Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/9 nk. 21-25
  • “Lobiko ezali na Yehova”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Lobiko ezali na Yehova”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Okokumbamela yango te”
  • Ndimbola ya nzembo ya ekólo
  • Koboya na limemya
  • “Bózala na lisosoli malamu”
  • ‘Tózala na boboto epai ya bato nyonso’
  • Bizaleli malamu oyo ebongi komemya yango
    Batatoli ya Yehova mpe kelasi
  • Kopesa drapo losako, kosala voti, mpe kosala mosala oyo Leta asɛngi
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova baboyaka na limemya nyonso kosangana na makambo oyo ekumisaka ekólo?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Koboya kokɔta na makambo ya mokili
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/9 nk. 21-25

“Lobiko ezali na Yehova”

NTANGO kimya ezali lisusu te na ekólo moko to matata ekɔti na kati ya bikólo mingi, bato na bato batyelaka guvɛrnɛma na bango motema ete ekobatela bango mpe ekotya kimya. Baguvɛrnɛma esalaka makambo ndenge na ndenge mpo bapɛplɛ bázala nsima na yango. Ntango bazali kosala makambo wana mpo na kokolisa bolingo ya ekólo na mitema ya bato, milulu ya kokumisa ekólo ekómaka mingi mpe eyaka makasi.

Mbala mingi, ntango makambo ebebi na ekólo moko, bolingo ya ekólo ekómisaka bato liboke moko mpe epesaka bango makasi mpe yango ekoki kokolisa elimo ya kopesana mabɔkɔ mpe kosala mpo na bolamu ya bato nyonso. Nzokande, lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (The New York Times Magazine) elobaki ete, “lokola mposa nyonso ya makasi, bolingo ya ekólo ezali mposa oyo ekoki komema makama; soki moto amonisi yango na ndenge oyo eleki, ekoki kotinda ye na kosala makambo ya mabe mpenza.” Bato mosusu bakoki komonisa bolingo ya ekólo na bango na ndenge oyo ekoki kobebisa bonsomi ya bana-mboka mosusu, lokola bonsomi na bango ya losambo. Bakoki kobanda kotindika baklisto ya solo na kosala makambo oyo baboyaka mpo na bindimeli na bango. Baklisto basalaka ndenge nini ntango makambo ya ndenge wana ekómi makasi na esika oyo bafandi? Mitinda nini ya Makomami esalisaka bango bámitambwisa na mayele mpe bátikala sembo epai ya Nzambe?

“Okokumbamela yango te”

Na bantango mosusu, kopesa drapo losako ekómaka ndenge oyo bato bamonisaka ete balingi ekólo na bango. Kasi, badrapo mingi ezalaka na bililingi ya biloko oyo ezali na likoló, na ndakisa minzoto, mpe biloko oyo ezali awa na mabele. Nzambe amonisaki likanisi na ye na likambo ya kokumbamela biloko ya ndenge wana ntango apesaki bato na ye mobeko oyo: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko ya lola na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse ya mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te, mpo ete ngai [Yehova] Nzambe na yo nazali Nzambe [oyo asɛngaka ete básambela kaka ye, NW].”​—⁠Exode 20:​4, 5.

Tokoki mpenza koloba ete kopesa drapo ya ekólo losako to kofukama liboso na yango elimboli kotika kosambela Yehova Nzambe? Ntango bazalaki kotambola na esobe, Bayisalaele ya kala bazalaki na ‘babɛndɛlɛ’ to bilembo, mpe mabota misato misato ezalaki koyangana zingazinga na yango. (Mituya 2:​1, 2) Buku moko (Cyclopedia) ya McClintock na Strong, na esika oyo ezali kolimbola maloba ya Liebele oyo ebongolami na bɛndɛlɛ, elobi boye: “Kasi, ata moko te na maloba yango ezali kopesa likanisi oyo moto akoki kozala na yango ntango bazali kolobela ‘bɛndɛlɛ,’ elingi koloba likanisi ya drapo.” Lisusu, Bayisalaele bazalaki kotalela babɛndɛlɛ yango lokola biloko mosantu te, bazalaki mpe kosala na yango milulu te. Ezalaki kaka bilembo mpo na kolakisa bato esika oyo basengeli koyangana.

Bililingi ya bakeluba oyo batyaki na hema, mpe na nsima na tempelo ya Salomo ezalaki libosoliboso mpo na komonisa bakeluba ya likoló. (Exode 25:18; 26:​1, 31, 33; 1 Mikonzi 6:​23, 28, 29; Baebele 9:​23, 24) Likambo oyo ezali komonisa polele ete basengelaki kosambela bililingi yango te ezali ete bato mingi bazalaki komona yango te mpe ete bato basengeli kosambela baanzelu te.​—⁠Bakolose 2:18; Emoniseli 19:10; 22:​8, 9.

Tótalela mpe nyoka ya kwivre oyo mosakoli Moize asalaki ntango Bayisalaele bazalaki kotambola na esobe. Elilingi yango ezalaki elembo mpe ezalaki kosakola likambo moko. (Mituya 21:​4-9; Yoane 3:​14, 15) Bazalaki kosambela yango te, bazalaki mpe kosalela yango te na losambo. Kasi, bambula mingi mpenza nsima ya eleko ya Moize, Bayisalaele bakómaki kosambela yango, ata mpe kotumbela yango mpaka ya malasi. Yango wana, Hizikiya, mokonzi ya Yuda, abukabukaki yango.​—⁠2 Mikonzi 18:​1-4.

Badrapo ezalaka kaka bilembo mpamba? Emonisaka mpenza nini? Mokomi Paul Williams alobaki boye: “Drapo ezali elembo ya libosoliboso mpo na bolingo ya ekólo mpe ezali eloko ya losambo.” Buku moko (The Encyclopedia Americana) elobi boye: “Drapo, ndenge moko na ekulusu, ezali eloko ya bosantu.” Drapo ezali elembo ya ekólo. Yango wana, kokumbamela yango to kopesa yango losako elimboli kosambela ekólo. Moto oyo azali kosala bongo azali komonisa ete lobiko na ye ezali na mabɔkɔ ya Leta mpe azali kotosa te oyo Biblia elobi na ntina etali losambo ya bikeko.

Makomami elobi polele ete: “Lobiko ezali na Yehova.” (Nzembo 3:​8, NW) Lobiko na biso ezali na bibongiseli ya bato to na bilembo na yango te. Ntoma Paulo apesaki baninga na ye baklisto toli oyo: “Balingami na ngai, bókima losambo ya bikeko.” (1 Bakolinti 10:14) Baklisto ya liboso bazalaki kosangana na milulu ya kosambela Leta te. Na kati ya buku na ye (Those About to Die), Daniel Mannix alobaki boye: “Baklisto bazalaki koboya . . . kopesa amperɛrɛ [ya Loma] bambeka, likambo oyo lelo ekokani mpenza na koboya kopesa drapo losako.” Baklisto ya solo lelo oyo basalaka mpe likambo yango te. Mpo na kosambela kaka Yehova, baboyaka kopesa drapo ata ya ekólo nini losako. Na ndenge yango, batyaka Nzambe na esika ya liboso, kasi babosanaka te komemya baguvɛrnɛma mpe bakonzi na yango. Bayebaka ete basengeli kotosa “bakonzi oyo bazali liboso,” elingi koloba bakonzi ya Leta. (Baloma 13:​1-7) Kasi, Makomami elobi nini mpo na koyemba nzembo mpo na ekólo, na ndakisa loyembo ya ekólo (hymne national)?

Ndimbola ya nzembo ya ekólo

Buku moko (The Encyclopedia Americana) elobi boye: “Nzembo ya ekólo emonisaka makanisi ya bato mpo na ekólo na bango mpe mbala mingi, na nzembo yango, basɛngaka Nzambe atambwisa mpe abatela bato ya ekólo yango to mpe bakonzi na bango.” Nzembo ya ekólo ezali mpenza libondeli mpo na ekólo. Na banzembo yango mingi basɛngaka ete ekólo ezala malamu mpe eumela. Baklisto ya solo bakoki kosangana na mabondeli ya ndenge wana?

