Epai tokozwa biyano
“Liteya oyo elobaka ete bato bazwaka minyoko ya seko ezali na boyokani te na likambo oyo endimami ete Nzambe alingaka bikelamu na ye. . . . Kondima ete molimo ekozwa etumbu ya seko mpo na mabunga oyo yango esalaki na boumeli ya mwa bambula, kozanga kopesa yango libaku mpo na kobongisa etamboli na yango, ezali mpenza likambo na mayele te.”—NIKHILANANDA, MOTO YA FILOZOFI MOHINDU.
1, 2. Na kotalela bindimeli ndenge na ndenge na ntina na bomoi nsima ya liwa, mituna nini mizali kotunama?
LOKOLA Nikhilananda, moto ya filozofi Mohindu, bato mingi lelo oyo basepelaka te na liteya oyo elobaka ete bato bazwaka minyoko ya seko. Bobele bongo, bato mosusu mpe bazali na mokakatano mpo na kokanga ntina ya mateya lokola oyo ya kokóma na Nirvana mpe kokóma na bomoko elongo na Tao.
2 Nzokande, na ntina na likanisi oyo elobaka ete molimo ekufaka te, mangomba ya mikili ya Azia mpe ya mikili ya Mpoto masili kokolisa bindimeli ndenge na ndenge mpo na kobulunganisa bato na ntina na bomoi nsima ya liwa. Likoki ezali mpo na koyeba solo na ntina na oyo ekómelaka biso soki tokufi? Ezali solo ete molimo ekufaka te? Epai wapi tokoki kozwa biyano?
Siansi mpe filozofi
3. Siansi to myango na yango ya bolukiluki ezali nde na biyano na mituna mitali bomoi nsima ya liwa?
3 Siansi to myango na yango ya bolukiluki ezali nde na biyano na mituna oyo bato bamitunaka na ntina na bomoi nsima ya liwa? Engebene masolo oyo euti kolobama na mwa ntango eleki, na bato oyo bakómaki pene na liwa to na baoyo bazalaki komiyeba te, bamoko kati na balukiluki bameki kopesa makanisi na bango na ntina na bomoi nsima ya liwa. Wana azongelaki mwa moke makanisi na bango kati na lisukulu na ye oyo ezalaki na motó na likambo ete “Liwa ezali ekuke mpo na kokóma na pole?,” Hans Küng, nganga-mayele ya teoloji na Lingomba ya Katolike asukisaki ete: “Makambo ya motindo oyo mamonisi eloko moko te oyo ekoki kondimisa ete bomoi ezalaka nsima ya liwa: bato yango bayebisaka nde makambo oyo masalemaka miniti mitano liboso ya kokufa, kasi ezalaka te makambo matali bomoi ya seko nsima ya liwa.” Abakisaki ete: “Likambo ya koyeba soki bomoi ezalaka nsima ya liwa ezali mpenza na ntina mingi mpo na moto oyo azali na bomoi. Yango esɛngi eyano oyo esengeli kolukama epai mosusu soki minganga bakoki kopesa yango te.”
4. Filozofi ekoki nde kosalisa biso mpo ete tózwa biyano, na kotaleláká makanisi mingi oyo mangomba ndenge na ndenge mazali kopesa na ntina na bomoi nsima ya liwa?
4 Ezali boni mpo na filozofi? Yango nde ekoki kosalisa biso mpo ete tózwa biyano, na kotaleláká makanisi mingi oyo mangomba ndenge na ndenge ezali kopesa na ntina na bomoi nsima ya liwa? Bertrand Russell, moto ya filozofi ya ekólo Grande-Bretagne na ekeke ya 20, alobaki ete bolukiluki kati na filozofi esangisi mpe “kokanisakanisa.” Engebene buku The World Book Encyclopedia, filozofi ezali “lolenge moko ya bolukiluki—mwango ya kososola, ya kotalela motuya ya likambo, ya kolimbola mpe ya kokanisakanisa.” Mpo na lisolo litali bomoi nsima ya liwa, makanisi ya bato ya filozofi ezali kokesana mpamba te, mpo na bamoko, liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali bobele elikya oyo euti na makanisi mpamba; nzokande, mpo na basusu, yango ezali lotomo oyo moto nyonso abotamaka na yango.
Eutelo bobele moko ya biyano
5. Buku nini eumeli koleka babuku nyonso oyo ekomamá?
5 Kasi, ezali na buku moko oyo ezali na biyano ya solosolo mpo na mituna ya ntina mitali bomoi mpe liwa. Ezali buku oyo eumeli koleka babuku nyonso oyo ekomamá, oyo biteni mosusu na yango ekomamaki esili koleka mbula soko 3 500. Eteni ya liboso ya buku yango ekomamaki mwa bikeke mingi liboso ete Veda to banzembo ya kala ya makomami ya Bahindu esalema, mpe soko mbula nkoto liboso ete Bouddha, Mahāvīra mpe Confucius báyebana na mokili. Basilisaki kokoma buku yango na mobu 98 T.B., mbula koleka 500 liboso ete Mahomet asala Lingomba ya Bamizilma. Eutelo yango oyo eleki biutelo mosusu ya mayele ezali bongo Biblia.a
6. Mpo na nini tokoki komipesa na Biblia mpo ete eyebisa biso soki molimo ezali nini?
6 Biblia ezali kolobela lisolo ya bato ya kala na bosikisiki koleka babuku mosusu nyonso oyo ekomamá. Lisolo oyo likomami kati na Biblia lizali kolobela ebandeli ya libota ya bato mpe lizali kolimbola lolenge totyamaki awa na mabelé. Yango ezali kutu kolobela makambo oyo masalemaki liboso ya kozalisama ya bato. Buku motindo oyo ekoki mpenza kopesa biso bososoli mpo na koyeba lolenge moto asalemaki mpe ndimbola ya molimo.
7, 8. Mpo na nini tokoki na elikya nyonso komipesa na Biblia mpo na kozwa biyano ya solosolo mpe ya malamu na ntina na oyo ekómelaka biso soki tokufi?
7 Lisusu, Biblia ezali buku ya bisakweli oyo bikokisami solo. Na ndakisa, yango esakolaki kobima mpe kokwea ya bokonzi ya Médo-Perse mpe ya Grèce. Maloba yango mazalaki na bosikisiki mpenza na boye ete bamoko kati na banganga-mayele batyoli ya Biblia bamekaki komonisa lokola ete yango ekomamaki nsima ya kokokisama ya makambo yango, kasi balongaki te. (Danyele 8:1-7, 20-22) Bisakweli mosusu oyo ekomami na Biblia ezali kokokisama na bosikisiki mpenza na mikolo na biso.b—Matai, mokapo 24; Malako, mokapo 13; Luka, mokapo 21; 2 Timote 3:1-5, 13.
8 Ezali na moto moko te, ezala moto ya mayele ndenge nini, oyo akoki koyebisa makambo makoya na bosikisiki motindo wana. Bobele Mozalisi ya molɔ́ngɔ́, mozwi-na-nguya nyonso, oyo azali na mayele mazangi nsuka, nde azali na makoki ya kosala yango. (2 Timote 3:16, 17; 2 Petelo 1:20, 21) Biblia ezali mpenza buku oyo euti na Nzambe. Ya solo, buku motindo oyo ekoki kopesa biso biyano ya solosolo mpe ya malamu mpo ete tóyeba oyo ekómelaka biso soki tokufi. Tiká ete tótalela liboso oyo yango elobi na ntina na molimo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mwa buku Un livre pour tous, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
b Talá buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes ?, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
[Elilingi na lokasa 18]
Buku oyo eumeli koleka babuku nyonso oyo ekomamá
[Elilingi na lokasa 18]
Buku oyo epesaka biyano bibongi kotyela motema mpe ya malamu