Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 240-lok. 244
  • Koyambola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyambola
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Ntubéla euti na bato to mpe na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Kotubela masumu ezali na mbébá kati na yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Nzambe asɛngaka bato báyambola masumu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Nzambe akolimbisa ngai?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 240-lok. 244

Koyambola

Ndimbola: Kosakola to koyebisa polele to na kobombana: (1) bindimeli na yo (2) masumu na yo.

Biblia endimi Sakramentu ya ntubela, mpe koyebisa sango na litoi masumu oyo osalaki, ndenge Eklezia eteyaka yango?

Maloba oyo moto ayebisaka sango ntango azali kotubela

Maloba oyo ebongisamá mpo na ntubela, oyo esalelamaka mingi tii lelo, ezali: “Benisá ngai, Tata, mpo nasali lisumu. Mbala ya nsuka nayaki kotubela ezalaki . . .”—Zulunalo U.S. Catholic, ya Ɔkɔtɔbɛ 1982, lok. 6.

Mat. 23:1, 9, LNz: “Yezu alobi: . . . Awa o nse bóbenga moto moko ‘tata’ te, zambi bozali se na tata moko, oyo azali o likoló.”

Masumu oyo ekoki kolimbisama

“Eklezia eteyaka ntango nyonso ete lisumu nyonso, ata ya ndenge nini, ekoki kolimbisama.”—The Catholic Encyclopedia (oyo ezali na nihil obstat mpe imprimatur), R. C. Broderick (Nashville, Tennessee; 1976), lok. 554.

Ebr. 10:26, LNz: “Soko tozali kosala masumu na nko, ata toyebi bosolo libonza lyoko te likoki kozwela biso bolimbisi masumu.”

Mrk. 3:29, LNz: “Kasi oyo atuki Elimo Santu, bakolimbisa ye mokolo moko te; akotikala na lisumu seko.”

Etumbu ya ntubela

Mbala mingi sango akatelaka mondimi oyo ayei kotubela motángo ya “Tata wa biso” mpe “Maria Losako” oyo asengeli kosambela.

Mat. 6:7, LNz: “Soko bosambeli, bóloba maloba mingi mingi te [elingi koloba, kozongela maloba ezangi ntina mbala na mbala] lokola bapagano. Bango bakanisi ’te Nzambe akondimela bango noki soko balobi mingi.”

Mat. 6:9-12, LNz: “Bongo bósambelaka boye: Tata wa biso ozali o likoló, . . . limbisá mabe ma biso.” (Vɛrsɛ moko te ya Biblia esɛngi biso tóbondela Maria to tóbondela na nzela na ye. Talá Bafilipi 4:6, mpe nkasa 356, 357, na motó ya likambo “Maria.”)

Rom. 12:9, LNz: “Bólinga baninga na mitema mibale te, bóboya makambo mabe, bólanda mambi malamu na molende.”

Yesu apesaki bantoma na ye nguya ya kolimbisa masumu?

Yoa. 20:21-23, LNz: “‘Lokola Tata atindaki ngai, ngai mpe natindi bino.’ Nsima ya maloba maye apemeli bango mpema mpe alobi: ‘Bókula Elimo Santu; masumu ma bato bino bokolimbisa, makolimbisama; masumu ma baye bino bokolimbisa te makotikala na bango.’”

Bantoma bakangaki nini na maloba yango mpe ndenge nini basalelaki yango? Lisolo moko te na Biblia emonisi ete moto moko ayaki kotubela masumu na ye na kobombana epai ya ntoma moko boye, mpe na nsima alimbisaki moto yango. Nzokande, Biblia elobeli makambo oyo moto asengeli kosala mpo Nzambe alimbisa ye. Lokola bantoma bazalaki kotambwisama na elimo santu, bakokaki koyeba soki moto akokisi makambo yango mpe na bongo bakokaki koloba ete Nzambe alimbisi masumu ya moto to te. Na ndakisa, talá Misala 5:1-11, mpe 1 Bakorinti 5:1-5 mpe 2 Bakorinti 2:6-8.

Talá mpe motó ya likambo “Bakitani ya bantoma.”

Esika oyo likambo ya kotubela na litoi ya sango eutá: Makanisi ya banganga-mayele ekeseni

Buku moko (The Catholic Encyclopedia, ya R. C. Broderick), elobi: “Kotubela na litoi ya sango endimamaki na siɛklɛ ya minei.”—Lok. 58.

Buku mosusu (New Catholic Encyclopedia ya 1967, Vol. XI, lok. 75) elobi: “Lelo oyo, ebele ya bato ya mayele ya istware, ezala ya Lingomba ya Katolike to Protesta, bamonisi ete etumbu ya ntubela oyo bapesaka moto na moto euti na mangomba ya Irlande, Pays de Galles, mpe Angleterre; etumbu yango ezalaki komonana lokola disiplini oyo esengeli. Na bamboka yango, sango-mokonzi mpe basango mosusu bazalaki kopesa Basakramentu, ezala mpe etumbu ya ntubela. Emonani ete momeseno ya kotubela mbala na mbala mpe ntubela ya komipesa oyo bandimi basalaka, eutá na momeseno ya kotubela polele to na kobombana mpe na momeseno ya koluka litambwisi ya elimo oyo basango bazalaki kopesa na bamonastɛrɛ. . . . Nzokande, ezali na siɛklɛ ya 11 nde masumu ya kobombana ekómaki kolongolama ntango moto ayamboli mpe liboso ete moto asilisa etumbu.”

A. H. Sayce, moto ya mayele ya istware, alobi na mokanda na ye (The Religions of Ancient Egypt and Babylonia, Edinburgh, 1902, lok. 497) boye: “Makomi oyo ezali kolobela mimeseno ya mangomba emonisi ete kotubela polele to na kobombana, ezalaki kosalema mingi na Babilone. Ya solo, emonani ete banda kala mpenza bato bazalaki na momeseno ya kotubela masumu na kobombana mpe likambo yango ezalaki kosalema mingi.”

Batatoli ya Yehova bandimaka nini na likambo etali koyambola?

Koyambola oyo moto asalaka polele mpo na kondima na ye

Rom. 10:9, 10: “Soki ozali kosakola polele ‘liloba wana na monɔkɔ na yo mpenza,’ ete Yesu azali Nkolo, mpe ozali kondima na motema na yo ete Nzambe alamwisaki ye uta na bakufi, okobika. Mpo na motema nde moto andimaka mpo na boyengebene, kasi na monɔkɔ nde moto alobaka polele mpo na lobiko.”

Mat. 10:32, 33: “Boye, moto nyonso oyo alobi polele liboso ya bato ete ngai [Yesu Kristo] ná ye tozali na bomoko, ngai mpe nakoloba polele liboso ya Tata na ngai oyo azali na likoló ete ngai ná ye tozali na bomoko; kasi moto nyonso oyo awangani ngai liboso ya bato, ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na ngai oyo azali na likoló.”

Soki moto asaleli Nzambe lisumu

Mat. 6:6-12: “Yo ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana . . . ‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama . . . mpe limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo bazali na nyongo na biso.’”

Nz. 32:5: “Nsukansuka nayambolelaki yo [Nzambe] lisumu na ngai, mpe nabombaki libunga na ngai te. Nalobaki ete: ‘Nakoyambolela Yehova makambo na ngai ya kobuka mibeko.’ Mpe yo moko olimbisaki libunga ya masumu na ngai.”

1 Yoa. 2:1: “Soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Kristo, moyengebene.”

Soki moto asaleli moninga mabe to basaleli ye mabe

Mat. 5:23, 24: “Bongo soki omemi likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo na ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.”

Mat. 18:15: “Soki ndeko na yo asali lisumu, kende komonisa ye libunga na ye, yo ná ye kaka.”

Luka 17:3: “Soki ndeko na yo asali lisumu pamelá ye, mpe soki abongoli motema limbisá ye.”

Ef. 4:32: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko.”

Soki moto asali lisumu moko monene mpe alingi básalisa ye na elimo

Yak. 5:14-16: “Ezali nde na moto moko oyo azali na maladi [ya elimo] na kati na bino? Abenga bankulutu ya lisangá, mpe bango bábondela mpo na ye, bápakola ye mafuta na nkombo ya Yehova. Mpe libondeli ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla, mpe Yehova akotɛlɛmisa ye. Lisusu, soki asalaki masumu, akolimbisama [na Nzambe]. Yango wana, bóyambolaka masumu na bino polele na kati na bino mpe bóbondelanaka, mpo bóbikisama.”

Mas. 28:13: “Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.”

Bongo soki moto oyo asali masumu aluki lisalisi te?

Gal. 6:1: “Bandeko, ata soki moto abɛti libaku liboso ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo bómeka kosembola moto yango na elimo ya boboto, na ntango yango yo moko mpe omitalaka, noki yo mpe omekama.”

1 Tim. 5:20: “Pamelá na miso ya bato nyonso [elingi koloba baoyo nyonso bayebi likambo yango] baoyo bazali na momeseno ya kosala lisumu, mpo bamosusu mpe bábanga.”

1 Ko. 5:11-13: “Bótika kosangana na moto nyonso oyo abengami ndeko, oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te. . . . ‘Bólongola moto mabe na kati na bino.’”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto