Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/10 nk. 28-29
  • Elakiseli ya maniskri moko ya Biblia na Liebele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elakiseli ya maniskri moko ya Biblia na Liebele
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Motolé”
  • Mosala ya moto na mayele
  • Makomi ya ba “Massorètes” ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Boyekoli nimero 5—Makomi ya Liebele kati na Makomami Mosantu
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • “Loyembo ya mbu”—Maniskri oyo ekomamaki na kati ya bileko mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • A3 Ndenge Biblia ekómelá biso
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/10 nk. 28-29

Elakiseli ya maniskri moko ya Biblia na Liebele

Liboso ya bokundoli makomi ya la mer Morte na 1947, makomi ya Biblia na Liebele ya kala oyo eyebanaki mingi​—longola mwa biteni mosusu—​ekomamaki na nsuka ya ekeke ya libwa kino ekeke ya zomi na moko ya ntango na biso. Ekokisi sikawa mibu nkoto moko. Elingi koloba ete liboso ya mobu 1947, makomi ya Biblia na Liebele makokaki kotyamela ntembe? Mpo na nini makomi ya kala na Liebele mazalaki mpenza mingi te?

Totalela naino motuna oyo ya nsuka. Na nse ya ebongiseli ya bindimeli na Bayuda, makomi nyonso ya Liebele oyo etalelamaki lokola ebebi makasi mpe ekoki lisusu kosalelama te ezalaki kotyama kati na guéniza, ebombelo moko kati na eyanganelo. Na nsima, makomi oyo mabombamaki mazalaki kolongolama mpe kokundama. Bayuda bazalaki kosala bongo mpo na kopengola ete Makomami na bango mabebisama mpe masalelama na lolenge ya mabe te. Mpo na nini? Mpo ete mazalaki na makomi minei, nkomá ya Liebele oyo emonisi nkombo mosantu ya Nzambe, oyo ekokani na “Jéhovah” na Lifalansé.

“Motolé”

Eteni monene ya makomi ya kala na Liebele malekisamaki na bosembo nyonso, na kolakisana yango longwa na ntango ya kalakala. Na ndakisa, ezalaki na makomi ya Liebele, mabyangami Kètèr, “motolé,” oyo na ebandeli ezalaki na Makomami ya Liebele nyonso, to “Kondimana ya Kala.” Ezalaki kobombama kati na eyanganelo ya kala ya etuluku moke ya Bayuda oyo bafandaki na Alep, na mboka Syrie, engumba oyo bato mingi na yango bazali bamizilma. Na liboso, makomi yango mapesamaki na maboko na Bayuda oyo babyangami Caraïtes na Yelusaleme, kasi na 1099 ba croisés bayibaki yango. Na nsima lisusu, makomi yango mazwamaki mpe mabombamaki na engumba ya kala ya Caire, na Ezipito. Na nsima ekomaki na Alep na ekeke ya zomi na mitano to liboso na yango, mpe eyebanaki nsima na nkombo ya codex ya Alep. Makomi yango, makomamaki pene na mobu 930 ya ntango na biso, matalelamaki lokola motolé ya boyebi ya bakomeli babyangami ba massorètes, lokola nkombo na yango ezali kolakisa. Oyo ezali ndakisa malamu ya komonisa libateli malamu etali kolekisama ya makomi ya Biblia, mpe ezali solo mpenza ndakisa ya makomi ya Liebele.

Kala mingi te, babombi ya makomi wana ya ntina mingi, na bobangi ya kobebisa eloko mosantu na bango engebene biyambayamba, bazalaki koboya ete bayekoli ya Biblia basalaka yango. Lisusu, lokola bakangaki bobele foto na lokasa na yango moko mpamba, bakokaki te kopalanganisa foto na yango mpo na boyekoli.

Ntango ba Britanniques balongwaki na Palestine na 1948, mobulu mobimaki kotemela Bayuda ya Alep. Eyanganelo na bango ezikisamaki; mpe codex ya motuya mingi ebungaki mpe bakanisaki ete esilaki kozika. Oyo nde kokamwa na koyoka, nsima na bambula zomi, ete ndambo misato ya minei na yango ebatelamaki mpe ememamaki na lolenge ya kobombama na Yelusaleme! Na 1976, bafoto 500 ya langi kitoko ebimisamaki na mikanda.

Mosala ya moto na mayele

Mpo na nini makomi wana mazali na ntina mingi? Mpo ete makomi na yango ya ebandeli oyo etali mileli masembolamaki mpe matyamaki bilembo penepene na mobu 930 ya ntango na biso, na Aaron Ben Asher, oyo azalaki moko na bato na mayele mingi oyo babimisaki mpe bakabolaki Biblia ya liebele. Mpo na yango, makomi yango mazalaki codex ya elakiseli, mpo na bakopi oyo elingaki na nsima kosalelama na bakomeli ya makoki mingi te.

Na ebandeli, ezalaki na ba folios 380 (nkasa 760) mpe ekomamaki mingi mpenza, na milongo misato likoló na nkasa ya parchemin (poso ya meme). Sikawa etikali na ba folio 294 oyo ezangi eteni monene ya Mikanda mitano ya Moize mpe eteni ya nsuka oyo esangisi Bileli, Loyembo ya Salomo, Danyele, Esetele, Esdrase mpe Nehemya. Etangama na elembo “Al” kati na Les Saintes Ecritures​—Traduction du monde nouveau na Lingelesi elongo na mitindami. (Yosua 21:37, note.) Moïse Maimonides (oyo alakisami awa), Moyuda ya mayele mingi na ekeke ya zomi na mibale ya ntango na biso, alobaki mpo na codex ya Alep ete, naino amona mosusu kitoko lokola yango tea.

Makomi ya Liebele oyo makomami na maboko uta ekeke ya zomi na misato kino ekeke ya zomi na mitano ezalaki bosangisi ya bituluku mibale ya makomi ya ba massorètes (Ben Asher mpe Ben Naphtali). Na ekeke ya zomi na motoba, Jacob Ben Hayyim abimisaki Biblia ya Liebele oyo enyatami na makomi mauti na bosangisi wana, mpe makomi yango masalelamaki lokola mitindami na Biblia nyonso ya libele oyo enyatamaki na boumeli ya bikeke minei oyo bilandaki.

Ebimeli ya misato ya Biblia Hebraica (makomi ya Liebele manyatami), oyo ebimisamaki na 1937, ezali kosalela lolenge esalelamaki na Ben Asher, lolenge oyo emonisami mpe kati na makomi mosusu mayebani na nkombo ya Leningrad B 19⁠A oyo ebombami na Russie. Leningrad B 19⁠A ekomamaki na 1 008 ya ntango na biso. Université ya Liebele na Yelusaleme ezali na mokano ya kobimisa makomi ya Liebele ya Alep na mobimba na yango mpo na mwa ntango, mpe bandimbola etali makomi mosusu mpe mabongoli ya ntina mingi, bakisa mpe makomi ya la mer Morte.

Makomi ya Biblia oyo tozali kosalela lelo mabongi kotyelama motema. Mapemamaki na Nzambe mpe malekisamaki na boumeli ya bikeke na nzela ya bakomeli ya mayele mpe ya makoki mingi. Libateli monene oyo bakomeli yango bamonisaki ezali komonana na likambo oyo ete, na motindo ya kokamwa, bokokanisi kati na rulo ya Yisaya oyo ezwamaki penepene ya la mer Morte na 1947 mpe makomi ya ba massorètes ezali komonisa bobele bokeseni moke, atako rulo ya la mer Morte ekomamaki mibu koleka nkoto moko liboso ya Biblia ya kala ya ba massorètes. Lisusu, lokola codex ya Alep ekoki kotangama na bayekoli ya Biblia, ekopesa lisusu bantina mingi ya kozala na elikya makasi na bosolo ya makomi ya Makomami ya liebele. Ya solo, “liloba na Nzambe na biso likotelema libela.”​—Yisaya 40:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na boumeli na mwa bambula, bayekoli mosusu ya Biblia bazalaki na ntembe ete codex ya Alep ezali makomi matyami bilembo na Ben Asher te. Kasi, uta ntango babandaki koyekola codex yango, ekomaki polele ete ezali mpenza makomi ya Ben Asher oyo Maimonides alobelaki.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 28]

Bibelmuseum, Münster

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]

Jewish Division / The New York Public Library / Astor, Lenox, and Tilden Foundations

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto