe bazalaki bongo kopesa mapamboli to mpe kondima mabondeli.” Na ntina na ebandeli ya mimeseno yango, tozali kokuta bandimbola mosusu ya ntina na nkasa 33 mpe 34 ya mokanda Comment raisonner à partir des Ecritures, mokanda mobimisami na la Société Watchtower.
Nzokande, likambo ya koyeba soko kokumisa bokundoli mbotama ezalaki to ezali naino na boyokani na losambo, ezali likambo bobele moko te oyo ebongi kotalelama. Biblia elobeli bokundoli mbotama, mpe baklisto oyo bateli bakotya likebi na makambo nyonso mayebisami na yango.
Basaleli ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki kokoma mikolo ya kobotama; yango ezalaki kosalisa bango na koyeba kotanga mibu ya bomoi na bato. Mpo na yango totangi ete: “Noa akokisaki mbula nkámá mitano. Na nsima abotaki Semi, Kama mpe Yafete.” “Na mbula nkámá motoba ya bomoi na Noa . . . bitima nyonso ya bozindo ebimisaki mai.”—Genese 5:32; 7:11; 11:10-26.
Lokola Yesu ye moko amonisaki yango, kati na libota ya Nzambe, kobotama ya mwana etalelamaki lokola lipamboli mpe likambo ya esengo. (Luka 1:57, 58; 2:9-14; Yoane 16:21) Nzokande, libota ya Jéhovah balukaki te kosala bokundoli ya mokolo ya kobotama; bazalaki kokumisa bokundoli ya mikolo misusu, kasi bokundoli mbotama te. (Yoane 10:22, 23) Mokanda Encyclopaedia Judaica elobi na ntina wana: “Kokumisa bokundoli mbotama eyebanaki te na milulu ya kala ya Bayuda.” Tozali kotanga kati na mokanda Mimeseno mpe bonkoko ya Yisraele (angl,) ete: “Kokanisa bokundoli mbotama ezwamaki na mimeseno na mabota mosusu, mpamba te likambo yango liyebisami ata mbala moko te epai na Bayuda, ezala kati na Biblia to na Talmud, to kati na mikanda misusu oyo mikomamaki nsima na Bato ya mayele. Mpo na koloba solo, ezalaki momeseno ya kala ya Baezipito.”
Boyokani na yango elongo na Ezipito emonisami polele kati na lisoló ya Biblia oyo lilobeli bokundoli ya mokolo moko oyo basaleli ya losambo ya solo bazalaki kokumisa yango te. Ezalaki bakundoli mbotama ya Farao oyo azalaki koyangela ntango Yozefe azalaki na boloko na Ezipito. Ekoki kozala ete bapakano mosusu basepelaki na feti yango; kasi bobele na libaku yango kapita na baoyo bazalaki kosala na kúku ya Farao akatamaki nkingó.—Genese 40:1-22.
Lisoló mosusu ya bokundoli mbotama oyo emonisami mpe na lolenge ya mabe kati na Biblia, ezali oyo ya Hérode Antipas, mwana na Hérode Monene. Kati na Biblia, yango elobelami te lokola elambo ezangi makámá. Nzokande, Yoane Mobatisi akatamaki motó na mokolo yango. Nsima na yango, “bayekoli na ye bayaki kokamata nzoto mpe bakundaki yango; na nsima, bakendaki koyebisa Yesu” oyo ‘alongwaki wana mpe akendaki na mokili mokauki bobele ye mpenza.’ (Matai 14:6-13, MN) Okanisi ete Yesu to bayekoli ya Yoane bakokaki kozala na mposa ya kosangana na elambo moko ya bokundoli mbotama?
Na kotalela ebandeli na momeseno ya kokumisa bokundoli mbotama, mpe na koleka mpenza, lokola yango emonisami na lolenge mabe kati na Biblia, ba Témoins de Jéhovah bazali na bantina mingi ya koboya kokumisa yango. Bazali na mposa moke te ya kolanda momeseno wana ya mokili, mpo ete, mikolo nyonso kati na mbula bakoki koyangana mpo na kolya mpe basalaka yango. Wana bakokabela baninga biloko, ezali te mpo ete bapusami to mpo ete elambo moko esengisi bongo; kasi ezali nde elembo ya bolingo, oyo bomonisaka ntango nyonso mpo ete bopusami na motema ya bokabi mpe na bolingo ya solo.—Masese 17:8; Mosakoli 2:24; Luka 6:38; Misala 9:36, 39; 1 Bakolinti 16:2, 3.