Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • gt mok. 23
  • Makamwisi mingi na Kapernaume

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makamwisi mingi na Kapernaume
  • Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Masolo mosusu
  • Yesu asali makamwisi minene na Kapernaume
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu asakoli na Galile mobimba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Sinagoga—Epai Yesu ná bayekoli na ye basakolaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Yesu atiki Yailo mpe azongi na Nazarete
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
gt mok. 23

Mokapo 23

Makamwisi mingi na Kapernaume

YESU asili kopona bayekoli na ye minei ya liboso—Petelo, Andre, Yakobo mpe Yoane—mpe na mokolo na sabata bakei elongo kati na eyanganelo ya Kapernaume. Kuna Yesu abandi koteya, mpe bato bakamwe mpo ete maloba na ye mazali na kilo mpenza mpe ateyi bango lokola bakomeli te.

Na mokolo na sabata oyo, moto moko azali na elimu na mbindo azali na kati na eyanganelo. Nsima moke angangi: “Olingi nini na biso, yo Yesu na Nazarete? Oyei koboma biso? Nayebi yo, ozali Mobulami na Nzambe.”

Elimu mabe yango azali moko na baanzelu ya Satana. Yesu apameli ye mpe alobi: “Kanga monoko mpe bima na ye!”

Elimu mabe abwaki moto yango na nse, alengisi ye lokola moto abeli maladi ya ndeke mpe angangi na mongongo makasi mpenza. Abimi na moto yango kozanga kozokisa ye. Bato nyonso bakamwi, batunani ete: “Oyo likambo nini? Mpo ete na bokonzi mpe na nguya azali kopesa bilimu na mbindo bitinda mpe bazali kotosa ye.” Nsango na ye epalangani na bisika nyonso na etuka yango.

Yesu na bayekoli na ye babimi na eyanganelo, bakei na ndako ya Simona oyo abengami Petelo. Kuna, mama na mwasi ya Petelo azali kobɛla, azali na mɔto makasi na nzoto na ye. Bayekoli balombi Yesu ete ˈsalisa ye.ˈ Yesu abelemi na ye, asimbi ye na loboko mpe atelemisi ye. Maladi etiki ye mpe abandi kolambela bango!

Na mpokwa, nsima na kolimwa na moi, ebele na bato bauti epai na epai bayei na bato na bango ya maladi na ndako ya Petelo. Mosika te, mboka mobimba etondi na monoko na ndako na Petelo! Yesu abikisi bango nyonso oyo bazali na maladi, akakatani ata mpo na maladi moko te. Abikisi ata bato mingi na bilimu mabe oyo bizali konyokola bango. Ntango azali kobimisa yango, bilimu bizali konganga ete: “Yo ozali mwana na Nzambe.” Kasi Yesu apameli bango, apekisi bango ete baloba te mpo bayebi ete ye Klisto. Malako 1:21-34; Luka 4:31-41; Matai 8:14-17.

▪ Likambo nini eleki na eyanganelo mokolo na Sabata nsima wana Yesu asili kobenga bayekoli na ye minei ete balanda ye?

▪ Epai wapi Yesu akei nsima ya kobima na eyanganelo, mpe likamwisi nini asali kuna?

▪ Nini esalami lisusu nsima, bobele na mpokwa wana?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto