Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/2 nk. 4-7
  • Basakoli ya lokutá ya lelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basakoli ya lokutá ya lelo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Solo likoló na Bokonzi na Nzambe
  • Mpo na nini ezali na ntina?
  • Bato bayangelami na Bokonzi na Nzambe
  • Oyo Yesu ateyaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Oyo Bokonzi na Nzambe ekoki komemela yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/2 nk. 4-7

Basakoli ya lokutá ya lelo

YILIMIA azalaki mosakoli na Nzambe na Yelusaleme na eleko oyo losambo na bikeko, pite mpe ezaleli na kobeba etondaki kati na engumba wana; na eleko oyo bazalaki kosopa makila ya baoyo basali likambo te. (Yilimia 7:8–11) Na ntango wana, azalaki bobele ye moko lokola mosakoli te, kasi mingi na basakoli mosusu bazalaki kosala mpo na matomba na bango moko mpe bazalaki na ezaleli na kobeba. Na motindo nini? Jéhovah alobaki ete: “Longwa na mosakoli kino na nganganzambe, nyonso bazangi sembo. Bameki kobikisa mpasi ya libota na ngai mpo na mpamba, ete: ‘Kimya ezali! Kimya ezali!’ nzokande kimya ezali te.”​—Yilimia 6:13, 14, MN.

Basakoli ya lokutá bamekaki kondimisa ete makambo mazali kotambola malamu mpe ete bato bazalaki na kimya elongo na Nzambe, atako mabe oyo mazalaki kati na mboka; nzokande yango ezalaki lokutá. Etumbu na Nzambe esengelaki kokwela bango, lokola Yilimia asakolaki yango na molende nyonso. Na ntango Yelusaleme ebebisamaki na mampinga ya Babilone na mobu 607 liboso ya ntango na biso, mpe wana tempelo ebebisamaki mpe wana bamoko na Bayisraele babomamaki mpe basusu bamemamaki na boombo na Babilone, mosika na mboka na bango, emonanaki ete Yilimia, mosakoli ya solo, nde alobaki solo, kasi basakoli ya lokutá balobaki solo te. Mwa ndambo na babiki oyo batikamaki na mboka wana, bakimaki na Ezipito.​—Yilimia 39:6–9; 43:4–7.

Basakoli ya lokutá basalaki nini? “Jéhovah alobi ete: ‘Nazali kotɛmɛla basakoli baoyo bakoyibaka maloba na ngai, moko na moko na mozalani na ye.’” (Yilimia 23:30) Na kopusáká bato na koyoka lokutá na esika na koyoka makebisi ya solo na Nzambe, basakoli ya lokuta bazalaki koyiba maloba na Nzambe na makasi mpe bazalaki koyiba bopusi oyo ekokaki kozala na yango likoló na Bayisraele. Bazalaki kolobela “makambo na minene na Nzambe” te, kasi makanisi na bango moko, makanisi oyo bato bazalaki kolinga koyoka yango. Nsango na Yilimia eutaki mpenza epai na Nzambe, mpe soko Bayisraele basalaki engebene maloba na ye, mbɛlɛ babebisamaki te. Basakoli ya lokutá ‘bayibaki maloba na Nzambe’ mpe bamemaki bato na likámá. Ekómaki mpenza lokola Yesu alobaki yango na ntina na bakonzi na mangomba bazangi bosembo ya eleko na ye, ete: “Bazali bakufi miso baoyo bazali kokamba bakufi miso na nzela. Nzokande, soko mokufi miso akokamba mokufi miso na nzela, bango mibale bakokwea na libulu.”​—Misala 2:11; Matai 15:14.

Lokola na eleko na Yilimia, na eleko na biso ezali mpe na basakoli oyo bakomilobaka ete bazali bamonisi na Nzambe ya Biblia; kasi bango mpe bazali koyiba maloba na Nzambe na kopalanganisáká mateya mazali kopengwisa bato longwa na makambo oyo Nzambe alobi mpenza na nzela na Bibila. Na motindo nini? Tokoyanola na motuna oyo na kosaleláká liteya na moboko ya Biblia na ntina na Bokonzi na Nzambe, lokola motó ya lisoló.

Solo likoló na Bokonzi na Nzambe

Bokonzi na Nzambe ezalaki motó ya likambo ya moboko na mateya na Klisto, mpe elobelami koleka mbala mokámá kati na Baevanzile. Yesu alobaki na ebandeli ya mosala na ye ete: “Esengeli na ngai kosakola nsango malamu na bokonzi na Nzambe .  . , mpo ete ngai natindami mpo na yango.” Ayekolisaki na bayekoli na ye lolenge na kolɔmba kati na libondeli: “Tika ete bokonzi na yo eya.”​—Luka 4:43, MN; 11:2.

Bongo, Bokonzi ezali nini? Engebene dictionnaire moko (The New Thayer’s Greek English Lexicon), ndimbola ya liboso ya liloba na Greke oyo libongolami na “bokonzi” kati na Biblia, ezali “nguya na bokonzi, bokonzi, boyangeli,” mpe ndimbola ya mibale ezali “etando na mabelé mayangelami na nguya na mokonzi moko.” Bosukisi malamu bosengeli kopesama ezali ete, Bokonzi na Nzambe ezali boyangeli ya solo botambwisami na mokonzi moko. Ezali mpenza yango?

Ɛɛ, mpe mokonzi oyo alobelami azali mosusu te bobele Yesu Klisto. Liboso na kobotama na Yesu, anzelu Gabriele alobaki na Maria ete: “Ye akozala monene mpe akobéngama Mwana na Oyo-Aleki-Likoló; mpe Jéhovah Nzambe akopesa ye kiti na bokonzi na Davidi, tata na ye.” (Luka 1:32) Lokola azwi kiti na bokonzi, ezali polele ete azali mokonzi, moyangeli na bokonzi. Kati na esakweli na Yisaya, tozali kokuta elembeteli mosusu emonisi ete Bokonzi na Nzambe ezali boyangeli ya solo, ete: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso mpe bokonzi bokozala likoló na mapeka na ye; . . . kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya, ekosuka te.”​—Yisaya 9:6, 7.

Epai wapi Yesu azali koyangela? Na Yelusaleme? Te. Na emonaneli moko, mosakoli Danyele amonaki wana Yesu azalaki kozwa bokonzi, mpe emonaneli yango emonisi Yesu kati na likoló. (Danyele 7:13, 14) Yango eyokani na oyo Yesu alobaki na ntina na Bokonzi. Abéngaki yango mbala mingi ete “bokonzi ya makoló.” (Matai 10:7; 11:11, 12) Emonaneli wana eyokani lisusu na eyano oyo Yesu apesaki epai na Pilato na ntango asambisamaki na ye, ete: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te. Soko bokonzi na ngai ezalaki na mokili oyo, mbɛlɛ bato na ngai babundi ete nakabama epai na Bayuda te, Nde bokonzi na ngai euti wana te.” (Yoane 18:36, MN) Pasteur na bino soko mpe sángó na bino asili koyebisa bino ete Bokonzi na Yesu ezali boyangeli ya solo mpenza oyo ezali koyangela uta na likoló? To mpe ayebisaki bino ete Bokonzi ezali bobele eloko moko ezali kati na motema? Soko ateyaki bino ete Bokonzi ezali bobele eloko ezali kati na motema, boye asili koyiba bino maloba na Nzambe.

Boyokani nini bozali kati na Bokonzi na Nzambe mpe mitindo nyonso ya biyangeli na bato? Engebene mokanda L’Encyclopédie des religions (angl.) oyo ya Mircea Eliade, Martin Luther, oyo atɛmɛlaki lingomba katolike, ayebisaki likanisi lilandi wana ezalaki ye kolobela Bokonzi na Nzambe, ete: “Biyangeli ya mokili . . . bikoki mpe kobéngama bokonzi na Nzambe.” Basusu bakolobaka ete, na milende na bango, bato bakoki komema biyangeli ya mokili ete ekokana mpenza na Bokonzi na Nzambe. Na 1983, Likita lisangisi mangomba nyonso na boklisto ya lokutá, endimaki ete: “Soko tomonisi na misala ya sikisiki ete, tozali solo na mposa ya kotya kimya, Elimo na Nzambe ekoki kosalela milende na biso mike mpo na kopesa nzela na bikonzi ya mokili ete bikokana na bokonzi na Nzambe.”

Kasi, tozali komona kati na libondeli ya “Tata na biso” ete, Yesu ayekolisaki na bayekoli na ye ete babondela liboso mpo ete Bokonzi na Nzambe eya, mpe na nsima ete “mokano [na Nzambe] mosalama na mabelé lokola na likoló.” (Matai 6:10) Na elobeli mosusu, bato bakobyanga Bokonzi na Nzambe te ete eya na kosaláká mokano ya Mozalisi. Kasi, ezali koya na Bokonzi na Nzambe nde ekopesa nzela ete mokano na Ye mosalema na mabelé. Lolenge nini?

Totanga oyo elobami na esakweli ezali na Danyele mokapo 2, verset 44, ete: “Na mikolo na mikonzi yango [bayangeli ya ntango na nsuka], Nzambe na likoló akotɛlɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, . . . ekobuka mpe ekosilisa bikonzi yango nyonso mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Ezali likambo na kokamwa te wana Yesu alobaki ete Bokonzi na ye bozalaki na mokili oyo te! Ya solo, Bokonzi na Nzambe bokoboma bikonzi to biyangeli ya mabelé oyo mpe ekoyangela na esika na bango mpo na kokamba bato. Lokola ezali boyangeli botyami na Nzambe, akosɛnzɛla ete mokano na Nzambe mosalama awa na mabelé.

Tososoli mpenza malamu ntina oyo Bokonzi bokosala na molende nyonso soki toyebi nani oyo azali koyangela mokili. Ntóma Yoane akomaki ete: “Mokili mobimba mozali kolala na nsé na nguya na ye oyo mabe.” (1 Yoane 5:19, MN) “Oyo mabe” ezali Satan le Diable, oyo Paulo abéngaki ete “nzambe ya biloko ya ntango oyo.” (2 Bakolinti 4:4, MN) Bibongiseli ya mokili oyo Satan le Diable azali mokonzi na yango ekoki soko moke te kokokana na oyo ya Bokonzi na Nzambe.

Ezali moko na bantina mpo na yango Yesu aboyaki komikɔtisa na politike. Na ntango Bayuda oyo balingaki ekólo na bango na koleka, balukaki kokómisa ye mokonzi, akimaki bango. (Yoane 6:15) Lokola tomonaki yango, alobaki solo epai na Pilato ete: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te.” Mpe, na boyokani na maloba yango, alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bazali bato ya mokili te lokola ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:16) Na yango, bakonzi ya mangomba oyo bazali koteya ete likoki ezali ya kosala ete Bokonzi na Nzambe eya noki na kobongoláká makambo mosusu kati na mokili, mpe oyo bazali kolendisa bandimi na bango ete basala bongo, bazali basakoli ya lokutá. Bazali koyiba bokasi ya maloba na Biblia mpe bopusi oyo ekoki kozala na yango likoló na bato.

Mpo na nini ezali na ntina?

Wana ezali nde botaleli bozangi moboko? Soko moke te. Mateya na mabungá likoló na Bokonzi na Nzambe masili kozimbisa bato mingi mpe masili nkutu kobongola Lisoló na bato. Na ndakisa, encyclopédie moko ya katolike Théo, elobaki ete: “Libota na Nzambe lizali kotambola epai na Bokonzi na Nzambe oyo Klisto asalaki bofungoli na yango awa na mabelé. . . Lingomba ezali mbotó na Bokonzi yango.” Na komikokanisáká na Bokonzi na Nzambe, lingomba ya katolike lizwaki nguya moko makasi ya koyangela mokili na Moyen Age, ntango oyo bato bazalaki mpenza na biyambayamba mingi. Lelo lisusu, bakonzi ya mangomba bazali komeka komonisa bopusi na makambo ya mokili, kosaláká mpo na bamoko na bibongiseli ya politike mpe kotɛmɛláká mosusu.

Moto moko akolimbolaka makanisi (commentateur) amonisaki likanisi mosusu lisili kopalangana mingi na eleko na biso, ete: “Nzela na kotɛmɛla ezali bokonzi mpo ete kotɛmɛla (révolution) ekoyanganisaka bato mpo na kosala mokili ya sika, mopeli na elembo na Nzambe epesami na nzela na moto oyo asimbi solo: Yesu . . . , Gandhi. . . [mpe bongo na bongo].” Liteya oyo engebene yango ete molende ya politike mokoki kosalela matomba ya Bokonzi na Nzambe, mpe koboya kondima bosolo ya Bokonzi, esili komema bakonzi na mangomba na koluka ebongá na politike. Basusu basanganaki na botomboki to na bitumba. Ata moko na makambo wana eyokani te na solo oyo ete Bokonzi na Nzambe ezali ya mokili te. Mpe bakonzi ya mangomba baoyo bazali komikɔtisa mingi kati na politike bakoki kokabwana na mokili te, lokola bayekoli na Yesu basengeli kosala engebene maloba na ye. Baoyo bakolobaka ete bato bakoki kozwa Bokonzi na Nzambe na nzela na makambo ya politike, bazali basakoli ya lokutá. Bazali koyiba maloba na Nzambe epai na bato.

Soki bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokutá bazali koteya mpenza makambo oyo malobami na Biblia, mbɛlɛ bandimi na bango basosoli ete Bokonzi na Nzambe ekosilisa mpenza makambo lokola bobólá, maladi, kokabwana na ntina na mposo mpe monyoko. Kasi yango ekokokana na ntango mpe na motindo oyo Nzambe akani yango. Akosala yango te na kobongoláká bibongiseli ya politike oyo bisengeli kolimwa, wana Bokonzi na Nzambe ekoya. Soki bakonzi ya mangomba bazalaki basakoli ya solo, mbɛlɛ bayebisaki na bandimi na bango ete, wana ezali bango kozela koya na Bokonzi na Nzambe, bazali na likoki ya kozwa lisalisi liuti na Nzambe mpo na kobundisa mikakatano mibimisami na bokeseni ya mokili oyo.

Mpo na kosukisa, mbɛlɛ balakisaki bandimi na bango ete kobeba na makambo ya mokili, oyo ezali bongo ntina ya bampasi, esilaki kosakolama kati na Biblia mpe ezali elembo ete mosika te Bokonzi na Nzambe ekoya. Ɛɛ, mosika te Bokonzi na Nzambe ekoya mpe ekokitana bibongiseli ya politike ya lelo. Oyo nde lipamboli!​—Matai 24:21, 22, 36-39; 2 Petelo 3:7; Emoniseli 19:11-21.

Bato bayangelami na Bokonzi na Nzambe

Bokonzi na Nzambe ekomema eloko nini epai na bato? Kanisa naino: ntɔngɔ nyonso, ozali kolamuka na nzoto makasi. Na zingazinga na yo, moto moko te azali na maladi to mpe azali pene na kokufa. Ata bato oyo olingaki bango mingi, bazongisami na bomoi na nzela na lisekwa. (Yisaya 35:5, 6; Yoane 5:28, 29) Mitungisi na makambo na nkita, oyo euti na mombongo ya lokoso mpe na bibongiseli ya nkita ekookisaka mpasi, ezali lisusu te. Ozali na ndako na yo kitoko, mpe ozali na etando monene ya mabelé mpo na kolóna nkóna nyonso ozali na yango mposa mpo na koleisa libota na bino. (Yisaya 65:21–23) Okoki kotambola bipai binso, na ngonga nyonso na moi mpe na butu, kozanga kobanga ete basala yo mabe. Etumba ezali te; eloko moko te ezali kobebisa kimya na yo. Bato nyonso bazali kosala mpo na bolamu na yo. Bato mabe balimwi. Bolingo mpe boyengebene ezali wana. Ozali kokanisa mpo na makambo na bomoi motindo oyo? Ezali mokili motindo oyo nde Bokonzi na Nzambe ekosala yango.​—Nzembo 37:10, 11; 85:10–13; Mika 4:3, 4.

Ezali ndoto mpamba? Te. Tángá mikapo ya Makomami mizali kati na paragrafe outi koleka, mpe okomona kati makambo nyonso makomami ete, ezali nde bilaká ya solo bipesami na Nzambe. Soki bapesi yo naino bandimbola ya solo te kino sikawa, mpo na oyo Bokonzi na Nzambe ekoki kosala mpe ekosala mpo na bato, boye basili koyiba yo maloba na Nzambe.

Likambo ya esengo mpenza lizali ete, makambo makoki kobongwana. Yesu alobaki ete na eleko na biso, “nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Zulunalo oyo ozali kotanga, ezali moko na biloko oyo bisalelami na kati na mosala yango ya kosakola. Tolendisi yo ete omitika kozimbisama te na basakoli ya lokutá. Tokólisa boyekoli na biso na Liloba na Nzambe mpo na koyeba solo likoló na Bokonzi. Mpe tósa Bokonzi yango, oyo ezali ebongiseli ya Jéhovah Nzambe, Mobateli Monene na mpate. Ya solo, ezali elikya bobele moko mpo na bato, mpe ekozanga kokokana te.

[Elilingi na lokasa 5]

Luther ateyaki ete ekoki na kotalela biyangeli na bato lokola Bokonzi na Nzambe

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na lotomo na bolingo ya British Museum

[Elilingi na lokasa 7]

Lokola Mobateli na mpate na bolingo, na nzela na Bokonzi na ye, Jéhovah akotya ezalela ya bomoi oyo moto moko te akokaki komema yango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto