APƐNDISI
Kopesa drapo losako, kosala voti, mpe kosala mosala oyo Leta asɛngi
Kopesa drapo losako. Batatoli ya Yehova bandimaka ete kogumbama liboso ya drapo to kopesa yango losako, mbala mingi ntango loyembo ya ekólo ezali koyembama, ezali mpenza losambo; na nzela na yango moto amonisaka ete lobiko na ye euti epai ya Nzambe te, kasi epai ya Leta to epai ya bakonzi ya Leta. (Yisaya 43:11; 1 Bakorinti 10:14; 1 Yoane 5:21) Moko na bakonzi ya ndenge wana ezalaki Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone. Mpo na kolakisa nguya na ye mpe molende na ye mpo na banzambe na bango, mokonzi yango asalisaki ekeko moko molai mpe asengisaki bato ya ekólo na ye báfukamela yango ntango miziki, oyo ekokani na loyembo ya ekólo, ekobɛta. Kasi, Baebre misato: Shadrake, Meshake, mpe Abedenego, baboyaki kofukamela ekeko yango, atako bakokaki kopesa bango etumbu ya liwa.—Danyele, mokapo 3.
Na mikolo na biso, Carlton Hayes, moto moko ya mayele na masolo ya kala, akomaki boye: “Elembo ya libosoliboso ya kondima mpe eloko ya libosoliboso oyo esalelamaka na losambo ya ekólo ezali drapo. Bato balongolaka bikɔti ntango drapo ezali koleka; mpe mpo na kokumisa drapo, bakomi bakomaka maloba ya ntɔki mpe bana bayembaka nzembo.” Abakisaki ete losambo ya ekólo ezali na “mikolo mosantu” na yango, na ndakisa mokolo ya 4 Yuli na États-Unis, ezali na “basantu mpe bilombe” na yango, ata mpe “batempelo” na yango. Na Brésil, na defile moko, mokonzi monene ya basoda alobaki boye: “Tomemyaka drapo mpe tosambelaka yango . . . ndenge kaka tosambelaka ekólo.” Buku moko (The Encyclopedia Americana) elobaki ete, “drapo ezali mosantu, ndenge kaka ekulusu ezali mosantu.”
Na ebimeli na yango ya sika, buku oyo touti kolobela emonisaki ete nzembo ya ekólo “ezali lolenge ya komonisa bolingo ya ekólo mpe mbala mingi, na maloba na yango, bato basɛngaka litambwisi ya Nzambe mpe libateli na ye mpo na bana-mboka mpe bayangeli na bango.” Yango wana, basaleli ya Yehova bazali mpenza na elonga na ndenge batalelaka milulu mpo na lokumu ya ekólo, lokola kopesa drapo losako mpe koyemba nzembo ya ekólo, ete ezali mpenza losambo. Kutu, na esika oyo elobeli ndenge bana ya Batatoli ya Yehova baboyaka kopesa drapo losako to kolapa ndai ya bosembo na ekólo na biteyelo ya États-Unis, buku moko (The American Character) elobaki boye: “Na makambo mingi oyo Tribinale monene ekati, emonisi nsukansuka ete milulu wana oyo esalemaka mokolo na mokolo ezali mpenza losambo.”
Atako basaleli ya Yehova basanganaka te na milulu oyo Biblia endimi te, bapekisaka bato mosusu te básangana na yango. Lisusu, bamemyaka drapo lokola elembo ya ekólo mpe bandimaka baguvɛrnema nyonso oyo ezali koyangela ete ezali “bakonzi oyo bazali liboso,” oyo bazali kosala lokola “mosaleli ya Nzambe.” (Baroma 13:1-4) Na yango, Batatoli ya Yehova balandaka toli oyo elobi na bango ete bábondelaka “mpo na bakonzi mpe baoyo nyonso bazali na bibonga minene.” Kasi, tosalaka yango “mpo tókoba kofanda na kimya mpe na mobulu te na bomoi na ezaleli ya kokangama mobimba na Nzambe mpe na lisɛki te.”—1 Timote 2:2.
Kosala voti mpo na kopona bakonzi ya politiki. Bakristo ya solo bamemyaka lotomo oyo bato mosusu bazali na yango ya kosala voti. Bapekisaka maponami te, mpe batosaka bakonzi oyo baponami na voti. Nzokande, bango moko bakɔtaka na makambo ya politiki te. (Matai 22:21; 1 Petro 3:16) Mokristo asengeli kosala nini na ekólo oyo mibeko elobi ete mwana-mboka nyonso asengeli kosala voti to na esika oyo bato mosusu batombokelaka bato oyo baboyi kokende na biro ya voti? Ntango mokristo akutani na likambo ya ndenge wana, lokola ayebi ete Shadrake, Meshake, mpe Abedenego bakendaki tii na mokili ya Dura, akoki kozwa ekateli ya kokende na biro ya voti soki lisosoli na ye epekisi ye te. Nzokande, akokeba ete amikɔtisa na makambo ya politiki te. Asengeli kotalela mitinda motoba oyo:
Bayekoli ya Yesu bazali “bato ya mokili te.”—Yoane 15:19.
Bakristo bazali bamonisi ya Kristo mpe ya Bokonzi na ye.—Yoane 18:36; 2 Bakorinti 5:20.
Lisangá ya bokristo ezali na bomoko ya mateya, mpe basangani na yango balinganaka na bolingo lokola oyo Kristo amonisaki.—1 Bakorinti 1:10; Bakolose 3:14.
Bato oyo baponi mokonzi moko na voti bazali mpe na ngambo na makambo oyo akosala.—Talá mitinda oyo ezali na maloba ya 1 Samwele 8:5, 10-18 mpe 1 Timote 5:22.
Yehova amonaki ete Bayisraele baboyaki Ye na ndenge bamonisaki mposa ete moto moko azala mokonzi na bango.—1 Samwele 8:7.
Bakristo basengeli kozala na elobeli ya polele ntango bazali kolobela Bokonzi ya Nzambe epai ya moto nyonso, ata soki moto yango azali na ngámbo nini na makambo ya politiki.—Matai 24:14; 28:19, 20; Baebre 10:35.
Kosala mosala oyo Leta asɛngi. Na mikili mosusu, Leta asɛngaka ete moto oyo aboyi kosala mosala ya soda asala mosala mosusu mpo na bolamu ya mboka na boumeli ya mwa ntango. Ntango tokutani na likambo ya ndenge wana, tosengeli kobondela mpo na yango, mbala mosusu kosolola na mokristo moko oyo akɔmɛli na elimo, mpe na nsima kozwa ekateli na kotalela na lisosoli na biso.—Masese 2:1-5; Bafilipi 4:5.
Liloba ya Nzambe esɛngi biso ‘tótosa baguvɛrnema mpe bakonzi . . . , tómibongisa mpo na mosala nyonso ya malamu, . . . tózala bato ya makambo makasimakasi te.’ (Tito 3:1, 2) Lokola toyebi makanisi yango, tokoki komituna mituna oyo: ‘Soki nandimi kosala mosala yango, ekokɔtisa ngai na makambo ya politiki to na losambo ya lokuta?’ (Mika 4:3, 5; 2 Bakorinti 6:16, 17) ‘Mosala yango ekopesa ngai kwokɔsɔ mpo nakokisa mikumba na ngai ya bokristo to mpe ekopekisa ngai nakokisa yango?’ (Matai 28:19, 20; Baefese 6:4; Baebre 10:24, 25) ‘Kosala mosala yango ekozwa ngai ntango mingi na boye ete ekopekisa ngai namipesa na makambo ya elimo, mbala mosusu nasala mosala ya ntango nyonso?’—Baebre 6:11, 12.
Soki mokristo moko, nsima ya kotalela lisosoli na ye, amoni ete ebongi asala mosala wana na esika akɔta bolɔkɔ, bakristo mosusu basengeli koloba mabe te mpo na ekateli na ye. (Baroma 14:10) Nzokande, soki amoni ete akoki te kosala mosala yango, bakristo mosusu basengeli mpe koloba mabe te.—1 Bakorinti 10:29; 2 Bakorinti 1:24.