Libongoli ya “Septante” ezalaki na ntina kala mpe ezali na ntina lelo oyo
MOTO monene moko ya Etiopia azalaki kosala mobembo; autaki na Yelusaleme mpe azalaki kozonga na mboka na ye. Na nzela ya esobe, afandaki na likalo na ye mpe azalaki kotánga na mongongo makasi rulo moko oyo ezalaki na makambo ya Nzambe. Bomoi ya moto yango ebongwanaki ntango balimbwelaki ye makambo oyo azalaki kotánga. (Misala 8:26-38) Moto yango azalaki kotánga Yisaya 53:7, 8 na libongoli ya libosoliboso ya Biblia na monɔkɔ mosusu: libongoli ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki. Libongoli yango esalisaki mpenza mpo na kopalanganisa nsango ya Biblia na boumeli ya bankama ya bambula, yango wana bato mosusu babengaki yango libongoli ya Biblia oyo ebongolá mokili.
Ntango nini mpe mpo na nini basalaki libongoli ya Septante? Mposa ya libongoli yango eyaki ndenge nini? Libongoli yango esalisaki na makambo nini? Libongoli ya Septante ekoki nde koteya biso likambo moko lelo oyo?
Mpo na Bayuda oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki
Na mobu 332 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) ntango Alesandala Monene akɔtaki na Ezipito, nsima ya kobebisa engumba Tulo, na mokili ya Fenisi, bato oyo bazalaki na Ezipito bayambaki ye lokola mobikisi. Kuna, atongaki Alezandria, engumba oyo ezalaki na biteyelo mingi na ntango ya kala. Lokola Alesandala alingaki ete bato ya bamboka nyonso oyo alongaki bálanda mimeseno ya Bagrɛki, akɔtisaki monɔkɔ ya Grɛki ya bato nyonso (koïnê) na mikili nyonso oyo azalaki koyangela.
Na ekeke ya misato L.T.B., Bayuda mingi bakómaki kofanda na Alezandria. Nsima ya kolongwa na boombo na Babilone, Bayuda mingi bazongaki na mboka na bango te, kasi bapalanganaki na bamboka mosusu, mpe mingi na bango bakendaki kofanda na Alezandria. Bayuda yango bayebaki mpenza koloba monɔkɔ ya Liebele? Buku moko (Cyclopedia), ya McClintock na Strong, elobi boye: “Eyebani malamu ete nsima ya boombo na Babilone, lokola Bayuda bayebaki lisusu malamu te monɔkɔ ya Liebele ya kala, bazalaki kosalela monɔkɔ ya Bakaladi mpo na kolimbola botángi ya mikanda ya Moize na basinagoga ya Palestine . . . Ekoki mpenza kozala ete Bayuda ya Alezandria babosanaki Liebele mingi koleka; bango bamesanaki koloba Grɛki oyo bato ya Alezandria bazalaki koloba.” Ekoki mpenza kozala ete ndenge oyo makambo ezalaki na Alezandria ebongaki mpenza ete Makomami ya Liebele ebongolama na monɔkɔ ya Grɛki.
Aristobule, Moyuda moko oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mibale L.T.B., akomaki ete mibeko ya Baebele ebongolamaki na monɔkɔ ya Grɛki mpe mosala yango esilaki na ntango oyo Ptolémée Philadelphe azalaki koyangela (285-246 L.T.B.). Bato nyonso bazali na likanisi moko te mpo na oyo Aristobule abengaki “mibeko.” Bato mosusu bakanisaka ete alobelaki kaka mikanda mitano ya liboso; nzokande, bato mosusu balobaka ete ekoki kozala ete alobelaki mikanda nyonso ya Makomami ya Liebele.
Ata soki likanisi na ye ezalaki nini, masolo ya kala elobaka ete Bayuda 72, oyo bazalaki bato ya mayele mingi, basalaki mosala wana ya kobongola Makomami ya Liebele na monɔkɔ ya Grɛki; ezalaki mbala ya liboso likambo ya ndenge wana esalema. Na nsima, na masolo ya kala bakómaki koloba ete bato 70 nde basalaki mosala ya kobongola. Yango wana, babengaki libongoli yango Septante, elingi koloba “70,” mpe bamonisaka yango na makomi LXX, oyo ezali motángo 70 na ekomeli ya Ba-Romain. Na nsuka ya ekeke ya mibale L.T.B., mikanda nyonso ya Makomami ya Liebele esilaki kobongolama na monɔkɔ ya Grɛki. Na ndenge yango, Makomami nyonso ndenge ebongolamaki na Grɛki ekómaki kobengama Septante.
Ezalaki na ntina mingi na ekeke ya liboso
Bayuda oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki bazalaki kosalela mingi libongoli ya Septante liboso mpe na boumeli ya eleko ya Yesu Klisto na bantoma na ye. Mingi kati na Bayuda na Baprozelite oyo bazalaki na Yelusaleme na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) bautaki na bitúká ya Azia, Ezipito, Libya, Loma, mpe Kelete, bamboka oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki. Na ntembe te, bato yango bazalaki na momeseno ya kotánga libongoli ya Septante. (Misala 2:9-11) Na bongo, libongoli yango esalaki mosala monene mpo na kopalanganisa nsango malamu na ekeke ya liboso.
Na ndakisa, ntango Setefano asololaki na bato oyo bautaki na Kilene, Alezandria, Silisia, mpe Azia, alobaki ete: “Yozefe atindaki bákende kobenga Yakobo tata na ye mpe bato nyonso ya libota na ye esika yango, na motángo ya milimo ntuku nsambo na mitano.” (Misala 6:8-10; 7:12-14) Na makomi ya Liebele, na Genese mokapo 46, balobi ete bandeko ya Yosefe bazalaki ntuku nsambo. Nzokande, libongoli ya Septante elobi motángo ya bato ntuku nsambo na mitano. Emonani mpenza ete Setefano alobaki motángo oyo amonaki na libongoli ya Septante.—Genese 46:20, 26, 27, NW, maloba na nse ya lokasa.
Ntoma Paulo, na mobembo na ye ya mibale mpe ya misato ya misionɛrɛ, ntango alekaki na Asie Mineure mpe na Grèce, ateyaki ebele ya bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki kobanga Nzambe na “Bagrɛki oyo bazalaki kosambela Nzambe.” (Misala 13:16, 26; 17:4) Bato yango bakómaki kobanga Nzambe to kosambela ye mpamba te bayekolaki mwa makambo na ye na nzela ya libongoli ya Septante. Lokola bato yango bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki, ntango Paulo azalaki kosakwela bango, azalaki kotánga to kozongela makanisi ya bavɛrsɛ mosusu na ndenge ezali na libongoli wana.—Genese 22:18, NW, maloba na nse ya lokasa; Bagalatia 3:8.
Makomami ya Grɛki ya boklisto ezongeli na bisika soki 320 maloba ya Makomami ya Liebele mpe soki tosangisi na bisika oyo emonisi kaka likanisi mpamba oyo euti na Makomami ya Liebele, nyonso ezali soki 890. Na mingi kati na bisika yango Makomami ya Grɛki ezongeli maloba ya Makomami ya Liebele na ndenge oyo ezali na libongoli ya Septante. Yango wana, maloba mosusu ekɔtá na kati ya Makomami ya Grɛki ya boklisto oyo epemami na Nzambe na ndenge oyo ezalaki na libongoli ya Septante, kasi te na ndenge ezali na bamaniskri ya Liebele. Yango ezali likambo oyo ezali mpenza na ndimbola monene! Yesu asakolaki ete nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba. (Matai 24:14) Mpo esalema bongo, esengelaki ete Yehova atika nzela ete Liloba na ye oyo epemami ebongolama na minɔkɔ ndenge na ndenge oyo bato ya mokili mobimba bakoki kotánga.
Ezali na ntina na moi ya lelo
Libongoli ya Septante ezali na ntina ata na moi ya lelo mpe esalelamaka mpo na koyeba bisika oyo bato oyo basalaki bakopi ya bamaniskri ya Liebele na nsima basalaki mabunga. Na ndakisa, Genese 4:8 (NW) elobi boye: “Nsima na yango, Kaina alobaki na ndeko na ye Abele ete: [‘Tókende na bilanga.’] Mpe ntango bazalaki na bilanga, Kaina amibwakaki likoló ya ndeko na ye Abele mpe abomaki ye.”
Maloba “tókende na bilanga” oyo ezali na kati ya bakroshe ezali te na bamaniskri ya Liebele oyo ekomamaki na ekeke ya zomi ya T.B. Nzokande, maloba yango ezali na bamaniskri ya libongoli ya Septante oyo ekomamaki liboso mpenza ya bamaniskri wana mpe na mwa makomi mosusu ya kala. Na Liebele ezali na liloba moko oyo, ntango bakomi yango, emonisaka ete maloba mosusu ezali kolanda, kasi maloba yango oyo esengeli kolanda ezali te. Ekoki kozala likambo nini esalemaki? Mokapo ya Genese 4:8 ezali na bafraze mibale elandani oyo esuki na maloba “na bilanga.” Na buku na bango oyo tolobelaki mwa liboso, McClintock na Strong bapesi likanisi oyo: “Ekoki kozala ete miso ya Moebele oyo azalaki kosala kopi ekosamaki na liloba [wana] . . . oyo ezali na nsuka ya bafraze yango mibale.” Na bongo, ekoki kozala ete mokomeli yango abosanaki fraze ya liboso oyo esuki na maloba “tókende na bilanga.” Ezali polele ete libongoli ya Septante, na bamaniskri mosusu ya kalakala oyo ezali tii lelo oyo, ekoki mpenza kosalisa mpo na komona mabunga ya bato oyo basalaki bakopi ya makomi ya Liebele na nsima.
Epai mosusu, bakopi ya libongoli ya Septante yango moko ekoki mpe kozala na mabunga, mpe ntango mosusu basalelaka makomi ya Liebele mpo na kolongola mabunga yango. Na bongo, kokokanisa bamaniskri ya Liebele mpe ya Grɛki na mabongoli oyo ezali na minɔkɔ mosusu esalisaka mpo na komona bisika oyo babongoli basalaki mabunga, ata mpe na komona mabunga oyo bakomeli basalaki; esalisaka mpe na kozala na makomi oyo ezali mpenzampenza Liloba ya Nzambe, kolongola te, kobakisa te.
Lelo oyo, ezali na bakopi mosusu ya libongoli ya Septante oyo esalemaki ata na ekeke ya minei ya T.B. mpe oyo ezali na mikanda nyonso ya Makomami ya Liebele. Nkombo ya Nzambe, Yehova, ndenge ekomami na Liebele na balɛtrɛ minei (YHWH), ezali te na bamaniskri ya ndenge wana mpe na bakopi mosusu oyo esalemaki nsima. Na bisika nyonso oyo balɛtrɛ minei yango ezalaki na makomi ya Liebele, bakopi yango na monɔkɔ ya Grɛki etii maloba oyo elimboli “Nzambe” mpe “Nkolo.” Kasi, biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolaki na mokili ya Palestine eleki sikoyo mbula soki 50 emonisaki polele ntina oyo nkombo yango ezalaki te na baminiskri oyo eyebanaki tii na ntango wana. Bato ya arkeoloji oyo bazalaki kolukaluka biloko ya kala na libongo ya wɛsti ya Mbu Ekufá bamonaki mwa biteni ya rulo moko ya kala esalemi na loposo ya nyama; rulo yango ekomamaki na monɔkɔ ya Grɛki mpe ezalaki na mikanda ya basakoli 12 (banda na Hosea tii na Malaki). Makomi yango ekomamaki kati na mobu 50 L.T.B. mpe mobu 50 T.B. Na biteni yango oyo eumeli mingi koleka bakopi nyonso oyo eyebanaki, nkombo ya Nzambe ezali na ndenge oyo ezalaki kokomama, elingi koloba na balɛtrɛ minei; na esika na yango batyaki te maloba ya Grɛki oyo elimboli “Nzambe” mpe “Nkolo.” Yango ezali komonisa ete nkombo ya Nzambe ezalaki na libongoli ya Septante na ntango oyo ekomamaki, kasi balongolaki yango nde ntango bazalaki kosala bakopi.
Na 1971, babimisaki biteni ya rulo moko ya kala esalemi na papirise (Papyrus Fouad 266). Makambo nini emonanaki na biteni yango ya libongoli ya Septante oyo ekomamá na ekeke ya mibale to ya liboso L.T.B.? Nkombo ya Nzambe ezalaki mpe na kati na yango. Biteni yango ya kalakala ya libongoli ya Septante ezali komonisa polele ete Yesu na bayekoli ya liboso bayebaki nkombo ya Nzambe mpe bazalaki kosalela yango.
Lelo oyo, Biblia ezali mokanda oyo ebongolami mingi koleka mikanda mosusu nyonso. Ebele ya bato (koleka 90 %) na mokili mobimba bakoki kotánga yango na minɔkɔ na bango, atako na minɔkɔ mosusu babongolá mikanda na yango nyonso te. Tozali mpenza na botɔndi ya kozala na libongoli moko oyo esalemi na bosikisiki mpe na elobeli ya mikolo oyo: Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu oyo ezali lelo, na mobimba to ndambo na yango, na minɔkɔ koleka 40. Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ezali na ebele ya maloba na nse ya nkasa oyo ezali kotinda na libongoli ya Septante mpe baminiskri mosusu ya kala. Ya solo, libongoli ya Septante ezali na litomba mpe na ntina mpo na bayekoli ya Biblia lelo oyo.
[Elilingi na lokasa 26]
Filipo alimbolaki vɛrsɛ oyo atángaki yango na libongoli ya “Septante”
[Bililingi na lokasa 29]
Mbala mingi ntoma Paulo azalaki kozongela makambo na ndenge oyo ezali na libongoli ya “Septante”