Yehova Azali nani?
MOKOLO moko na ekeke ya 19, moto moko ya ekólo France nkombo na ye Henri Mouhot, mosala na ye ezalaki ya kotambolatambola na mikili mosusu mpo na koyeba yango malamu, azalaki kolukaluka nzela na kati ya zamba moko na ekólo Cambodge, mbala moko akómaki liboso ya terase moko ya monene oyo ezalaki pembenipembeni ya ndako-nzambe moko ya monene. Yango ezalaki ndako-nzambe ya Angkor Wat. Ndako-nzambe yango ezalaki monene mpenza koleka bandako-nzambe nyonso oyo ezali na mokili. Ntango amonaki ndako ya monene wana, mbala moko Mouhot ayebaki ete atako ndako yango ezipamaki na ebele ya matiti ya mikemike, moto nde atongaki yango. Akomaki ete: “Ndako yango etongamaki na moto moko ya kala oyo azalaki na mayele lokola Michel-Ange; ezali monene koleka bandako nyonso oyo bato ya kala ya Grèce na ya Loma batiká.” Atako basiɛklɛ mingi elekaki banda basundolaki ndako yango, Henri Mouhot, atyaki ntembe ata moke te ete moto nde atongaki ndako ya monene wana.
Buku moko ya mayele oyo ekomamá esili koleka basiɛklɛ mingi elobi mpenza malamu ndenge kaka Mouhot alobi, ete: ‘Zambi ndako na ndako etongami na moto moko nde motongi na nyonso ezali Nzambe.’ (Baebele 3:4) Kasi bato mosusu bakoki koloba ete ‘biloko oyo Nzambe asalá ekeseni na biloko oyo moto asali.’ Nzokande, bato ya siansi nyonso te nde batyaka ntembe na likambo yango.
Michael Behe, profɛsɛrɛ ya biochimie na iniversite ya Lehigh na Pennsylvanie, na États-Unis, andimi ete biloko nyonso oyo ezalaka na baselile, ezalaka na bomoi mpe atuni boye: “Tokoki mpenza koloba ete biloko oyo ezali na baselile esalemá na moto moko ya mayele?” Na nsima amonisi ete bato ya siansi bakómi kosalela mayele babengi génie génétique mpo na kobongola lolenge baselile ya bikelamu ya bomoi ezalaka. Emonani polele ete, ezala biloko oyo ezali na bomoi to oyo ezali na bomoi te, bakoki “kotonga yango”! Ntango ayekolaki biloko oyo ekoki komonana na miso te, baselile ya bomoi, Behe akamwaki na komona ete baselile yango ekabwaná na biteni ndenge na ndenge mpe eteni mokomoko ezali na mposa ya mosusu mpo esala malamu. Bongo na nsuka alobaki nini? “Lokola asalaki mpenza milende mpo na koyekola baselile malamumalamu—koluka koyeba soki molekile ezalaka na bomoi na kati na yango—yango etindaki ye andima mpenza ete biloko yango ‘bizalisamaki!’ ”
Na yango, nani asalaki biloko nyonso wana?
Nani asalaki biloko nyonso wana?
Eyano ezali na Biblia, buku ya kalakala oyo eteyaka mayele oyo toutaki kotánga maloba na yango. Na maloba na yango ya ebandeli, Biblia epesi eyano ya polele na motuna ya koluka koyeba nani asalaki biloko nyonso, elobi ete: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.”—Genese 1:1.
Mpo na komikesenisa na baoyo babengami mpe banzambe, Mozalisi ayebisi nkombo na ye: “[Yehova, Nzambe ya solo, NW ] alobi boye, ye oyo atongaki lola . . . , ye yo atandisaki mokili mpe biloko bikoutaka na yango, ye oyo akopesaka mpema epai na bato likoló na yango.” (Yisaya 42:5, 8) Yehova ezali nkombo ya Nzambe oyo asalaki molɔ́ngɔ́ mpe asalaki basi na mibali awa na mabele. Kasi Yehova azali nani? Azali Nzambe ya lolenge nini? Mpe mpo na nini osengeli koyoka ye?
Nkombo na ye elimboli nini?
Likambo ya liboso oyo tosengeli koluka koyeba ezali oyo: nkombo ya Mozalisi, Yehova, elimboli nini? Nkombo ya Nzambe ekomami na Liebele na balɛtrɛ minei (יהוה) mpe tozali kokuta nkombo yango pene na mbala soko 7 000 na mikanda mosusu ya Biblia oyo bakomaki na Liebele. Nkombo yango euti na vɛrbɛ moko ya Liebele hawah (“kokóma”), oyo emonisaka ebandeli ya likambo, mpe nkombo yango elimboli “Ye oyo akómisaka.” Na maloba mosusu, tokoki koloba ete Yehova asalaka na mayele ete akóma ndenge nyonso oyo ye alingi kokóma mpo na kokokisa mikano na ye. Akómaka Mozalisi, Mosambisi, Mobikisi, Mobateli ya bomoi, mpe makambo mosusu ndenge na ndenge mpo na kokokisa bilaka na ye. Lisusu, na Liebele, vɛrbɛ yango ezali komonisa likambo oyo ezali kosalema. Yango emonisi ete Yehova azali naino komikómisa moto oyo azali kokokisa bilaka na ye. Ya solo, azali Nzambe ya bomoi!
Bizaleli ya minene ya Yehova
Biblia emonisi ete Mozalisi, ye oyo akokisaka bilaka na ye azali moto malamu. Yehova ye moko amonisaki bizaleli na ye ya minene mpe alobaki boye: “[Yehova, Yehova], azali Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto, mpe akolimbisa mabe mpe nkanza mpe lisumu.” (Exode 34:6, 7) Bamonisi ete Yehova azali Nzambe ya boboto. Liloba ya Liebele oyo basaleli awa ekoki mpe kobongolama na “bolingo ya sembo.” Ntango azali kokokisa mikano na ye ya seko, Yehova azali komonisa bolingo mpo na bikelamu na ye na bosembo mpenza. Ntembe ezali te ete okolinga moto oyo azali komonisa bolingo ya ndenge wana, boye te?
Yehova asilikaka noki te mpe alimbisaka mabunga na biso kozanga kokakatana. Ezali mpenza esengo kozala pene ya moto oyo alukaka te mabe na biso kasi alingaka mpenza kolimbisa biso. Kasi, yango elingi koloba te ete Yehova akangaka miso na makambo mabe oyo tosalaka. Alobi ete: “Ngai Yehova, nalingi bosembo, nayini moyibi mpe makambo oyo ezali sembo te.” (Yisaya 61:8, NW ) Lokola azali Nzambe oyo alingaka makambo ya sembo, Yehova akotika te ete bato oyo bamipesi na kosala masumu mpe baboyi kobongola motema bázala libela na libela. Na yango, tokoki kotya motema ete na ntango ebongi, Yehova akosilisa makambo oyo ezangi bosembo oyo etondi na mokili.
Esengeli kozala na mayele mpo na koyeba kosalela makambo oyo esɛngaka kozala na bolingo mpe oyo esɛngaka kozala na bosembo. Yehova amonisaka mpenza bokatikati kati na bizaleli wana mibale epai na biso. (Baloma 11:33-36) Na ntembe te, mayele na ye ekoki komonana bipai nyonso. Biloko ya kokamwa oyo asalá oyo tomonaka ezali komonisa yango.—Nzembo 104:24; Masese 3:19.
Kasi, kozala na mayele ekoki te. Mozalisi asengeli mpe kozala na nguya mingi mpo na kokokisa makambo nyonso oyo alingi kosala. Biblia emonisi ete Yehova azali mpenza Nzambe oyo azali na nguya mingi: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobyanga bango nyonso na nkombo; mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.” (Yisaya 40:26) Ya solo, Yehova azali ‘na nguya mingi’ mpo na kokokisa makambo oyo azali kokana kosala. Bizaleli motindo oyo ezali mpenza kobenda yo epai ya Yehova, boye te?
Koyeba Yehova ezali na matomba
Yehova ‘asalaki [mabele] mpamba te,’ kasi ‘asalaki yango mpo ete bato’ oyo bazali na boyokani malamu na ye ‘báfanda wana.’ (Yisaya 45:18; Genese 1:28) Amibanzabanzaka mpo na bikelamu na ye oyo bazali awa na mabele. Na ebandeli ya mokili, Nzambe apesaki bato bomoi ya malamu, atyaki bango na elanga moko ya kitoko, na paladiso mpenza. Bato bango moko, bazali kobebisa paladiso yango mpe likambo yango ezali kosepelisa Yehova te. Kasi, lokola nkombo na ye ezali komonisa yango, Yehova akokokisa mpenza mokano oyo azalaki na yango na ebandeli mpo na bato mpe mpo na mabele. (Nzembo 115:16; Emoniseli 11:18) Akozongisa Paladiso awa na mabele mpo na bato oyo bazali kotosa ye—bana na ye.—Masese 8:17; Matai 5:5.
Mokanda ya nsuka ya Biblia ezali komonisa bomoi ya malamu oyo okoki kozala na yango na kati ya Paladiso, elobi ete: “Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) Yango ezali bomoi ya solosolo oyo Yehova alingi ete yo ozala na yango. Yehova azali solo Tata ya motema malamu! Olingi koyekola makambo mingi na ntina na ye mpe koyeba oyo azali kosɛnga epai na yo mpo ozala na bomoi na kati ya Paladiso?
Soki liyebisi ezali te, mikapo nyonso ya Biblia oyo ezali awa euti na Biblia ya Lingala haut-fleuve, ebimeli ya 1970. NW elakisi New World Translation of the Holy Scriptures.