Eteni 1
Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
1, 2. Motuna nini bato bazali komituna na ntina na Nzambe, mpe mpo na nini?
NA ELEKO moko ya bomoi na yo, omitunaki mbala mosusu ete: “Soki Nzambe azali, mpe soki azali mpenza komibanzabanza mpo na biso, mpo na nini apesi nzela na mpasi?” Biso nyonso tosila kozwa mpasi, to mpe toyebi moto oyo asili kozwa yango.
2 Ya solo, na boumeli ya Lisoló na bato, bolózi mpe mawa euti na bitumba ezali kozwa bato, mpe misala mabe, koboma, bokesene, bobólá, maladi mpe liwa ya bato oyo tolingaki mingi. Bobele na ekeke na biso oyo ya ntuku mibale, bitumba bibomaki bato koleka 100 milió. Mpe bamilió mingi mosusu bazokaki mpe babungisaki bandako na bango mpe biloko na bango. Eleko na biso esili kokutana na makambo mingi ya mpasi oyo, mpo na bato mingi, ezalaki mawa mpe mpisoli, mpe mayoki ya kozanga elikya.
3, 4. Likambo oyo ete Nzambe apesi nzela na mpasi, ezali kobimisa mayoki nini epai na bato mingi?
3 Bato mosusu bazali lisusu na esengo te mpe bakanisi ete soki Nzambe azali, boye azali mpenza komibanzabanza mpo na biso te. Basusu nkutu bakanisi ete Nzambe azali te. Na ndakisa, mobali moko oyo anyokwamaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba na ntina na kokabola bikólo, kati na yango baninga na ye mpe basangani ya libota na ye bakufaki, amitunaki ete: “Nzambe azalaki wapi wana ezalaki biso na mposa na ye?” Mobali mosusu oyo abikaki kati na bamilió ya bato oyo babomamaki mbala na mbala na banazi, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, aokaki mawa mingi mpo na mpasi oyo amonaki, alobaki ete: “Soki bokokaki kolɛmbola motema na ngai, mbɛlɛ booki ete ezali bololo.”
4 Na bongo, ebele na bato bakoki te kondima lolenge nini Nzambe ya motema malamu akokaki kopesa nzela ete makambo mabe mabima. Bazali komituna soki azali mpenza komibanzabanza mpo na biso, soki mpe azali te. Mingi bakanisi ete mpasi ekozala ntango nyonso oyo moto akozala na bomoi.
[Elilingi na nkasa 2, 3]
Mokili ya sika epai mpasi ekozala te, esili kobɛlɛma?