Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/2 nk. 16-17
  • Na ntina na losambo ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na ntina na losambo ya solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/2 nk. 16-17

Yesu ateyi biso

Na ntina na losambo ya solo

Nzambe andimaka losambo nyonso?

▪ Yesu ayokelaki bato oyo bakosamaki na losambo ya lokuta mawa. Akebisaki na ntina na “basakoli ya lokuta oyo bazali koya . . . balati mposo ya mpate, kasi na kati bazali nde bambwa ya zamba ya lokoso.” (Matai 7:15) Omoni ete bato mosusu basalelaka lingomba mpo na kosala makambo ya mabe?

Yesu ayebisaki Nzambe na libondeli ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Na yango, Nzambe andimaka te losambo oyo eyokani te na solo ya Biblia. Yango wana, mpo na bakonzi mosusu ya mangomba ya lokuta, Yesu asalelaki maloba ya Nzambe oyo elobi boye: “Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.”​—Matai 15:9.

Lingomba ya solo ezali?

▪ Ntango Yesu akutanaki na mwasi moko Mosamaria, oyo akosamaki na losambo ya lokuta alobaki na ye boye: “Bino bosambelaka oyo boyebi te; . . . basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:22, 23) Emonani polele ete moto akoki komona losambo ya solo.

Yesu alobaki boye: “Nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko; kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo.” Na yango, Yesu ayebaki ete lingomba oyo ateyaki, ezalaki lingomba kaka moko ya solo. (Yoane 8:28) Yango wana, alobaki ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Lokola basambeli ya solo basangani na nzela kaka moko mpo na kokende epai ya Tata, basengeli mpe kosangana na losambo kaka moko ya solo.

Ndenge nini okoki koyeba basambeli ya solo?

▪ Mokristo azali moto oyo alandaka Yesu Kristo. Tótalela makambo minei oyo soki moto alandi ndakisa ya Yesu akomonisa polele ete azali moyekoli na ye.

1. Yesu Kristo ayebisaki Yehova na libondeli boye: “Nayebisi bango nkombo na yo.” (Yoane 17:26) Bakristo ya solo basalaka kaka bongo.

2. Yesu azalaki kosakola na ntina na Bokonzi ya Yehova mpe atindaki bayekoli na ye bákende ndako na ndako mpo básala mpe bongo. Alobaki boye: “Na engumba nyonso to mboka nyonso bokokɔta, bóluka nani na kati na yango abongi.” Na nsima, ayebisaki bayekoli na ye boye: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Matai 10:7, 11; 28:19) Okoki kozala na mokakatano te mpo na koyeba bakristo ya solo lelo oyo mpo bazali kokoba kosala kaka mosala yango.

3. Yesu aboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Na yango, alobaki mpo na bayekoli na ye boye: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:14) Basambeli ya solo basengeli mpenza koyebana ete bakɔtaka te na makambo ya politiki.

4. Yesu azalaki mpenza kondima komipimela makambo mosusu mpo azalaki kolinga basusu. Alobaki boye: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Bakristo ya solo batyelanaka likebi mpe bakɔtaka na bitumba te.

Losambo ya solo ekoki komemela yo litomba nini?

▪ Mpo na kozala na lingomba ya solo, osengeli liboso koyeba Yehova malamu. Koyeba Nzambe ekosalisa yo olanda nzela malamu ya bomoi mpe ekotondisa motema na yo na bolingo ya Nzambe. Yehova alaki bato oyo balingaka ye bomoi oyo ezangi nsuka. Na yango Yesu alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 15 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 16]

“Bókeba na basakoli ya lokuta oyo bazali koya epai na bino balati mposo ya mpate, kasi na kati bazali nde bambwa ya zamba ya lokoso.”​—Matai 7:15

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto