Makambo nyonso etángamá
Ndimbola: Makambo oyo ekómelaka moto, mpe mbala mingi ezalaka makambo mabe oyo moto akoki kobongola yango te. Liteya oyo elobaka ete makambo nyonso etángamá elobaka ete makambo nyonso ekómelaka moto mpo nguya moko boye oyo eleki moto to Nzambe akaná ete ezala bongo; ezali nde kondima ete soki likambo ekwei, ekwei mpo ekanamá bongo. Maloba yango mpe liteya yango ezali na kati ya Biblia te.
Moto na moto azali nde na “ntango” oyo bakatelá ye “mpo na kokufa”?
Baroma ná Bagrɛki ya kala bazalaki kondima liteya yango mingi. Na kolanda masapo ya Bagrɛki, banzambe misato ya basi bazalaki kokana ndenge bomoi ya moto ekozala: bazalaki kotonga nsinga ya bomoi, komeka bolai na yango mpe kokata yango.
Mosakoli 3:1, 2 elobeli “ntango ya kokufa.” Kasi, mpo na komonisa ete yango ezali te ntango ya sikisiki oyo bakatelá moto na moto, Mosakoli 7:17 epesi toli oyo: “Kozala mabe koleka ndelo te, to kokóma zoba te. Mpo na nini okufa wana ezali naino ntango na yo te?” Masese 10:27 elobi boye: “Bambula ya bato mabe ekoyeisama mokuse.” Mpe Nzembo 55:23 ebakisi boye: “Bato oyo bazali na ngambo ya makila mpe bato ya bokosi, bakokokisa ata katikati ya mikolo na bango te.” Bongo Mosakoli 3:1, 2 elingi mpenza koloba nini? Ezali kolobela nde kobotama mpe kokufa ya moto na mokili oyo ya kozanga kokoka. Ezali na ntango oyo bato babotamaka mpe na ntango oyo bakufaka—mbala mingi elekaka mbula 70 to 80 te, kasi moto akoki kokufa liboso to nsima ya bambula wana.—Nz. 90:10; talá mpe Mosakoli 9:11.
Soki ntango mpe ndenge oyo moto akokufa etángamá ntango abotami to mpe liboso abotama, mbɛlɛ ntina ya kokima makama to mpe koluka kobatela nzoto ezali te, mpe mbɛlɛ bato bakufaka kaka mingi ata soki bamibateli. Kasi kanisá naino: na ntango ya bitumba nani azalaka na likama, moto oyo azali esika etumba ezali konginda to moto oyo azali mosika na esika etumba yango ezali? Obatelaka nzoto mpe omemaka bana na yo epai ya monganga? Mpo na nini mbala mingi, bamɛli-likaya bakufaka mbula misato to minei liboso ya bato oyo bamɛlaka likaya te? Mpo na nini bato bakufaka mingi na likama ya motuka te soki basofele bazali kotosa mibeko ya nzela? Ntembe ezali te ete komibatela ezali malamu.
Likambo nyonso oyo esalemaka ezali “mokano ya Nzambe”?
2 Pe. 3:9: “Yehova . . . azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (Kasi bato nyonso te nde bamonaka ntina ya motema molai ya Nzambe. Emonani polele ete “mokano ya Nzambe” ezali te ete bato mosusu bábongola motema te. Talá Emoniseli 9:20, 21.)
Yir. 7:23-26: “Napesaki bango [Yisraele] mitindo ya liloba oyo: ‘Bótosa mongongo na ngai, mpe nakokóma Nzambe na bino, mpe bino bokokóma bato na ngai; mpe bosengeli kotambola na nzela na ngai nyonso oyo nakopesa bino mitindo, mpo makambo na bino etambola malamu.’ Kasi bayokaki te . . . Nazalaki kaka kotindela bino basaleli na ngai nyonso basakoli, mokolo na mokolo nazalaki kaka kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango. Kasi bayokaki ngai te, mpe basembolaki litoi na bango te, kasi bazalaki kaka kokómisa mitó na bango makasi.” (Emonani ete mabe oyo ezalaki kosalema na Yisraele ezalaki “mokano ya Nzambe” te.)
Mrk. 3:35: “Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai.” (Soki likambo nyonso oyo moto asali ezali “mokano ya Nzambe,” mbɛlɛ moto nyonso azali na boyokani na Yesu, ndenge alobeli yango awa. Kasi, alobaki na bato mosusu boye: “Bino bouti na tata na bino Zabolo.”—Yoa. 8:44.)
Mpo na nini makambo ebele oyo bato bayebi kolimbola te esalemaka?
Mos. 9:11: “Ntango ná makambo ekanami te [“makila malamu to mabe,” LNz] ekwelaka bango nyonso.” (Na yango, soki moto azwi likama, ezali te mpo makambo ya bomoi na ye etángamá, ekoki kozala nde mpo na makambo oyo ekanami te.)
Ebele ya bampasi oyo bato bamonaka ezali foti na bango moko to ya bato mosusu?
Rom. 5:12: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Biso nyonso tobotamá na kozanga kokoka mpe na mposa ya kosala mabe oyo tosangolá epai na Adama.)
Mos. 8:9: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.”
Mas. 13:1: “Mwana azalaka na bwanya ntango disiplini ya tata ezali.” (Makambo oyo baboti basalaka elandaka bana.)
Gal. 6:7: “Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Talá mpe Masese 11:17; 23:29, 30; 29:15; 1 Bakorinti 6:18.)
Ezali na bikelamu oyo eleki bato na nguya mpe esalaka bango mabe?
Em. 12:12: “Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.” (Talá mpe Misala 10:38.)
Nzambe ayebaka mpe abongisaka liboso likambo nyonso?
Yis. 46:9, 10: “Nazali Nzambe mpe Nzambe mosusu azali te, mosusu oyo azali lokola ngai mpe azali te; Moto oyo banda na ebandeli ayebisaka ndenge makambo ekosuka, mpe banda kala makambo oyo esalemi naino te; Moto oyo alobaka ete: ‘Mokano na ngai ekosimba, mpe eloko nyonso oyo ezali kosepelisa ngai, nakosala yango.’” (Ayebisaka mokano na ye; abongisaka makambo mosusu liboso mpo na kokokisa mokano yango, mpe azali na nguya nyonso ya kosala ete makambo yango ekokisama.)
Yis. 11:1-3: “Mwa etape ekobima na ekumu ya Yese; mpe mwa nzete ya sika oyo ekobima na misisa na ye ekobota. [Yesu abotamaki na libota ya Yese.] Mpe elimo ya Yehova ekofanda mpenza likoló na ye, . . . mpe akosepela na kobanga Yehova.” (Yehova asakolaki bongo mpo na Mwana na ye mpo ayebaki makanisi na ye mpe amonaki etamboli na ye na likoló banda na ntango ya bozalisi.) (Mpo na koyeba bomoi ya Yesu liboso akóma moto, talá lokasa 435, na motó ya likambo “Yesu Kristo.”)
Mib. 31:20, 21: “Nakomema bango [libota ya Yisraele] na mokili oyo nalapelaki bankɔkɔ na bango ndai, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi, mpe bakolya mpenza mpe bakotonda mpe bakokóma mafutamafuta mpe bakobaluka epai ya banzambe mosusu, mpe bakosalela mpenza bango mpe bakomemya ngai te mpe bakobuka kondimana na ngai. Mpe ekosalema mpenza boye: ntango makama mingi mpe bampasi mingi ekokwela bango, loyembo oyo [ezali kolobela ndenge bakosala ntango bakozanga botɔndi na boboto ya Nzambe] esengeli kozongisa maloba liboso na bango lokola motatoli, . . . mpo nayebi malamu mposa oyo bazali kokolisa lelo liboso nakɔtisa bango na mokili oyo nalapelaki ndai.” (Simbá ete Nzambe azalaki na likoki ya kososola ndenge etamboli na bango ekosuka, kasi elingi koloba te ete ye nde atindaki bango bázala na etamboli yango to mpe ete alingaki básala bongo; kaka na kotala makambo oyo bazalaki kosala, akokaki koyeba ndenge bakosuka. Ezali ndenge moko na moto oyo asalaka na meteo: na kolanda makambo oyo amoni, akoki koyebisa na bosikisiki ete mbula ekonɔka to te, kasi ye moto atindi yango te to alingi yango te.)
Nzambe asalelaka likoki na ye ya koyeba mpe ya kobongisa makambo liboso mpo na likambo nyonso oyo etali bikelamu na ye nyonso?
Em. 22:17: “Tiká moto nyonso oyo ayoki aloba: ‘Yaká!’ Mpe tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya; tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.” (Moto ye moko nde akopona; ebongisamá liboso te.)
Rom. 2:4, 5: “Ozali nde kotyola bonene ya boboto na ye mpe ya ezaleli na ye ya kokanga motema mpe ya motema molai na ye, mpo oyebi te ete boboto ya Nzambe elingi komema yo obongola motema? Kasi lokola ozali motema makasi mpe oboyi kobongola motema, ozali nde komibendela nkanda na mokolo ya nkanda mpe Nzambe akomonisa nkanda yango na mokolo oyo akosambisa na boyengebene.” (Batindi moto na makasi te ete alanda nzela moko oyo ebongisamá. Kasi moto na moto akozongisa monɔkɔ mpo na makambo oyo azali kosala.)
Sef. 2:3: “Bóluka Yehova, bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele . . . Bóluka boyengebene, bóluka komikitisa. Ntango mosusu bokobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova.” (Nzambe ya boyengebene mpe ya bolingo akoki kolendisa bato básala makambo ya malamu na elikya ya kozwa mbano soki ayebi ete ebongisamá liboso ete bato yango bálonga te?)
Ndakisa: Moto oyo azali na radio, akoki koyoka nsango ya mokili. Kasi lokola akoki kolanda emisyo moko boye, yango elimboli te ete mbala moko alandi emisyo yango. Asengeli liboso kofungola radio mpe koluka emisyo yango. Ndenge moko mpe, Yehova akoki koyeba likambo liboso, kasi Biblia emonisi ete aponaka ntango ya kosalela likoki yango mpe asalelaka likoki yango na mayele, mpo amemyaka bonsomi ya kopona oyo apesaki bato.—Talá Ebandeli 22:12; 18:20, 21.
Ntango Nzambe akelaki Adama, ayebaki ete Adama akosala lisumu?
Talá makambo Nzambe ayebisaki Adama ná Eva: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolanda na mabele.” “Lisusu Yehova Nzambe apesaki moto etinda oyo: ‘Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe, osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.’” (Eba. 1:28; 2:16, 17) Okolendisa bana na yo básala mosala moko oyo emonani ete ekopesa matomba mingi, nzokande oyebi malamu ete mosala yango ekosimba te? Okokebisa bango mpo na likama moko boye, nzokande oyebi malamu ete obongisi makambo na ndenge ete bákoka kokima likama yango te? Soki okoki kosala bongo te, okanisi ete Nzambe nde akoki kosala yango?
Mat. 7:11: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na bino oyo azali na likoló, akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye biloko ya malamu koleka?”
Soki Nzambe ayebaki ete Adama akosala lisumu mpe abongisaki likambo yango liboso, ná bampasi nyonso oyo yango ebimisá, na yango, tokoloba ete ntango akelaki Adama, Nzambe ye moko nde abandisaki mabe nyonso oyo bato basali na mokili. Boye, bitumba, kobomana, pite, minyoko, lokuta, bokosi mpe maladi, nyonso wana eutá kaka na ye. Kasi Biblia elobi polele boye: “Ozali Nzambe oyo asepelaka na mabe te.” (Nz. 5:4) “Molimo na ye eyinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.” (Nz. 11:5) “Nzambe . . . akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) “[Mokonzi Masiya oyo Nzambe aponá] akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu, mpe makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.” (Nz. 72:14) “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoa. 4:8) “Ye alingaka boyengebene mpe bosembo.”—Nz. 33:5.
Nzambe akanaki liboso ndenge Yakobo ná Esau bakozala?
Eba. 25:23: “Yehova alobaki na ye [Rebeka] ete: ‘Bikólo mibale ezali na kati ya libumu na yo, mpe bituluku mibale ya bato ya bikólo ekokabwana na kati na yo; mpe etuluku moko ya bato ya ekólo ekozala makasi koleka etuluku mosusu ya bato ya ekólo, mpe mokóló [Esau] akosalela leki [Yakobo].’” (Yehova atángaki na baselile ya mapasa wana atako bazalaki naino na libumu. Mbala mosusu atalelaki makambo oyo amonaki na baselile yango ntango alobelaki liboso bizaleli oyo bilenge mibali yango bakozala na yango mpe ayebisaki liboso ndenge bakosuka. [Nz. 139:16] Kasi na vɛrsɛ oyo, eloko moko te emonisi ete akatelaki bango ndenge bakozala seko to ete akanaki liboso likambo mokomoko oyo ekobima na bomoi na bango.)
Etángamaki liboso ete Yudasi Mokeriota nde akotɛka Yesu?
Nz. 41:9: “Moto oyo azalaki na kimya elongo na ngai, oyo natyelaki motema, oyo azalaki kolya limpa na ngai, atomboleli ngai litindi na ye.” (Simbá ete esakweli yango etángi polele te nkombo ya moninga yango ya Yesu. Yehova ayebaki ete Zabolo asalelaki Ahitofele, mopesi-toli ya Davidi, mpo atɛka Davidi, mpe akomisaki likambo yango mpo elakisa ndenge Zabolo asalaki mpe ndenge akosala na nsima. Ezali Nzambe te kasi ‘Zabolo . . . nde [moto] atyaki na motema ya Yudasi Mokeriota, mwana ya Simo, likanisi ya kotɛka Yesu.’ [Yoa. 13:2] Na esika ete Yudasi aboya, alandaki nde makanisi ya Satana.)
Yoa. 6:64: “Uta na ebandeli Yesu ayebaki . . . nani moto akotɛka ye.” (Maloba “uta na ebandeli” oyo ezali na vɛrsɛ oyo elimboli te uta na ebandeli ya bozalisi, to mpe uta mokolo oyo Yudasi abotamaki; kasi ezali nde “uta na ebandeli” ya bokosi ya Yudasi. Talá Ebandeli 1:1, Luka 1:2, mpe 1 Yoane 2:7, 13, epai liloba “ebandeli” emonisi te ebandeli mpenza ya makambo nyonso. Talá mpe Yoane 12:4-6.)
Bongo ntoma Paulo alobi te ete Nzambe ‘akanaki liboso’ ndenge bakristo bakozala?
Rom. 8:28, 29: “Toyebi ete Nzambe asalaka ete misala na ye nyonso epesana mabɔkɔ mpo na bolamu ya baoyo balingaka Nzambe, baoyo babengami na kolanda mokano na ye; mpo baoyo ye andimaki libosoliboso akanaki mpe liboso ete bákokana na ndenge Mwana na ye azali, mpo azala mwana ya liboso na kati ya bandeko ebele.” (Talá mpe Baefese 1:5, 11.) Nzokande, 2 Petro 1:10 elobi lisusu na bakristo yango boye: “Bósala nyonso oyo ekoki na bino mingi lisusu mpo bóbatela kobengama na bino mpe koponama na bino; mpo soki bokobi kosala makambo wana bokokwea ata moke te.” (Soki moto na moto oyo akobika atángamaki liboso, boye moko na bango akoki kokwea soki moke te, ata ndenge nini. Kasi lokola basɛngi ete moto na moto asala milende, yango emonisi ete Nzambe atángaki liboso nde etuluku ya bato yango. Nzambe akanaki ete etuluku yango mobimba ekolanda ndakisa oyo Yesu Kristo atiká. Nzokande bato oyo Nzambe aponá mpo bákɔta na etuluku wana basengeli kozala sembo soki balingi kozwa mbano oyo batyá liboso na bango.)
Ef. 1:4, 5: “Aponaki biso na bomoko elongo na ye [Yesu Kristo] liboso ya ebandeli ya mokili, mpo tózala basantu mpe tózanga mbeba liboso na ye na kati ya bolingo. Mpo akanaki liboso ete akokamata biso mpe akokómisa biso bana na ye na nzela ya Yesu Kristo, ndenge mokano na ye elingi.” (Simbá malamu ete na Luka 11:50, 51, Yesu akokanisi “ebandeli ya mokili” na ntango ya Abele. Abele azali moto ya liboso oyo andimamaki na Nzambe na bomoi na ye mobimba. Na yango, ezali nsima ya botomboki ya Edene, kasi liboso Eva azwa zemi ya Abele, nde Nzambe azwaki mokano na ye ya kobimisa “momboto” mpo na kobikisa bato. [Eba. 3:15] Nzambe akanaki ete etuluku moko ya bayekoli ya Yesu Kristo, Momboto ya liboso, bakosangana na ye mpo na kosala guvɛrnema ya sika, Bokonzi ya Masiya, oyo ekoyangela mabele.)
Minzoto ná baplanɛti etambwisaka makambo ya bomoi na biso to mpe elakisaka makambo oyo ekoya mpo tótalela yango liboso ya kozwa bikateli?
Astroloji (kotala minzoto mpo na koyeba makambo oyo ekoya) eutá wapi?
“Astroloji oyo esalemaka na Mpoto euti mpenza na mateya mpe na mimeseno ya Bakaladea mpe ya bato ya Babilone ya bambula ya 2000 L.T.B.”—The Encyclopedia Americana (1977), Vol. 2, lok. 557.
“Astroloji esimbamaki na makanisi mibale oyo bato ya Babilone bazalaki na yango: bazalaki kokanisa ete moi elekaka na zodiake (nzela moko ya zolongano na likoló) mpe ete minzoto ná baplanɛti nde banzambe. . . . Bato ya Babilone bazalaki kokanisa ete baplanɛti ezalaki kobimisela bango makambo oyo bato mosusu bazalaki komona ete esengeli kouta nde na banzambe na bango.”—Great Cities of the Ancient World (New York, 1972), L. Sprague de Camp, lok. 150.
“Na Babilone mpe na Asiri, emonanaki polele ete mayele ya astroloji euti mpenza na mimeseno ya Babilone . . . , mayele ya astroloji ezalaki na esika na kati ya losambo ya mboka: ezalaki moko ya makambo mibale oyo banganga-nzambe bazalaki kosalela . . . mpo na koyeba makambo oyo banzambe balingi; likambo ya mibale ezalaki nde kotalatala libale ya nyama oyo epesami mbeka. . . . Bazalaki kokanisa ete lolenge oyo moi, sanza mpe baplanɛti mitano ezalaki kotambola, ezalaki kolakisa mosala oyo banzambe yango mitano bazalaki kosala, bakisa mpe ya nzambe-sanza Sin ná nzambe-moi Shamash, ntango bazalaki kobongisa makambo oyo esengeli kobima na mabele.”—Encyclopædia Britannica (1911), Vol. II, lok. 796.
Mozalisi ya bato atalelaka likambo yango ndenge nini?
Mib. 18:10-12: “Epai na yo moto moko azwama te oyo azali . . . kosakola makambo oyo ebombaná, moto ya misala ya maji to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya . . . Mpo moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná.”
Yehova alobaki na bato ya Babilone boye: “Babima mpe babikisa yo, baoyo bakotalaka na minzoto, baoyo na ntango na sanza na sika, bakoyebisa yo makambo makoyela yo. Tala bazali lokola matiti makaoki . . . Bakozala bongo epai na yo, baoyo osalanaki na bango mosala, baoyo batɛkisi na yo longwa na bolɛngɛ na yo, bakolekaleka moko na moko na nzela na ye, moko te akobikisa yo.”—Yis. 47:13-15, hf.