Kotubela masumu ezali na mbébá kati na yango?
“NTUBÉLÁ ezali kopɛtolama na elimo, mwango mpo na kobandela etamboli ya sika mpe kotika mabe. Nalingaka kokende ntubélá, mpo na koyebisa masumu na ngai epai na sángó, ye oyo akolimbisa yango, mpe nsima nakokóma mosantu.” Oyo ezali mayoki ya mokatolike moko ya molende.—Mumpe, pambóla ngai mpo ete nasali lisumu(na Lingelesi).
Mpo na kozongela maloba ya mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.), “bobele epai na basángó nde Klisto apesaki nguya ya kokanga to kokangola, ya kolimbisa to koboya kolimbisa” musumu. Bobele mokanda yango mobukisi ete, ntubélá ya mbala na mbala ekoki “kozongisu bosantu ya bomoi babebaki na ntina na masumu minene mpe . . . kopetola lisosoli [ya moto].” Nzokande, lolenge na bizaleli ya bato na mikili mingi emonisi ete ntubélá ya mbula na mbala ezali kopusa bobele bato moke na ‘kobutwa longwa na makambo mabe mpo na kosala makambo malamu.’ (Nzembo 34:14) Mbébá ezali wapi?
Ezali bobele molulu mpamba?
Mbala mosusu ntubélá ekoki komonana na ebandeli lokola molulu mpamba. Na Irlande, ntubélá ya yambo esalemaka liboso na kolya kóminyó ya yambo. Uta sikawa tokangi mpenza ntina oyo mwana mwasi moko ya mibu nsambo azalaki kotya motema mingi likoló na robe kitoko ya babalani oyo ye asengelaki kolata lokola mobalani moke, na esika na kotya motema likoló na “kozongisama ya bosantu na bomoi bobebaki na ntina na masumu minene.”
Ramona, ye oyo atubélaki mpo na mbala ya yambo wana azalaki naino na mibu nsambo, andimaki poIele ete: “Eloko oyo nalingaki mingi mpenza, ezalaki robe oyo nalataki, mpe lisusu kozwa mbongo epai na libota un ngai. Kati na bana basi oyo nayebaki, moko te azalaki na mposa ya kosambela. Na Iibaku wana, moko na biso akanisaki likoló na Nzambe te.”
Solo ezali ete, soko bana mike bakotindama mpo na kotubela masumu mbala na mbala, yango ekoki komema bango na kolobela yango lokola lisoló oyo bameseni na yango. Na ntina yango, tala oyo elobami na Michael, ye oyo abundaki mpe kotubela masumu wana azalaki na mibu nsambo: “Na mbula nyonso, nazalaki kozongela bobele maloba yango moko.”
Maloba ya bakatolike mosusu maye makomami kati na mokanda Mumpe, pambola ngai mpo ete nasali lisumu, ezali komonisa ete, ata na ntango bakómi mikóló, bazali kopesa motuya ya elimo te na ntubélá. Moto moko alobaki ete: “Ntubélá ezali koyekolisa yo kokósa, mpamba te ezali na makambo mosusu oyo okokoka te koyebisa yango epai na sángó.” Bato mosusu bakosalaka bobele pénétésa (pénitence) moke wana ezali bango komona ete bamoko na basángó bazali na etamboli malamu te. Bato yango bakómaki koluka bobele sángó “malamu” oyo akopesa batoli oyo bango basepelaka koyoka na ntubélá, Na ndakisa, elenge mwasi moko alobaki ete: “Nsima na koluka na boumeli ya sanza misato nde namonaki sángó oyo ebongaki mpenza ete natubelaka masumu epai na ye. Nakendaka epai na ye mbala moko na sanza, tozalaka bobele ngai na ye na esika ya ntubélá. Azali malamu mpenza.” Mwasi Mokatolike mosusu alobaki ete: “Na kolukáká mwa mingi, okoki kozwa sángó oyo akufa matoi, oyo ayebi koloba te, longola. bobele na ntango ya kosala ‘Mabondeli misato oyo matindamaka epai na Ngondo Maria’ to ‘trois Avé.’
Emonani bongo ete mbébá ezali na nzela ya ntubélá, lokola yango emonisami mpe na bato mosusu. Nzokande Biblia ezali koloba mingi mpo na ntina ya koyambola masumu, na kolobáká ete: “Ye oyo akobomba masumu na ye akolonga te; kasi ye oyo akoyambola mpe akotika yango, akozwa ngolu.”—Masese 28:13.
Na boye, elingi koloba ete moklisto asengeli koyambola masumu na ye nyonso? Soko ee, akosala yango epai na nani? Lisoló lilandi likolobela mituna yango mikeseni.