Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rq liteya 7 nk. 14-15
  • Ndenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe kati na libondeli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe kati na libondeli
  • Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Masolo mosusu
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Pusaná penepene na Nzambe na nzela ya libondeli
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Eteni 11
    Yoká Nzambe
Makambo mosusu
Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
rq liteya 7 nk. 14-15

Liteya 7

Ndenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe kati na libondeli

Mpo na nini ezali likambo ya ntina kobondela mbala na mbala? (1)

Tosengeli kobondela nani, mpe lolenge nini? (2, 3)

Wapi makambo mabongi mpo na libondeli? (4)

Ntango nini osengeli kobondela? (5, 6)

Nzambe ayokaka mabondeli nyonso? (7)

1. Libondeli ezali koloba na komikitisa nyonso epai na Nzambe. Osengeli kobondela Nzambe mbala na mbala. Na yango okoki kobɛlɛma epai na ye lokola epai na moninga ya motema. Yehova azali monene mingi mpe na nguya mingi, nzokande ayokaka mabondeli na biso! Obondelaka Nzambe mbala na mbala?​—Nzembo 65:2; 1 Batesaloniki 5:17.

2. Libondeli ezali eteni ya losambo na biso. Na yango, tosengeli kobondela bobele Nzambe, Yehova. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki ntango nyonso kobondela Tata na ye, kasi moto mosusu te. Tosengeli kosala bobele bongo. (Matai 4:10; 6:9) Nzokande, mabondeli na biso nyonso masengeli kopesama na nkombo ya Yesu. Yango emonisi ete tozali komemya etɛlɛmɛlo ya Yesu mpe ete tozali na kondima kati na mbeka na ye ya lisiko.​—Yoane 14:6; 1 Yoane 2:1, 2.

3. Ntango tozali kobondela tosengeli koloba epai na Nzambe makambo oyo mauti na motema. Tosengeli te kosala mabondeli oyo tokangá na motó to kotánga yango na búku moko ya mabondeli. (Matai 6:7, 8) Tokoki kobondela na etɛlɛmɛlo nyonso ya limemya, na ntango nini, mpe na esika nini. Nzambe akoki koyoka ata mabondeli oyo masalemi kati na motema. (1 Samwele 1:12, 13) Ezali malamu kozala esika ya kimya oyo bato mosusu bazali te mpo na kosala mabondeli matali yo moko.​—Malako 1:35.

4. Makambo nini okoki kobondela mpo na yango? Likambo nyonso oyo litaleli boyokani na yo elongo na ye. (Bafilipi 4:6, 7) Libondeli ya ndakisa emonisi ete tosengeli kobondela na ntina na nkombo mpe mokano ya Yehova. Tokoki lisusu kosɛnga mpo na kokokisama ya bamposa na biso ya mosuni, mpo ete masumu na biso málimbisama, mpe mpo ete tózwa lisalisi mpo na kotɛmɛla masɛnginya. (Matai 6:9-13) Mabondeli na biso masengeli kozala ya moimi te. Tosengeli kobondela bobele mpo na makambo oyo mayokani na mokano ya Nzambe.​—1 Yoane 5:14.

5. Okoki kobondela ntango nyonso oyo motema na yo ezali kopusa yo na kotɔ́nda to na kosanzola Nzambe. (1 Ntango 29:10-13) Osengeli kobondela ntango ozali na mikakatano mpe wana kondima na yo etyami na komekama. (Nzembo 55:22; 120:1) Ezali malamu kobondela liboso ya kolya. (Matai 14:19) Yehova azali kobyanga biso ete tóbondelaka “ntango nyonso.”​—Baefese 6:18.

6. Mingimingi tosengeli kobondela ntango tosali lisumu monene. Na ntango yango tosengeli kosɛnga na Yehova ete ayokela biso mawa mpe alimbisa biso. Soki tozali koyambola masumu na biso epai na ye mpe kosala makasi mpenza ete tózongela yango te, Nzambe azali “pene mpo na kolimbisa.”​—Nzembo 86:5; Masese 28:13.

7. Yehova ayokaka bobele mabondeli ya bayengebene. Mpo ete Nzambe ayoka mabondeli na yo, osengeli kosala oyo ekoki na yo mpo na kolanda mibeko na ye. (Masese 15:29; 28:9) Osengeli kozala na komikitisa ntango ozali kobondela. (Luka 18:9-14) Osengeli kosala milende na komitambwisa na boyokani na makambo oyo ozali kobondela mpo na yango. Na yango okomonisa ete ozali na kondima mpe ete ozali mpenza na mposa na makambo oyo ozali koloba. Bobele na kosaláká bongo nde Yehova akoyanola na mabondeli na yo.​—Baebele 11:6.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto