Mituna ya batángi
Batatoli ya Yehova mingi basalaka anivɛrsɛrɛ ya libala na bango. Anivɛrsɛrɛ mosusu bato basalaka ezali ya mokolo ya kobotama. Soki ezali bongo, mpo na nini basalaka anivɛrsɛrɛ ya libala kasi ya mokolo ya kobotama te?
Mpo na koloba na mokuse, moklisto moko te asɛngisami kokundola mikolo nyonso mibale wana. Kasi, yango elingi koloba te ete mikolo yango mibale mikokani to tosengeli kotalela anivɛrsɛrɛ ya libala lokola totalelaka anivɛrsɛrɛ ya kobotama.
Ekoki mpenza kolobama ete mikolo yango nyonso mibale mizali baanivɛrsɛrɛ mpamba te “anivɛrsɛrɛ” ezali ‘bokundoli mbula na mbula ya dati oyo likambo moko esalemaki.’ Anivɛrsɛrɛ ekoki kosalema ata mpo na likambo nini—mokolo oyo obikaki na likama ya motuka, mokolo oyo omonaki sanza ezipi moi, mokolo oyo bokendaki kosukola na pisini libota mobimba, mpe makambo mosusu ndenge na ndenge. Ya solo, baklisto bakoki te kotalela mikolo nyonso ya anivɛrsɛrɛ lokola mikolo ya ntina mpenza, to mpe kosala feti mpo na yango. Tosengeli nde kotalela makambo oyo mazali kati na yango mpe kozwa ekateli oyo ebongi mpenza.
Na ndakisa, na mobu 1513 L.T.B., Nzambe apesaki Bayisalaele malako ya sikisiki mpo ete mbula na mbula bákundolaka mokolo oyo anzelu na ye alekaki likoló ya bandako na bango na Ezipito mpe ndenge babimaki na boombo mokolo yango. (Exode 12:14) Bayuda, na Yesu lokola, bazalaki kosala yango mbula na mbula mpo na kotosa mobeko ya Nzambe, kasi bazalaki kosala elambo te to kopesana makabo te. Bayuda bakómaki kotalela anivɛrsɛrɛ ya bofungoli tempelo ya mibale lokola mokolo monene mpenza. Atako komikundola likambo yango esɛngisami te na Biblia, Yoane 10:22, 23 emonisi ete Yesu amonaki yango mabe te. Kasi baklisto bazali na likita ya ntina oyo basengeli kokundola: anivɛrsɛrɛ ya liwa ya Yesu. Basengeli kosala bongo mpo na kotosa etinda oyo ezwami na Liloba ya Nzambe.—Luka 22:19, 20.
Tokoloba boni mpo na anivɛrsɛrɛ ya libala? Na bikólo mosusu ezali momeseno ete mobali na mwasi bákundolaka anivɛrsɛrɛ ya libala na bango. Toyebi ete libala ezali ebongiseli euti na Nzambe. (Genese 2:18-24; Matai 19:4-6) Ya solo Biblia elobaka te ete libala ezali eloko moko ya mabe. Kutu Yesu akendaki na feti moko ya libala, mpe asalaki likambo moko oyo ebakisaki esengo na feti yango.—Yoane 2:1-11.
Na bongo, ekozala likambo ya kokamwa te soki babalani basepeli kolekisa ntango mpo na kosala anivɛrsɛrɛ ya libala na bango mpo na kokanisa esengo ya libaku yango mpe kolendisa ekateli na bango ya kosala makasi mpo libala na bango elonga. Soki baponi kokundola libaku yango ya esengo bobele bango mibale, to elongo na mwa bayebani na bango to na baninga ya motema, wana ezali ekateli na bango moko. Nzokande, ekozala malamu te ete básalela libaku yango mpo na kobéngisa bato ebele. Na mokolo yango baklisto bakosala malamu na komitambwisa na mitinda oyo basalelaka na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Na bongo, kosala anivɛrsɛrɛ ya libala to kosala yango te ezali ekateli ya moto na moto.—Baloma 13:13, 14.
Kasi, tokoloba boni mpo na anivɛrsɛrɛ ya kobotama? Tozali nde na malako kati na Biblia mpo na anivɛrsɛrɛ yango?
Ezali solo ete na ebandeli ya ekeke oyo, Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na ntango wana, bazalaki kosala anivɛrsɛrɛ ya kobotama. Mingi bazalaki kokoma dati yango na mwa buku oyo babéngaki Mana ya likoló mpo na mokolo na mokolo. Mwa buku yango ezalaki na mokapo ya Biblia mpo na mokolo na mokolo. Baklisto mingi bazalaki kotya fɔtɔ mike ya baninga na bango Bayekoli ya Biblia na dati oyo ekokanaki na mokolo oyo babotamaki. Lisusu, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1909 (ebimeli ya Lingelesi), eyebisi ete na liyangani moko oyo esalemaki na engumba Jacksonville, na etúká ya Floride, na États-Unis, Ndeko Russell, oyo azalaki prezida ya la Société na ntango wana, abéngamaki ete amata na ebaelo. Mpo na nini? Babombelaki ye makabo mpo na anivɛrsɛrɛ ya kobotama na ye. Ezalaki bongo: mwa bakɛsi ezalaki na mbuma ya olive, ananasi, mpe malala. Likambo yango esalisi biso na koyeba lolenge makambo mazalaki kosalema kala. Kutu, na ntango wana, Bayekoli ya Biblia bazalaki kosala anivɛrsɛrɛ ya kobotama ya Yesu mokolo ya 25 Desɛ́mbɛ. Na Betele ya Brooklyn bazalaki kosala feti mpo na Eyenga ya Mbotama.
Ya solo, basaleli ya Nzambe basili kokola na elimo na makambo mingi koleka ntango wana. Na bambula ya 1920, pole ya solo oyo ekobaki kongɛnga esungaki bango mpo na koyeba ete:
Yesu abotamaki mokolo ya 25 Desɛ́mbɛ te, dati oyo euti na mangomba ya bapakano. Biblia epesi biso etinda ya kokanisa mokolo ya liwa ya Yesu, kasi mokolo ya kobotama na ye te to ya moto mosusu te. Ekaniseli ya liwa ya Yesu ezali na boyokani na Mosakoli 7:1 mpe bosembo ya moto kino liwa na ye, ezali na ntina mingi koleka mokolo ya kobotama na ye. Biblia ezali kolobela ata mosaleli ya sembo moko te oyo asalaki anivɛrsɛrɛ ya kobotama na ye. Biblia ezali kolobela bobele bapakano oyo basalaki bafeti na anivɛrsɛrɛ ya kobotama na bango. Mpe na mabaku yango, Biblia elobeli makambo mabe oyo masalemaki. Tótalela makambo masalemaki na baanivɛrsɛrɛ ya kobotama wana.
Anivɛrsɛrɛ ya kobotama oyo elobelami liboso ezali oyo ya Falo na eleko Yosefe azalaki na bomoi. (Genese 40:20-23) Mpo na likambo yango, na buku na ye (Encyclopædia of Religion and Ethics), na ebandeli ya lisolo etali mikolo ya kobotama, Hastings akomaki boye: “Momeseno ya bokundoli mokolo ya kobotama ezalaki kolanda badati, kasi makambo oyo mazalaki kosalema mautaki na mateya ya mangomba ya kalakala.” Na nsima, buku yango ezongelaki maloba ya Sir J. Gardner Wilkinson, nganga-mayele ya istware ya Ezipito oyo akomaki ete: “Moezipito nyonso azalaki kopesa motuya mingi na mokolo, ata kutu na ngonga oyo abotamaki; mpe ekoki kozala ete, ezali lolenge moko mpe na ekólo Pelese, moto nyonso azalaki kosala elambo monene mpo na kosepela mokolo oyo abotamaki, azalaki kobéngisa baninga na ye mpo na kominanola na ndenge nyonso ya ntango wana, mpe bilei kitoko ezalaki bebo.”
Biblia elobeli lisusu anivɛrsɛrɛ ya kobotama ya Elode. Na mokolo yango bakataki Yoane Mobatisi motó. (Matai 14:6-10) Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia, ebimeli ya 1979) epesi likanisi oyo ya ntina: “Bagreke ya kalakala bazalaki kosalela banzambe na bango baanivɛrsɛrɛ ya kobotama. Bazalaki mpe kosala bongo mpo na bato ya lokumu. Bazalaki kobénga baanivɛrsɛrɛ yango na liloba ya Greke genéthlia, mpo genésia elimboli ekaniseli ya mokolo ya kobotama ya moto moko ya lokumu oyo asilá kokufa. Mokanda ya 2 Makabe 6:7 ezali kolobela genéthlia oyo esengelaki kosalema sanza na sanza mpo na Antiochus IV. Na boumeli na yango Bayuda basɛngisamaki na makasi ete ‘bálya biloko bikabami lokola mbeka.’ . . . Ntango Elode asalaki anivɛrsɛrɛ ya kobotama na ye, azalaki kolanda lolenge ezalaki kosalema na bonkɔkɔ ya Bagreke. Bilembeteli bizali te oyo bimonisi ete na Yisalaele bazalaki kosala baanivɛrsɛrɛ ya mokolo ya kobotama na eleko oyo bonkɔkɔ ya Bagreke ekɔtaki naino epai na bango te.”
Ezali solo ete, baklisto ya solo lelo oyo bamitungisaka koleka ndelo te mpo na eutelo mpe mpo na boyokani oyo likambo to momeseno mokomoko ezalaki na yango na losambo na ntango ya kala. Kasi batyolaka te makambo ya ntina oyo mazali na kati ya Liloba ya Nzambe. Biblia elobeli bobele baanivɛrsɛrɛ ya bapakano, mpe emonisi makambo mabe oyo masalemaki na feti yango. Na bongo, baklisto ya sembo basengeli koyeba ete, Makomami ezali kolobela anivɛrsɛrɛ ya kobotama na lolenge ya malamu te.
Yango wana, soki baklisto basepeli kosala anivɛrsɛrɛ ya libala na bango, yango ezali ekateli ya bango moko. Nzokande, bantina malamu ezali mpo na yango baklisto oyo bakomeli baboyaka kosala anivɛrsɛrɛ ya kobotama.