Mosakoli Yilimia afandaki na kati ya bato oyo bazalaki koloba ete basalelaka Nzambe. Kasi, Yehova alobaki na ye boye: “Kobondela mpo na bato oyo te, kobelela to kosala libondeli mpo na bango te, kosɛnga ngai na etingya te, mpo nakoyokela yo te.” (Yilimia 7:​16, NW; 11:14; 14:11) Mpo na nini Nzambe alobaki na Yilimia ndenge yango? Mpamba te bato yango bamipesaki na moyibi, na koboma bato, na kosala ekobo, na kokata ndai ya lokuta, mpe na kosambela bikeko.​—⁠Yilimia 7:⁠9.

Yesu Klisto alakisaki nzela ntango alobaki boye: “Nazali kosɛngela bango; nazali kosɛngela mokili te, kasi baoyo opesaki ngai.” (Yoane 17:⁠9) Makomami elobi ete “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe” mpe “ezali koleka.” (1 Yoane 2:17; 5:19) Na bongo, ekobanda boni baklisto ya solo bábondela mpo na kosɛnga bolamu mpe bomoi molai mpo na ebongiseli ya ndenge yango?

Ya solo, ezali na nzembo nyonso ya ekólo te nde basɛngaka makambo epai ya Nzambe. Buku mosusu (Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Maloba ya nzembo ya ekólo ezalaka ndenge na ndenge, mosusu ezali mabondeli mpo na mokonzi mpe mosusu elobelaka bitumba minene mpe botomboki ya minene oyo bato ya ekólo yango basalá . . . mpe mosusu emonisaka bolingo mpo na ekólo.” Kasi, bato oyo balingi kosepelisa Nzambe bakoki mpenza kosepela na bitumba mpe na botomboki oyo esalemá na ekólo moko boye? Yisaya asakolaki mpo na basambeli ya solo ete: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli ya matiti.” (Yisaya 2:⁠4) Ntoma Paulo akomaki ete: “Atako tozali kotambola na kati ya mosuni, tozali te kobunda etumba engebene oyo biso tozali na kati ya mosuni. Mpo bibundeli ya etumba na biso ezali ya mosuni te.”​—⁠2 Bakolinti 10:​3, 4.

Mbala mingi, nzembo ya ekólo elobelaka lolendo oyo bato bazali na yango ya kozala bato ya ekólo yango to komona ete baleki bato ya bikólo mosusu. Makomami ezali kondima makanisi ya ndenge wana te. Na lisukulu oyo asalaki na Aleopaji, ntoma Paulo alobaki boye: “[Yehova Nzambe] asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabelé.” (Misala 17:26) Ntoma Petelo alobaki ete: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.”​—⁠Misala 10:​34, 35.

Nsima ya kokanga ntina ya mateya ya Biblia, bato mingi bazwaka ekateli ya koboya kopesa drapo losako mpe ya koboya koyemba nzembo ya ekólo. Kasi, bakosala ndenge nini ntango basɛngisi bango básala makambo yango?

Koboya na limemya

Mpo na kolendisa bomoko na mboka na ye, Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone ya kala asalaki ekeko moko monene ya wolo na mokili ya Dula. Na nsima, abongisaki molulu mpo na kolakisa ekeko yango mpe abengisaki bakonzi ya Leta, bazuzi-bakambi, baguvɛrnɛrɛ, bapesi-toli mpe bato minene mosusu. Ntango kaka bakobɛta miziki, bato nyonso oyo bayanganaki kuna basengelaki kofukama mpe kosambela ekeko yango. Bilenge Baebele misato: Sadalaka, Mesaka na Abede-nego, bazalaki na kati ya bato oyo bayanganaki kuna. Basalaki nini mpo na komonisa ete basanganaki na losambo wana te? Ntango miziki ebandaki mpe bato nyonso bafukamaki liboso ya ekeko, Baebele yango misato baninganaki ata koningana te.​—⁠Danyele 3:​1-12.

Lelo oyo, mbala mingi bato batombolaka lobɔkɔ na liboso to bapesaka losako ya basoda to mpe batyaka lobɔkɔ na ntolo mpo na kopesa drapo losako. Ntango mosusu esɛngaka kotɛlɛma na lolenge moko boye. Na mikili mosusu, na kelasi basɛngaka bana-kelasi báfukama mpe bápesa drapo bizi. Soki batɛlɛmi kaka mpe batikali kimya ntango bato mosusu bazali kopesa drapo losako, baklisto ya solo bakomonisa ete bazali kosangana na likambo yango te, kasi bazali kotyola bango te to mpe makambo na bango te.

Ezali boni soki kotɛlɛma mpamba nde ezali komonisa ete moto azali kosangana na molulu ya kokumisa drapo? Tókamata ndakisa ete na eteyelo moko baponi mwana-kelasi moko apesa drapo losako mpo na bato nyonso mpe akosala yango libándá, liboso ya nzete ya drapo mpe bana-kelasi mosusu basengeli kotɛlɛma alima na kati ya kelasi. Na ntango wana, moto oyo atɛlɛmi akomonisa ete azali kosangana na mwana-kelasi oyo azali libándá mpo na kopesa drapo losako. Na ntango wana, soki moto atɛlɛmi, akomonisa ete azali kosangana na molulu yango. Soki ezali bongo, baoyo balingi kokɔta na molulu wana te, bakotɛlɛma te mpe bakozala nyɛɛ. Bongo soki bana-kelasi batɛlɛmaki liboso molulu wana ebanda? Na ntango wana, tokoloba te ete moto asangani na molulu soki afandi te.

Bongo soki na ndakisa basɛngi moto moko apesa drapo losako te kasi asimba yango kaka mpo ete bato mosusu bápesa yango losako, ezala na defile moko to na kati ya kelasi to na esika mosusu? Na esika ya ‘kokima losambo ya bikeko,’ lokola Makomami ezali kosɛnga yango, ekomonana ete moto yango akɔti mpenza na molulu yango. Ezali mpe bongo soki moto azali kotambola na defile. Lokola kosala likambo yango elimboli kopesa mabɔkɔ na likambo oyo bazali kokumisa na defile yango, lisosoli ya baklisto ya solo eteyaka bango ete bákɔta na makambo wana te.

Ntango bazali koyemba nzembo ya ekólo, mbala mingi esɛngaka kaka ete moto atɛlɛma mpo na komonisa ete ye mpe azali kondima makambo oyo elobami na nzembo yango. Na ntango wana, moklisto atɛlɛmaka te. Kasi, soki atɛlɛmaki liboso nzembo ebanda, ezali na ntina te afanda mpo na komonisa ete azali kosangana te. Ezali te ete atɛlɛmaki mpo balingi koyemba nzembo. Nzokande, soki esɛngi ete bato bátɛlɛma mpe báyemba, tokoki koloba te ete moto oyo atɛlɛmi mpamba mpo na limemya, kasi azali koyemba te, ete azali kondima maloba ya nzembo.

“Bózala na lisosoli malamu”

Nsima ya komonisa ete biloko ya losambo oyo bato basali ezali na litomba moko te, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Bango bakosalaka yango bazali [lokola] yango, baoyo bakotya elikya na bango wana bazali mpe bongo.” (Nzembo 115:​4-8) Na bongo, ezali polele ete mosambeli ya solo akoki kondima te kosala mosala oyo ezali kosɛnga kosala biloko oyo bato basambelaka yango, ata kosala badrapo. (1 Yoane 5:21) Makambo mosusu ekoki mpe kobima na mosala oyo, mpo na yango, moklisto ya solo akomonisa na limemya ete asambelaka drapo te to mpe oyo yango ezali komonisa, kasi asambelaka kaka Yehova.

Na ndakisa, patrɔ akoki kosɛnga na moto ya mosala amatisa to akitisa drapo oyo ezali na ndako ya mosala. Moto na moto akotalela makambo oyo yango ezali kosɛnga ye mpo na kondima to koboya kosala yango. Soki komatisa to kokitisa drapo ezali kosalema na ntango ya molulu moko, mpe bato nyonso batɛlɛmi alima to bazali kopesa drapo losako, na ntango wana, kosala likambo wana ezali kosangana na molulu yango.

Nzokande, soki komatisa to kokitisa drapo ezali na molulu moko te, yango ekoki kozala kaka ndenge moko na misala mosusu lokola kobongisa ndako, kokanga to kofungola baporte, mpe kokanga mpe kofungola maninisa. Na ntango wana, akotalela drapo ete ezali kaka elembo ya ekólo, mpe komatisa to kokitisa yango ezali kaka mosala oyo moto akoki kondima soki lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia emoni yango mabe te. (Bagalatia 6:⁠5) Lisosoli ya moto ekoki kotinda ye na kosɛnga na mokonzi na ye ete moto mosusu amatisa mpe akitisa drapo. Moklisto mosusu akoki komona mabe moko te na kondima kosimba drapo soki ezali na molulu moko te. Ata soki bazwi ekateli nini, basambeli ya solo basengeli ‘kozala na lisosoli malamu’ na miso ya Nzambe.​—⁠1 Petelo 3:⁠16.

Likanisi moko te ya Makomami epekisi moto na kosala to kokɔta na bandako ya Leta oyo ezali na drapo likoló na yango, na ndakisa na biro ya babomi-mɔ́tɔ, na biro ya komine, mpe na biteyelo. Likoló ya tɛmbrɛ ya posita, na nimero ya motuka, mpe na biloko mosusu ya Leta bakoki kotya elilingi ya drapo. Kosalela biloko ya ndenge wana emonisaka te ete moto azali kopesa losambo na ekólo. Likambo ya ntina ezali te ya koyeba soki drapo to elilingi na yango ezali na esika moko, kasi ndenge nini moto azali kotalela yango.

Mbala mingi batyaka badrapo na maninisa, na baporte, na mituka, likoló ya mesa ya biro, mpe na biloko mosusu. Batɛkisaka mpe bilamba oyo ezali na elilingi ya drapo. Na bikólo mosusu, mibeko epekisi kolata bilamba ya ndenge wana. Ata soki ezali na mobeko moko te oyo epekisi likambo yango, kasi soki moto asali yango, ekomonisa ete azali kotalela mokili ndenge nini? Mpo na bayekoli na ye, Yesu Klisto alobaki ete: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:16) Tóbosana mpe te komituna ndenge oyo baninga na biso bandimi bakokanisa soki bamoni tolati ndenge wana. Yango ekoki nde kotungisa lisosoli ya bamosusu? Ekoki ntango mosusu kolɛmbisa ekateli na bango ya kotikala makasi na kondima? Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Bótalelaka malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina, mpo bózala pɛto mpe bóbɛtisa bamosusu libaku te.”​—⁠Bafilipi 1:⁠10.

‘Tózala na boboto epai ya bato nyonso’

Na “ntango ya mpasi” oyo tozali, lokola makambo ya mokili oyo ezali se kobeba, bolingo ya ekólo ekobakisama mpenza na mitema ya bato mingi. (2 Timote 3:⁠1) Tiká ete bato oyo balingaka Nzambe bábosana ata moke te ete lobiko ezali na Yehova. Tosengeli kosambela kaka ye. Ntango basɛngaki bantoma ya Yesu likambo moko oyo eyokani te na mokano ya Yehova, balobaki boye: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”​—⁠Misala 5:⁠29.

Ntoma Paulo akomaki ete: “Moombo ya Nkolo asengeli te kobunda, asengeli nde kozala na boboto epai ya bato nyonso.” (2 Timote 2:24) Yango wana, baklisto basalaka nyonso mpo na kozala bato ya kimya, ya limemya, mpe ya boboto mpe balandaka lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia mpo na kozwa bikateli na likambo etali kopesa drapo losako mpe koyemba nzembo ya ekólo.

[Elilingi na lokasa 23]

Bilenge Baebele misato bazalaki na ekateli makasi ya kosepelisa Nzambe, kasi bamonisaki yango na limemya

[Elilingi na lokasa 24]

Moklisto asengeli kosala nini ntango bazali kosala molulu moko mpo na lokumu ya ekólo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto