Lolenge liteya yango ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda, na mangomba ya boklisto mpe na Lingomba ya Bamizilma
“Lingomba ezali mpe mwango moko oyo endimisaka bato ete mokolo mosusu basengeli kokufa, atako endimisaka bango elaka oyo ete bakozwa bomoi oyo eleki malamu nsima ya liwa, to bakobotama lisusu, to bakozwa nyonso mibale.”—GERHARD HERM, MOKOMI YA EKÓLO ALLEMAGNE.
1. Endimeli nini mangomba mingi mazwaka lokola nguba mpo na koteya elaka ya bomoi nsima ya liwa?
MPO na kopesa elaka ya bomoi nsima ya liwa, pene na mangomba nyonso ezwaka lokola nguba, endimeli oyo elobaka ete moto azalaka na molimo oyo ekufaka te mpe ete na ntango ya liwa, molimo ekendaka na mokili mosusu to ekɔtaka na ekelamu mosusu. Lokola touti komona yango na eteni oyo eleki, endimeli oyo elobaka ete molimo ya moto ekufaka te ezali liteya moko ya moboko kati na mangomba ya mikili ya Azia, uta ebandeli ya mangomba yango. Kasi tokoloba boni mpo na Lingomba ya Bayuda, mpo na mangomba ya boklisto, mpe mpo na Lingomba ya Bamizilma? Lolenge nini liteya yango ekómaki liteya ya moboko ya mangomba oyo?
Lingomba ya Bayuda endimi makanisi ya Bagreke
2, 3. Engebene buku Encyclopédie judaïque, makomi ya bulɛɛ ya Baebele mazalaki koteya ete molimo ekufaka te?
2 Lingomba ya Bayuda ebandaki na ntango ya Abalayama, esili koleka mbula soko 4 000. Makomi ya bulɛɛ ya Liebele ebandaki kokomama na ekeke ya 16 L.T.B. mpe basilisaki kokoma yango ntango Socrate na Platon babandaki kobongisa liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Makomami yango mazalaki koteya ete molimo ekufaka te?
3 Buku Encyclopédie judaïque epesi eyano: “Endimeli oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekómaki endimeli ya sikisiki mpe ya moboko bobele nsima ya eleko oyo basilisaki kokoma Biblia . . . mpe liteya yango ekómaki moko na mateya ya moboko kati na bindimeli ya Lingomba ya Bayuda mpe ya mangomba ya boklisto.” Buku yango elobi lisusu ete: “Na ntango ya lisolo ya Biblia, bazalaki kotalela moto lokola ekelamu oyo ezali mobimba. Na bongo, bokeseni ezalaki te kati na nzoto mpe molimo.” Bayuda ya ntango ya kala bazalaki kondima lisekwa ya bakufi kasi buku yango emonisi polele ete endimeli yango “ekeseni mpenza na endimeli . . . oyo elobaka ete molimo ekufaka te.”
4-6. Lolenge nini liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekómaki “moko na mateya ya moboko” na Lingomba ya Bayuda?
4 Na bongo, ndenge nini liteya oyo ekómaki “moko na mateya ya moboko” na Lingomba ya Bayuda? Istware epesi eyano. Na mobu 332 L.T.B., Alesandala Monene abɔtɔlaki mikili mingi na Moyen-Orient, nsima ya bitumba minene oyo alongaki na mwa ntango moke. Ntango akómaki na Yelusaleme, Bayuda bayambaki ye na esengo mingi. Engebene Flavius Josèphe, mokomi ya lisolo ya Bayuda na ekeke ya liboso, balakisaki ye kutu esakweli ya mokanda ya Danyele, oyo ekomamaki koleka mbula 200 liboso, mpe ezalaki kolobela polele bitumba ya Alesandala kati na mokumba na ye ya “mokonzi ya Grèce.” (Danyele 8:5-8, 21, NW) Bakitani ya Alesandala bakobaki kokokisa mwango na ye ya kopalanganisa makanisi mpe mimeseno ya Bagreke, kosaláká ete lokota ya Greke, mimeseno mpe mateya na bango ya filozofi ekɔta na mikili nyonso ya boyangeli yango. Na ezalela wana, likoki ezalaki te mpo na kopɛngola kosangisama ya mimeseno yango mibale, oyo ya Bagreke mpe oyo ya Bayuda.
5 Uta kala mpenza, na ekeke ya misato L.T.B., libongoli ya liboso ya Makomami ya Liebele na lokota ya Greke, oyo ebéngami Septante, esalemaki. Na lisalisi na yango, bato mingi ya mabota bakómaki kosepela na Lingomba ya Bayuda mpe komesana na mateya na yango; bamoko kutu bakɔtaki na lingomba yango. Epai mosusu, Bayuda babandaki koyekola mateya ya Bagreke, mpe bamoko kati na bango bakómaki bato ya filozofi, likambo oyo lizalaki mpenza likambo ya sika mpo na bango. Philon, moto ya engumba Alexandrie, azalaki moko na Bayuda oyo bakómaki bato ya filozofi.
6 Philon asepelaki mpenza na mateya ya Platon mpe amipesaki mpo na kolimbola mateya ya Lingomba ya Bayuda na kosaleláká maloba ya filozofi ya Bagreke. Engebene buku Heaven—A History (Likoló—Lisolo na yango), “na kosangisáká mateya ya filozofi ya Platon mpe lisolo ya Biblia, Philon abongiselaki banganga-mayele baklisto [mpe Bayuda] nzela.” Bongo Philon azalaki na endimeli nini na ntina na molimo? Buku yango ebakisi ete: “Mpo na ye, liwa ezongisaka molimo na ezalela na yango ya ebandeli, ezalela oyo molimo ezalaki na yango liboso ya kobotama. Lokola molimo euti na mokili ya bilimu, bomoi kati na nzoto ezali bobele eleko moko ya mokuse, mpe mingimingi eleko ya mawa, oyo ekokani na mosusu te.” Kati na banganga-mayele ya Bayuda oyo bandimaki ete molimo ekufaka te, tokoki kotánga Isaac Israeli, monganga ayebani mingi, na ekeke ya 10 mpe Moses Mendelssohn, moto ya filozofi, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya 18 mpe akómaki moto ya ekólo Allemagne.
7, 8. (a) Lolenge nini Talmud emonisaka molimo? (b) Buku ya mabombami ya Bayuda, oyo ekomamaki nsima, elobaki nini na ntina na molimo?
7 Buku mosusu oyo esali mpe bopusi mozindo kati na makanisi mpe bomoi ya Bayuda ezali bongo Talmud—lisangani ya mibeko oyo mikomamaki te mpe ndimbola na yango, oyo Balabi basangisaki na nsima, kobanda na ekeke ya mibale T.B. kino na eleko ya Moyen Âge. Engebene buku Encyclopédie judaïque, “Balabi oyo bakomaki Talmud bazalaki kondima ete molimo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa.” Talmud kutu elobaka ete bakufi basololaka na bato oyo bazali na bomoi. Buku Encyclopédie de la religion et de l’éthique elobi ete “na ntembe te, na ntina na bopusi ya filozofi ya Platon, [Balabi] bazalaki kondima ete milimo mizalaka na bomoi liboso ya kobotama.”
8 Na nsima, buku ya mabombami ya Bayuda oyo ebéngamaki Cabala, ekómaki kutu koteya ete molimo ya moto ebotamaka mbala na mbala. Na ntina na endimeli oyo, buku The New Standard Jewish Encyclopedia elobi ete: “Emonani ete likanisi yango eutaki na ekólo Inde. . . . Na buku Cabala, likanisi yango ebimisami polele kati na buku Bahir, mpe na nsima, na buku Zohar, endimamaki mingi mpenza na bato oyo basalaka misala ya bilimu mabe, mpe endimeli yango ezalaki na bopusi monene likoló na bindimeli mpe mikanda ya ba Hassidim.” Lelo oyo, na ekólo Israël, liteya oyo elobaka ete molimo ebotamaka mbala na mbala endimami mingi lokola liteya ya Lingomba ya Bayuda.
9. Etɛlɛmɛlo ya bituluku ya Lingomba ya Bayuda ezali nini na ntina na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te?
9 Na yango, liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda na ntina na bopusi ya filozofi ya Bagreke, mpe liteya yango endimami lelo oyo na bituluku na yango mingi mpenza. Tokoki koloba nini mpo na kokɔta ya liteya yango kati na mangomba ya boklisto?
Mangomba ya boklisto endimi makanisi ya filozofi ya Platon
10. Nganga-mayele moko oyo ayebani ya ekólo Espagne alobaki nini mpo na endimeli ya Yesu likoló na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te?
10 Yesu Klisto azali Mobandisi ya boklisto ya solosolo. Na ntina na Yesu, Miguel de Unamuno, nganga-mayele oyo ayebani, ya ekólo Espagne na ekeke ya 20, akomaki ete: “Ye azalaki kondima lisekwa ya nzoto engebene endimeli ya Bayuda, kasi azalaki kondima te liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te, oyo Platon [moto ya filozofi ya ekólo Grèce] azalaki koteya. . . . Bilembeteli mpo na yango bikoki kozwama kati na buku nyonso oyo elimbolaka makambo na bosembo.” Asukisaki ete: “Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te . . . ezali liteya ya moboko ya filozofi ya bapakano.”
11. Ntango nini mateya ya filozofi ya Bagreke ebandaki kokɔta na mangomba ya boklisto?
11 Ntango nini mpe lolenge nini “liteya oyo ya moboko ya filozofi ya bapakano” ekɔtaki na mangomba ya boklisto? Buku Nouvelle Encyclopédie britannique elobi polele ete: ‘Kobanda katikati ya ekeke ya mibale T.B., baoyo bamibéngaki baklisto mpe bazalaki na boyebi moke ya filozofi ya Bagreke, babandaki koyoka mposa ya kolobela kondima na bango na kosaleláká maloba ya filozofi ya Bagreke, mpo na kokolisa mayele na bango mpe mpo na kokɔtisa bato ya mayele oyo bazali bapakano kati na boklisto. Basepelaki mingi mpenza na filozofi ya Platon.’
12-14. Origène mpe Augustin basalaki nini mpo na kosangisa mateya ya mangomba ya boklisto mpe filozofi ya Platon?
12 Ezalaki na bato mibale ya filozofi na ntango ya kala oyo basalaki bopusi monene likoló na mateya ya mangomba ya boklisto. Moko na bango, Origène, moto ya engumba Alexandrie (oyo azalaki na bomoi soko na mobu 185 kino mobu 254 T.B.), mpe mosusu na nkombo Augustin, moto ya engumba Hippone (oyo azalaki na bomoi soko na mobu 354 kino mobu 430 T.B.). Na ntina na bango mibale, buku Nouvelle Encyclopédie catholique elobi ete: “Bobele mpo na bopusi ya Origène na mikili ya Azia mpe mpo na bopusi ya Saint Augustin na mikili ya Mpoto, nde molimo endimamaki mpenza lokola eloko oyo emonanaka te mpe ekómaki liteya ya filozofi oyo litongami likoló na ndimbola yango.” Makanisi ya Origène mpe ya Augustin na ntina na molimo eutaki wapi?
13 Origène azalaki moyekoli ya Clément, moto ya engumba Alexandrie, oyo engebene buku Nouvelle Encyclopédie catholique, azalaki “moto ya liboso, kati na Batata ya Lingomba, oyo ayambaki polele makanisi ya Bagreke na ntina na molimo.” Na ntembe te, makanisi ya Platon na ntina na molimo esalaki bopusi monene likoló na ye. Kati na buku The Harvard Theological Review, Werner Jaeger, nganga-mayele ya teoloji, amonisaki ete: “[Origène] akómisaki ebele na mateya oyo ye azwaki epai na Platon, mateya ya moboko ya mangomba ya boklisto.”
14 Augustin atalelamaka na bato mosusu kati na mangomba ya boklisto lokola nganga-mayele oyo alekaki banganga-mayele nyonso na ntango ya kala. Liboso ete akóma “moklisto” wana azalaki na mibu 33, Augustin azalaki kosepela mingi mpenza na mateya ya filozofi mpe akómaki moyekoli ya néo-platonisme.a Atako abongwanaki, alongolaki makanisi na ye ya moyekoli ya filozofi ya Platon te. Buku Nouvelle Encyclopédie britannique elobi ete: “Bɔɔngɔ na ye ezalaki liziba oyo kati na yango mateya ya filozofi ya Bagreke, oyo Platon ateyaki, esanganaki na mateya ya lingomba ya Kondimana ya Sika.” Buku Nouvelle Encyclopédie catholique endimi ete “liteya [ya Augustin na ntina na molimo], oyo eyebanaki mingi na mikili ya Mpoto kino pene na nsuka ya ekeke ya 12, ezwaki mateya na yango mingi . . . na lolenge ya sika ya filozofi ya Platon.”
15, 16. Bosepeli oyo bato bamonisaki na ekeke ya 13 mpo na mateya ya Aristote ebongolaki nde etɛlɛmɛlo ya Lingomba likoló na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te?
15 Na ekeke ya 13, mateya ya Aristote mapalanganaki na mikili ya Mpoto, mingi mpenza mpo ete banganga-mayele Baarabe bazalaki kosalela lokota ya Latin kati na mikanda na bango oyo ezalaki kolimbola mingi makomi ya Aristote. Makanisi ya Aristote ezalaki na bopusi monene likoló na Thomas d’Aquin, nganga-mayele moko ya Lingomba ya Katolike. Na ntina na mikanda ya Thomas d’Aquin, mateya ya Aristote esalaki bopusi monene likoló na mateya ya Lingomba koleka bopusi ya mateya ya Platon. Atako bongo, bopusi yango ebongolaki te endimeli likoló na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te.
16 Aristote azalaki koteya ete molimo ekabwanaka na nzoto te mpe ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa te mpe ete soki eloko moko oyo ekufaka te ezalaka kati na moto, ezali bongo eloko oyo emonanaka te, mayele oyo ezali epai na moto mokomoko te. Lolenge oyo ya kotalela molimo eyokanaki te na endimeli ya Lingomba oyo elobaka ete molimo ya moto ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Na yango, Thomas d’Aquin abongolaki likanisi ya Aristote na ntina na molimo, kondimáká ete liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekoki kolimbolama na mayele. Na bongo, endimeli ya Lingomba na ntina na molimo oyo ekufaka te ebongwanaki te.
17, 18. (a) Mopɛpɛ ya Mbongwana oyo mobɛtaki na ekeke ya 16 mobongolaki nde liteya mpo na molimo? (b) Bituluku mingi mpenza ya mangomba ya boklisto ezali na etɛlɛmɛlo nini na ntina na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te?
17 Na boumeli ya ekeke ya 14 mpe ya 15, na eteni ya liboso ya eleko oyo ebéngamaki Renaissance, bato babandaki lisusu kosepela na filozofi ya Platon. Kutu libota ya lokumu ya Médicis na ekólo Italie esalaki eteyelo monene na engumba Florence mpo na kolendisa bato ete báyekola filozofi ya Platon. Na boumeli ya ekeke ya 16 mpe ya 17, bato bazalaki lisusu kosepela na filozofi ya Platon te. Mpe Mbongwana oyo esalemaki na ekeke ya 16 ebongolaki liteya na ntina na molimo te. Atako Bamemi-mbongwana kati na Lingomba ya Protesta bazalaki kotyana ntembe likoló na liteya ya epongelo, kasi bazalaki kondima likanisi oyo ete bato bakozwa etumbu ya libela na libela to mbano.
18 Na lolenge yango, liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te epalanganaki kati na bituluku mingi mpenza ya mangomba ya boklisto. Kolobeláká yango, nganga-mayele moko, moto ya Amerika, akomaki ete: “Mpo na bato mingi ya mikili na biso, kozala kati na lingomba elimboli likambo mosusu te bobele kondima ete molimo ekufaka te. Nzambe azali Mobandisi ya liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te.”
Likanisi ya Lingomba ya Bamizilma likoló na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te
19. Ntango nini Lingomba ya Bamizilma esalemaki, mpe nani asalaki yango?
19 Lingomba ya Bamizilma ebandaki na Mahomet oyo abyangamaki ete azala profeta ntango akómaki na mibu soko 40. Mingimingi, Bamizilma bandimaka ete azwaki bimonaneli, na boumeli ya mbula soko 20 to 23, kobanda soko na mobu 610 T.B. kino liwa na ye na mobu 632 T.B. Bimonaneli yango bikomami na Coran, buku mosantu ya Bamizilma. Ntango Lingomba ya Bamizilma esalemaki, likanisi ya Platon na ntina na molimo esilaki kokɔta na Lingomba ya Bayuda mpe na mangomba ya boklisto.
20, 21. Bamizilma bazalaka na endimeli nini na ntina na bomoi nsima ya liwa?
20 Bamizilma balobaka ete kondima na bango ezali kokokisama ya bimonaneli oyo bipesamaki epai na Baebele mpe baklisto ya sembo na ntango ya kala. Coran elobelaka Makomami ya Liebele mpe Makomami ya Greke. Kasi na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te, Coran ekeseni na makomi yango. Coran eteyaka ete moto azalaka na molimo oyo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Elobelaka mpe lisekwa ya bakufi, mokolo ya kosambisama, mpe mokano ya nsuka ya molimo—to bomoi kati na elanga ya paladiso na likoló to etumbu kati na lifelo ya mɔ́tɔ.
21 Bamizilma bandimaka ete molimo ya moto oyo akufi ekendaka na Barzakh to “Bokabwani,” “esika to ezalela oyo bato bakozala kati na yango nsima ya liwa mpe liboso ya Kosambisama.” (Sourate 23:99, 100, Le Saint Coran, maloba na nse ya lokasa) Molimo ezalaka na bomoi, mpe kuna ezwaka “etumbu kati na nkunda” soki moto yango azalaki moto mabe to eyokaka bisengo soki moto yango azalaki moto ya sembo. Kasi bato ya sembo mpe basengeli kozwa mwa minyoko mpo na masumu mikemike oyo basalaki ntango bazalaki na bomoi. Na mokolo ya kosambisama, mokomoko akozwa ekateli ya libela na ntina na bomoi na ye, mpe ekateli yango ekotya nsuka na ezalela yango ya katikati.
22. Wapi mateya makeseni oyo bamoko na bato ya filozofi Baarabe bapesaki likoló na mokano ya nsuka ya molimo?
22 Likanisi ya molimo oyo ekufaka te ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda mpe na mangomba ya boklisto na ntina na bopusi ya filozofi ya Platon, nde na Lingomba ya Bamizilma, likanisi yango ezalaki uta ebandeli ya lingomba yango. Kasi yango elingi koloba te ete banganga-mayele Baarabe bamekaki te kosangisa mateya ya Bamizilma na mateya ya filozofi ya Bagreke. Kutu mikili ya Baarabe ezwaki bopusi monene ya mateya ya Aristote. Mpe banganga-mayele ya lokumu Baarabe, lokola Avicenne mpe Averroës, balimbolaki mpe babongisaki mateya na bango likoló na filozofi ya Aristote. Nzokande, na ntango bazalaki koluka koyokanisa likanisi ya Bagreke na liteya ya Bamizilma na ntina na molimo, babimisaki mateya ndenge na ndenge. Na ndakisa, Avicenne azalaki kondima ete molimo ya moto ekufaka te. Nzokande, Averroës azalaki kondima likanisi yango te. Atako bongo, Bamizilma bandimaka liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te.
23. Lingomba ya Bayuda, mpe mangomba ya boklisto mpe Lingomba ya Bamizilma eteyaka nini na likambo litali molimo oyo ekufaka te?
23 Na bongo, emonani polele ete Lingomba ya Bayuda, mangomba ya boklisto mpe Lingomba ya Bamizilma eteyaka yango nyonso ete molimo ekufaka te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Moyekoli ya néo-platonisme, lolenge ya sika ya filozofi ya Platon, oyo Plotin abimisaki na ekeke ya misato na Rome.
[Elilingi na lokasa 14]
Bolongi ya Alesandala Monene na bitumba epesaki nzela mpo na kosangisama ya mimeseno ya Bagreke mpe ya Bayuda
[Bililingi na lokasa 15]
Origène, na likoló, mpe Augustin bamekaki kosangisa mateya ya mangomba ya boklisto na filozofi ya Platon
[Bililingi na lokasa 16]
Avicenne, na likoló, azalaki kondima ete molimo ya moto ekufaka te. Nzokande, Averroës azalaki kondima likanisi yango te