Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 216-lok. 222
  • Koboya kokɔta na makambo ya mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koboya kokɔta na makambo ya mokili
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • “Lobiko ezali na Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova baboyaka na limemya nyonso kosangana na makambo oyo ekumisaka ekólo?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • “Bazali bato ya mokili te”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Kopesa drapo losako, kosala voti, mpe kosala mosala oyo Leta asɛngi
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 216-lok. 222

Koboya kokɔta na makambo ya mokili

Ndimbola: Kozanga kokɔtela moto to bato to kozanga kopesa mabɔkɔ na ngámbo moko boye ntango bato mibale to koleka bazali kowelana. Istware ya kala mpe ya ntango na biso emonisi polele ete na bikólo nyonso mpe ntango nyonso, bakristo ya solo bapesaka mabɔkɔ te na ngámbo moko to mosusu ya bato oyo bazali kobunda. Bapekisaka moto akɔta na milulu ya kokumisa ekólo te, bapekisaka moto asala mosala ya soda te, bapekisaka moto akɔta na lingomba moko ya politiki te, bapekisaka moto awela ebonga ya bokonzi te to mpe asala voti te. Kasi bango basambelaka kaka Yehova, Nzambe ya Biblia; bamipesá mobimba epai na ye mpe basimbi bokonzi na ye na mabɔkɔ mibale.

Bavɛrsɛ nini bakristo balandaka mpo na kotosa bakonzi ya guvɛrnema?

Rom. 13:1, 5-7: “Tiká molimo nyonso eyokelaka bakonzi oyo bazali liboso [bakonzi ya Leta], mpo bokonzi ekoki kozala te soki Nzambe atikeli yango nzela te . . . Yango wana, bosengeli mpenza koyokela bango, kaka mpo na nkanda wana te kasi lisusu mpo na lisosoli na bino. . . . Bózongisela bango nyonso oyo esengeli na bango: oyo asɛngi mpako, mpako; oyo asɛngi lifuti, lifuti; oyo asɛngi bábanga ye, bóbanga ye; oyo asɛngi lokumu, lokumu.” (Guvɛrnema moko te ekoki kozala soki Nzambe atikeli yango nzela te. Ezala bakonzi bazali na etamboli ya ndenge nini, bakristo ya solo bapesaka bango limemya mpo na mokumba oyo bazali na yango. Na ndakisa, ata soki bakonzi ya guvɛrnema bazali kosalela mbongo ya mpako na ndenge ya mabe, basambeli ya Yehova bafutaka mpako na bosembo nyonso mpo na misala oyo esalemaka mpo na bolamu ya bato nyonso.)

Mrk. 12:17: “Bongo Yesu alobaki ete: ‘Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.’” (Na yango, bakristo bayebaka ete basengeli kaka te “kofuta” mpako na guvɛrnema, kasi basengeli mpe kokokisa mikumba na bango oyo eleki ntina epai ya Nzambe.)

Mis. 5:28, 29: “[Molobeli moko ya tribinale monene ya Bayuda] alobaki boye: ‘Topesaki bino [bantoma] mitindo polelepolele ete bókoba koteya na nkombo wana [ya Yesu Kristo] te, kasi, talá! Botondisi Yerusaleme na mateya na bino, mpe bozali na mokano mpenza ya koyeisa makila ya moto wana likoló na biso.’ Petro ná bantoma mosusu bazongisaki ete: ‘Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.’” (Soki mibeko ya bakonzi eyokani te na mibeko ya Nzambe, bakristo ya solo bamekolaka ndakisa wana ya bantoma; batosaka libosoliboso Nzambe.)

Bavɛrsɛ nini bakristo ya solo balandaka mpo bákɔta te na bitumba?

Mat. 26:52: “Yesu alobaki na ye ete: ‘Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.’” (Bato bakokaki kozala na ntina monene ya kobunda koleka oyo wana, elingi koloba kobunda mpo na kobatela bomoi ya Mwana ya Nzambe? Kasi awa, Yesu amonisaki ete bayekoli na ye basengelaki te kosalela bibundeli ya mosuni.)

Yis. 2:2-4: “Ekosalema mpenza boye na eleko ya nsuka ya mikolo: ngomba ya ndako ya Yehova ekopikama makasi likoló koleka nsɔngɛ ya bangomba . . . Mpe akokata mpenza makambo na kati ya bikólo, mpe akosembola makambo etali bato mingi ya bikólo. Mpe bakotula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango mpo ekóma makwangola ya kokata matiti. Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu, bakoyekola mpe etumba lisusu te.” (Na bikólo nyonso moto na moto asengeli kopona nzela nini akolanda. Baoyo bazali kotosa likanisi ya Yehova bazali kolakisa ete ye nde Nzambe na bango.)

2 Ko. 10:3, 4: “Atako tozali kotambola na kati ya mosuni, tozali kobunda etumba te na kotalela ndenge tozali na mosuni. Mpo bibundeli ya etumba na biso ezali ya mosuni te, kasi ezali na nguya oyo euti na Nzambe mpo na kokweisa biloko oyo epikamá makasi.” (Awa, Paulo amonisi ete mpo na kobatela lisangá ete mateya ya lokuta ebebisa yango te, asalelaki bibundeli ya mosuni ata mbala moko te, na ndakisa bokosi, maloba mineneminene, to bibundeli mpenzampenza ya mosuni.)

Luka 6:27, 28: “Ngai [Yesu Kristo] nalobi na bino baoyo bozali koyoka: Bókoba kolinga banguna na bino, kosala malamu na bato oyo bayinaka bino, kopambola baoyo bazali kolakela bino mabe, kobondela mpo na baoyo bazali kofinga bino.”

Bongo mpo na nini Yehova apesaki Yisraele ya kala nzela ya kobunda bitumba?

Yehova apesaki Yisraele ya kala mitindo ete bábunda bitumba mpo na kozwa mabele oyo ye moko ayebisaki bango ete ekozala libula na bango mpe báboma bato oyo amonaki ete babongaki kotikala na bomoi lisusu te mpo bazalaki kosala misala ya nsɔni mpe bazalaki kotyola Nzambe ya solo. (Mib. 7:1, 2, 5; 9:5; Lev. 18:24, 25) Atako bongo, Yehova ayokelaki Rahaba ná Bagibeone mawa mpo bandimelaki ye. (Yos. 2:9-13; 9:24-27) Na kondimana ya Mibeko, Nzambe apesaki mitindo oyo ezalaki komonisa bitumba oyo azalaki kondima, mpe azalaki koyebisa nani asengeli kokende etumba te mpe ndenge nini etumba esengeli kosalema. Ezalaki mpenza bitumba ya Yehova. Nzokande bitumba ya kosopa makila oyo bikólo bazali kobunda lelo ezali ya Nzambe te.

Makambo ebongwanaki ntango lisangá ya bokristo esalemaki. Bakristo bazali na nse ya Mibeko ya Moize te. Bayekoli ya Kristo bazwaki mosala ya kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso; boye, basambeli ya Nzambe ya solo basengelaki kozwama na bikólo nyonso. Kasi, bikólo yango balukaka mpenza nini ntango bakendeke bitumba? Ezalaka nde mpo na kokokisa mokano ya Mozalisi ya mabele, to mpo na koluka kokokisa makambo oyo ekokumisa bikólo na bango? Soki bakristo ya solo na ekólo moko boye bakei kobunda na ekólo mosusu, bakobunda na bandeko na bango oyo bazali koluka lisalisi epai ya Nzambe kaka moko wana oyo bango mpe babondelaka. Yango wana, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bákitisa mipanga na bango. (Mat. 26:52) Lokola akómi sikoyo na nkembo kuna na likoló, ye moko nde akoboma bato oyo batyolaka Nzambe mpe mokano na ye.​—2 Tes. 1:6-8; Em. 19:11-21.

Soki tolandi istware, ndenge nini bakristo ya liboso bazalaki kotalela mosala ya soda?

“Soki otali na likebi makambo ya kala nyonso oyo tozali na yango, okomona ete tii na ntango ya Marc-Aurèle [Ampɛrɛrɛ ya Roma banda 161 tii 180 T.B.], mokristo moko te akómaki soda; mpe soki soda akómi mokristo, azalaki kotika mosala ya soda.”​—The Rise of Christianity (Londres, 1947), E. W. Barnes, lok. 333.

“Na mabele mobimba, biso bato tozalaki komipesa na bitumba, na kobomana mpe na misala nyonso ya mabe, tobongolá bibundeli na biso ya bitumba,​—mipanga na biso ekómá bitimweli ya mabele, mpe makɔnga na biso ekóma biloko ya kosala na yango bilanga,—​mpe tozali kokolisa ezaleli ya kokangama na Nzambe, boyengebene, bolingo ya bato, kondima mpe elikya oyo tozwá epai ya Tata Ye moko na nzela ya Ye oyo abakamaki na ekulusu.”​—Justin le Martyr na mokanda na ye “Dialogue avec Tryphon, oyo azalaki Moyuda” (siɛklɛ ya 2 T.B.), The Ante-Nicene Fathers (Grand Rapids, Mich.; enyatamaki lisusu na 1885 na Edinburgh), ya A. Roberts ná J. Donaldson, Vol. I, lok. 254.

“Bazalaki koboya misala ya Leta to mosala ya soda mpo na kobatela ampire. . . . bakristo bakokaki kokóma basoda te, to bamajistra te to mpe bankumu ya mboka te, lobá kaka soki moto awangani mokumba na ye ya bosantu koleka.”​—History of Christianity (New York, 1891), Edward Gibbon, nk. 162, 163.

Bavɛrsɛ nini etindaka bakristo báboya kokɔta na makambo ya politiki?

Yoa. 17:16: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai [Yesu] nazali moto ya mokili te.”

Yoa. 6:15: “Yesu, lokola ayebaki ete balingi koya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi, alongwaki akei lisusu na ngomba, kaka ye moko.” Na nsima, ayebisaki Moroma oyo azalaki guvɛrnɛrɛ boye: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama epai ya Bayuda te. Kasi nde bokonzi na ngai euti awa te.”​—Yoa. 18:36.

Yak. 4:4: “Basi ya ekobo, boyebi te ete kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe? Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.” (Mpo na nini likambo yango ezali monene mpenza? Mpo, ndenge 1 Yoane 5:19 elobi, “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” Na Yoane 14:30, Yesu abengaki Satana “mokonzi ya mokili oyo.” Na yango, soki moto apesi etuluku moko ya politiki mabɔkɔ, ezala etuluku nini, amibwaki na mabɔkɔ ya nani mpenza?)

Bakristo ya liboso bazalaki nde kokɔta na politiki? Banganga-mayele ya istware balobi nini?

“Bakonzi oyo bazalaki koyangela mokili bazalaki koyeba te mpo na nini bakristo bazalaki koboya kokɔta na politiki, mpe bazalaki kotala bango na liso ya malamu te. . . . Bakristo bazalaki koboya kokokisa mikumba mosusu ya bana-mboka Roma. . . . Bazalaki kozwa mikumba ya politiki te.”​—On the Road to Civilization, A World History (Philadelphie, 1937), A. Heckel mpe J. Sigman, nk. 237, 238.

“Bakristo bazalaki koboya kokɔta na makambo ya Leta; bazalaki koloba ete bazali libota moko ya elimo mpe ya bonganga-nzambe, mpe bokristo ezalaki mpenza kobongola bomoi ya bana-mboka na lolenge ya pɛto koleka, elingi koloba ezalaki kokɔtisa mpenza makanisi ya bosantu na mitema ya bana-mboka.”​—The History of the Christian Religion and Church, During the Three First Centuries (New York, 1848), Augustus Neander, lok. 168, H. J. Rose abongolaki yango uta na Allemand.

Bavɛrsɛ nini etindaka bakristo báboya kopesa bɛndɛlɛ losako mpe koyemba loyembo ya ekólo?

1 Ko. 10:14: “Bókima losambo ya bikeko.” (Talá mpe Kobima 20:4, 5.)

1 Yoa. 5:21: “Bana, bókeba na bikeko.”

Luka 4:8: “Yesu azongiselaki ye ete: ‘Ekomamá ete: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.”’”

Talá mpe Danyele 3:1-28.

Bililingi ná milulu ya kokumisa ekólo ezali mpe na kati ya makambo ya losambo?

“Eleki kala, Carlton Hayes, [nganga-mayele ya istware], amonisaki polele ete molulu ya kopesa bɛndɛlɛ losako mpe ya kolapa ndai oyo basalaka na biteyelo ya Amerika ezali losambo. . . . Na makambo mingi oyo basambisaki, Tribinale monene ya États-Unis endimaki nsukansuka ete milulu yango oyo basalaka mokolo na mokolo ezali nde losambo.”​—The American Character (New York, 1956), D. W. Brogan, nk. 163, 164.

“Ntango babɛndɛlɛ ebandaki, ezalaki kaka mpo na makambo ya losambo. . . . Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, bɛndɛlɛ ya ekólo Angleterre​—ekulusu motane ya Santu Georges—​ezalaki nde eloko ya losambo; kutu emonani ete mbala na mbala bazalaki kaka koluka lisalisi ya lingomba mpo na kosantisa babɛndɛlɛ ya bikólo, mpe bɛndɛlɛ mingi ebandaki nde na makambo ya losambo.”​—Encyclopædia Britannica (1946), Vol. 9, lok. 343.

“Na molulu moko oyo esalemaki na miso ya bato ebele mpe oyo ekambamaki na mokonzi-molandi ya Tribinale [monene ya basoda], mokolo ya 19 Novɛmbɛ, bapesaki bɛndɛlɛ ya Brésil lokumu. . . . Ntango basilisaki komatisa bɛndɛlɛ, ministre monene ya Mampinga, Tristao de Alencar Araripe, alobaki boye mpo na molulu yango ya ekaniseli: ‘. . . bɛndɛlɛ ekómá nzambe ya losambo ya ekólo oyo ezali kosɛnga bato básambelaka yango . . . Bamemyaka bɛndɛlɛ mpe basambelaka yango . . . Basambelaka bɛndɛlɛ kaka ndenge basambelaka ekólo.’”​—Diario da Justiça (Mboka-mokonzi, Brésil), 16 Febwali 1956, lok. 1906.

Na kolanda istware, ndenge nini bakristo ya liboso bazalaki kotalela milulu ya kokumisa ekólo?

“Bakristo bazalaki koboya . . . kopesa mbeka mpo na ampɛrɛrɛ​—tokoki koloba ete lelo, ezali lokola koboya kopesa bɛndɛlɛ losako to kolapa mbala na mbala ndai ya botosi. . . . Bakristo oyo bazalaki kowangana kondima na bango bazalaki moke mpenza, atako mbala mingi, bazalaki kotyela bango, na mabándá ya masano, etumbelo epai mɔtɔ ezalaki kopela. Eloko bazalaki kosɛnga moto ya bolɔkɔ nyonso ezalaki kaka ete atya mwa ndambo ya mpaka ya malasi na etumbelo; soki asali bongo, bazalaki kopesa ye mokanda oyo ezalaki komonisa ete apesaki mbeka mpe akoki kokende na bolɔkɔ lisusu te. Bazalaki mpe kolimbolela ye polelepolele ete soki asali bongo, asambeli ampɛrɛrɛ te, kasi andimi kaka ete lokola ampɛrɛrɛ azali mokonzi ya Leta ya Roma, azali mwa nzambe moko boye. Atako bongo, tokoki koloba ete mokristo moko te asalelaki libaku yango mpo akima.”​—Those About to Die (New York, 1958), D. P. Mannix, nk. 135, 137.

“Mpo na kosambela ampɛrɛrɛ bazalaki kobwaka mwa putulu ya mpaka ya malasi to mwa matangá ya vinyo na etumbelo oyo ezalaki liboso ya ekeko ya ampɛrɛrɛ. Likambo yango eleká kala, kasi soki totaleli yango lelo, mbala mosusu tokomona ete ekeseni mpenza te . . . na kotombola lobɔkɔ mpo na kopesa bɛndɛlɛ losako to mpe mpo na kopesa mokonzi ya Leta oyo ayebani mingi losako; elingi koloba, ezali kaka mwa elembo ya bonkɔnde, ya limemya mpe ya kokumisa ekólo. Mbala mosusu na siɛklɛ ya liboso, bato mingi bazalaki mpe komona likambo yango kaka bongo, kasi bakristo te. Bango bazalaki komona ete kosala bongo ezali nde kondima ete ampɛrɛrɛ azali nzambe, mpe soki basali bongo ezalaki nde kozanga bosembo epai ya Nzambe mpe Kristo. Yango wana, bazalaki koboya likambo yango.”​—The Beginnings of the Christian Religion (New Haven, Conn.; 1958), M. F. Eller, nk. 208, 209.

Lokola bakristo baboyaka kokɔta na makambo ya mokili, yango elingi koloba ete bamibanzabanzaka te mpo na bolamu ya bazalani na bango?

Ezali bongo te. Bayebi malamu mpe balukaka kotosa na motema moko mobeko oyo Yesu azongelaki lisusu ete: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Mat. 22:39) Balandaka mpe toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo, ete: “Tósalela bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Gal. 6:10) Bandimaka mpenza ete mosala ya ntina mingi koleka oyo bakoki kosala mpo na bolamu ya bazalani na bango ezali nde kosakwela bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, mpamba te, Bokonzi yango nde ekosilisa libela mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango, mpe yango nde ezali kofungolela baoyo bazali kopesa yango mabɔkɔ elikya ya kozala na bomoi ya seko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto