Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 23 lok. 60-lok. 61 par. 5
  • Yesu asali makamwisi minene na Kapernaume

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu asali makamwisi minene na Kapernaume
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Makamwisi mingi na Kapernaume
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Sinagoga—Epai Yesu ná bayekoli na ye basakolaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Yesu asakoli na Galile mobimba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 23 lok. 60-lok. 61 par. 5
Bato ya maladi bayei na ndako ya Petro, mpe Yesu abikisi bango

MOKAPO 23

Yesu asali makamwisi minene na Kapernaume

MATAI 8:14-17 MARKO 1:21-34 LUKA 4:31-41

  • YESU ABIMISI DEMO MOKO

  • YESU ABIKISI MAMA-BOKILO YA PETRO

Yesu abengi bayekoli minei​—Petro, Andre, Yakobo, mpe Yoane—​mpo bákóma baluki-bato. Sikoyo, na mokolo ya Sabata, bango nyonso bakei na sinagoga ya Kapernaume. Yesu ateyi na sinagoga yango; na mbala oyo mpe, bato bakamwe mpo na ndenge na ye ya koteya. Ateyi lokola moto oyo azali na bokonzi, kasi lokola bakomeli te.

Na Sabata oyo, mobali moko oyo azali na bademo azali wana. Kaka na sinagoga wana, mobali yango agangi na mongongo makasi: “Biso na yo likambo nini, Yesu Monazarete? Oyei nde koboma biso? Nayebi yo malamumalamu: ozali Mosantu ya Nzambe!” Yesu apameli demo yango, mpe alobi: “Kangá monɔkɔ, mpe bimá na nzoto na ye!”​—Marko 1:24, 25.

Na mbala moko, elimo mabe yango ebwaki mobali yango na mabele mpe etutukisi ye mpe egangi na mongongo makasi. Kasi, demo yango abimi na nzoto ya moto yango, “asali ye mabe te.” (Luka 4:35) Bato oyo bazali zingazinga na ye na kati ya sinagoga bakamwe! Batuni: “Oyo likambo nini? Na bokonzi nyonso azali kopesa mitindo ata na bilimo ya mbindo, mpe bazali kotosa ye.” (Marko 1:27) Na ntembe te, nsango ya likambo wana ya kokamwa epalangani na Galile mobimba.

Ntango Yesu ná bayekoli na ye balongwe na sinagoga, bakei na ndako ya Simo, to Petro. Kuna, mama-bokilo ya Petro azali kobɛla, azali na fiɛvrɛ makasi. Basɛngi Yesu asalisa ye. Na yango, Yesu apusani, asimbi ye na lobɔkɔ, mpe atɛlɛmisi ye. Na mbala moko, abiki mpe abandi kosalela Yesu ná bayekoli na ye, mbala mosusu mpo na kolambela bango.

Na mpokwa, bato bauti bipai na bipai bayei na ndako ya Petro ná bato na bango ya maladi. Eumeli te, emonani lokola ete bato ya engumba mobimba batondi na porte. Mpo na nini? Bazali koluka Yesu abikisa bango. Kutu, ‘bato nyonso oyo bazali na bato oyo bazali kobɛla bamaladi ndenge na ndenge bamemeli ye bango. Atyeli mokomoko na bango mabɔkɔ mpe abikisi bango.’ (Luka 4:40) Ya solo, ezala maladi nini bazali na yango, Yesu abikisi bango, kaka ndenge esakolamaki. (Yisaya 53:4) Abikisi ata bato oyo bazali na bademo. Ntango bilimo mabe yango bazali kobima, bazali koganga: “Ozali Mwana ya Nzambe.” (Luka 4:41) Kasi Yesu apameli bango mpe atikeli bango nzela te báloba lisusu. Bademo yango bayebi ete Yesu azali Kristo, kasi Yesu alingi te ete bámimonisa lokola nde bazali kosalela Nzambe ya solo.

NTANGO BADEMO BAKƆTELI MOTO

Ntango demo moko to bademo ebele bakɔteli moto, bakoki konyokola ye mingi. (Matai 17:14-18) Kasi soki bademo yango babimi, moto yango akozonga malamu, ezala na makanisi to na nzoto. Mbala na mbala, Yesu asalelaki nguya oyo azalaki na yango, elimo santu ya Nzambe, mpo na kobimisa bademo.​—Luka 8:39; 11:20.

  • Likambo nini esalemi na sinagoga ya Kapernaume mokolo ya Sabata?

  • Ntango Yesu alongwe na sinagoga, akei wapi, mpe asali nini kuna?

  • Bato ya engumba yango basali nini ntango bamoni likambo oyo Yesu asali?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto