Nani asalaki nyonso oyo?
WANA azalaki kotambola kati na zamba na ekólo Cambodge, Henri Mouhot, motamboli-molukiluki mpe moto wa ekólo France na ekeke ya 19, akómaki liboso ya talase monene ezingaki tempelo moko. Pene na kilomɛtɛlɛ moko longwa na esika oyo atɛlɛmaki, amonaki manɔ́ngi mitano ya tempelo na bolai ya mɛtɛlɛ koleka 60. Ezalaki bongo tempelo ya Angkor Vat, monima oyo eleki bamonima nyonso ya losambo na mokili mobimba. Esilaki koleka bikeke nsambo uta batiká kosalela yango mpe basundolá yango na mbula, mopɛpɛ, moi, bansɛlɛlɛ mpe biloko mosusu ndenge na ndenge kino ntango Mouhot akendaki komona yango.
Ntango amonaki yango, na mbala moko Mouhot ayebaki ete ndako monene wana, atako ezipamaki na makenzi (mousse), moto nde atongaki yango. Akomaki ete: “Ndako yango etongamaki na moto moko ya kala oyo azalaki na mayele lokola Michel-Ange; ezali monene koleka bandako nyonso oyo Grèce to Loma ya kala etiká.” Atako basundolaki yango uta bikeke mingi, akakatanaki soko moke te mpo na kokanisa ete ndako kitoko wana ezalaki na moto oyo asalaki yango.
Likambo ya kobenda likebi, buku moko ya mayele oyo ekomamá esili koleka bikeke mingi esalelaki makanisi ndenge moko mpo na kolimbola ete mokili oyo ezali na Mozalisi na yango. Na ntembe te ezalisamaki. Ntoma Paulo akomaki ete: “Zambi ndako na ndako etongami na moto moko nde motongi na nyonso azali Nzambe.” (Baebele 3:4) Bamoko bakoki koboya bokokanisi wana, kolobáká ete: ‘Biloko oyo bizali kati na bozalisi bikeseni na oyo bisalemi na moto.’ Nzokande, bato mosusu ya siansi bandimi likanisi wana te. Nsima ya kondima ete “nyonso oyo ezali na baselile ezalaka na bomoi kati na yango,” Michael Behe, profesere-molandi oyo ateyaka biochimie na Iniversite ya Lehigh, atuni boye: “Ekoki nde kozala ete biloko oyo bizali na baselile esalemá na mayele moko?” Na nsima amonisi ete bato ya siansi bazali sikawa kosala mbongwana minene kati na nzoto ya bikelamu ya bomoi na myango lokola oyo ebéngami manipulation génétique. Ya solo, ezala biloko ya bomoi to oyo ezangi bomoi ekoki kosalama mpe kobongisama! Nsima ya kosala bolukiluki kati na baselile ya bomoi oyo ekoki komonana na miso te, Behe alobi na ntina na ebongiseli ya kokamwa oyo esangisi biteni ndenge na ndenge oyo moko ezali na mposa ya mosusu mpo na kosala malamu. Bosukisi na ye ezalaki nini? “Nsima ya kosala bolukiluki ndenge na ndenge kati na selile—bolukiluki likoló ya bomoi kati na molekile—emonani polele mpenza ete ‘ezalisamaki!’”
Bobele bongo, banganga-mayele ya kosmoloji mpe ya fizike basili kosala bolukiluki mozindo ya mokili mpe ya molɔ́ngɔ́ mpe bamoni makambo ya kokamwa. Na ndakisa, bayebi sikawa ete soki mbongwana moko, ata ya mokemoke mpenza, esalemaki kati na mituya oyo mibongwanaka te (constantes), mbɛlɛ ekelamu moko te ya bomoi ezali na mokili.a Brandon Carter, nganga-mayele ya kosmoloji abéngaki makambo yango ete bokokani ya kokamwa. Kasi soki okutani na molɔngɔ ya bokokani ekangisami na lolenge ya kokamwa, ata likanisi ya mpamba ekoyela yo ete moto moko asalaki yango, boye te?
Ya solo, ezali na Mozalisi ya bibongiseli nyonso wana ya kokamwa mpe “bokokani” oyo eyokanisami na bosikisiki. Mozalisi yango nani? Profesere Behe andimi ete, “Koluka koyeba mozalisi na yango na nzela ya siansi ekozala mpenza mpasi” mpe atiki likambo yango ete mateya ya “filozofi mpe ya teoloji” emeka kopesa eyano. Okoki kokanisa ete likambo yango etali yo te. Nzokande, soki batindeli yo mwa liboke moko ekangami malamu mpe na kati na yango okuti biloko oyo ozalaki na mposa na yango, okoluka koyeba nani atindi yango, boye te?
Biso mpe, na maloba ya elilingi, batindeli biso liboke motindo wana—liboke oyo etondi na makabo kitoko oyo ezali kopesa biso likoki ya kozala na bomoi mpe kosepela na yango. Liboke yango ezali bongo mabelé na bibongiseli na yango nyonso ya kokamwa oyo ezali kobatela bomoi. Tosengeli koluka koyeba nani apesi biso makabo yango, boye te?
Likambo ya esengo, Motindi ya liboke atindi yango elongo na nkoma moko pembeni. “Nkoma” yango ezali bongo buku moko ya kalakala ya mayele oyo toutaki kotánga maloba na yango—ezali bongo Biblia. Na maloba na yango ya liboso, Biblia eyanoli na lolenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele na motuna ya koyeba nani apesaki biso liboke yango: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.”—Genese 1:1.
Kati na “nkoma” na ye, Mozalisi ayebisi nkombo na ye: “Nzambe [Yehova] alobi boye, ye oyo atongaki lola . . . , ye oyo atandisaki mokili mpe biloko bikoutaka na yango, ye oyo akopesaka mpema epai na bato likoló na yango.” (Yisaya 42:5) Ɛɛ, Yehova nde nkombo ya Nzambe oyo asalaki molɔ́ngɔ́ mpe asalaki basi na mibali awa na mabelé. Kasi Yehova azali nani? Azali Nzambe ya lolenge nini? Mpe mpo na nini bato nyonso awa na mabelé basengeli koyoka ye?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ba “ constantes ” ezali mituya oyo mibongwanaka te kati na molɔ́ngɔ́. Na ndakisa, lombangu oyo pole etambolaka na yango mpe boyokani oyo ezali kati na nguya oyo biloko mibale bibendanaka moko epai na mosusu mpe bonene na yango.
[Elilingi na lokasa 3]
Angkor Vat etongamaki na bato
[Elilingi na lokasa 4]
Ntango ozwi likabo, okoluka koyeba nani atindi yango, boye te?