Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ip-1 mok. 19 nk. 244-258
  • Yehova akitisi lolendo ya Tulo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova akitisi lolendo ya Tulo
  • Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bólela, bino masuwa ya Talasisi!”
  • Esengo “banda na ntango ya ebandeli na yango ”
  • Lolendo na ye ekokitisama
  • Bakaladi bakopunza ye
  • ‘Akozongela mosolo na ye’
  • ‘Matabisi na ye esengeli kokóma eloko moko mosantu’
  • Tóbwaka ezaleli ya lokoso ya biloko ya mosuni mpe lolendo
  • Esakweli oyo elobeli Tire esalisaka biso tótyela Liloba ya Yehova motema mingi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Lokumu mpe kokwea ya “masuwa ya Talasisi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Buku oyo okoki kotyela motema—Eteni 5
    Lamuká!—2012
Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
ip-1 mok. 19 nk. 244-258

Mokapo ya Zomi na Libwa

Yehova akitisi lolendo ya Tulo

Yisaya 23:1-18

1, 2. (a) Tulo ya kala ezalaki engumba ya ndenge nini? (b) Yisaya asakolaki nini mpo na Tulo?

AZALAKI “mpenza bonzenga” mpe atondaki na “bozwi ya ndenge na ndenge.” (Ezekiele 27:4, 12, NW) Ebele ya masuwa na ye ezalaki kokatisa mbu mpe kokenda bipai mosusu mosika. Akómaki na “lokumu mingi na kati na mai monene,” mpe na “biloko ya motuya” na ye abakisaki “bozwi ya mikonzi na mokili.” (Ezekiele 27:25, 33, NW) Yango ezali makambo oyo ezalaki na Tulo, engumba moko ya Fenisi na nsuka ya ɛsti ya mai monene ya Méditerranée, na ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso (L.T.B.).

2 Kasi, kobebisama ya Tulo ekómaki pene. Mbula soki 100 liboso ete Ezekiele alobela ye, mosakoli Yisaya asakolaki kokwea ya esika makasi wana ya Fenisi, mpe mawa ya baoyo bazalaki kobikela na ye. Yisaya asakolaki mpe ete nsima ya mwa ntango Nzambe akotya likebi na ye na engumba yango, mpe akopesa ye bozwi ya sika. Ndenge nini maloba ya mosakoli yango ekokisamaki? Mpe liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Tulo? Soki tokangi mpenza ntina ya makambo oyo ekómelaki ye mpe mpo na nini ekómelaki ye, yango ekolendisa kondima na biso epai na Yehova mpe na bilaka na ye.

“Bólela, bino masuwa ya Talasisi!”

3, 4. (a) Talasisi ezalaki wapi, mpe boyokani nini ezalaki kati na Tulo mpe Talasisi? (b) Mpo na nini bato ya masuwa oyo bazali kosala mombongo na Talasisi basengeli ‘kolela’?

3 Na motó ya likambo, “Likebisi oyo etaleli Tulo,” Yisaya asakoli ete: “Bólela, bino masuwa ya Talasisi! Zambi bapunzi yango ezali lisusu libongo te, esika ya kokɔta ezali lisusu te.” (Yisaya 23:1a, NW) Bato bakanisaka ete Talasisi ezalaki eteni moko ya ekólo Espagne, mosika na Tulo mpe na ɛsti ya Méditerranée.a Kasi, bato ya Fenisi bazalaki mpenza bato ya mai, mpe masuwa na bango ezalaki mineneminene mpe ebongaki mpo na kotambola na mbu. Bato mosusu oyo bayekolaka masolo ya kala balobaka ete bato ya Fenisi bazalaki bato ya liboso oyo bayebaki ete mai ya mbu ekitaka mpe emataka mpo na kongɛnga ya sanza, bazalaki mpe bato ya liboso oyo basalelaki minzoto mpo na kotambola na mai. Ntaka molai oyo ezalaki kokabola Tulo na Talasisi ezalaki kopekisa bango te kosala mibembo.

4 Na mikolo ya Yisaya, Talasisi ezalaki mosika mpe ezalaki esika ya mombongo mpo na Tulo, mbala mosusu epai mpenza bozwi na ye ezalaki kouta na boumeli ya eleko moko ya lisolo na ye. Espagne ezali na bisika mingi oyo batimolaka mabanga ya ntalo, na ndakisa palata, fer, étain mpe mabanga mosusu. (Kokanisá na Yilimia 10:9; Ezekiele 27:12.) “Masuwa ya Talasisi,” mbala mosusu masuwa oyo ezalaki kouta na Tulo mpe kosala mombongo na Talasisi, ‘ekolela,’ ekomilela mpo na kobebisama ya libongo na bango.

5. Epai wapi bato ya mbu oyo bakouta na Talasisi bakoyoka nsango ya kokwea ya Tulo?

5 Ndenge nini bato ya mbu bakoyoka nsango ya kokwea ya Tulo? Yisaya ayanoli ete: “Longwa na mokili ya Kitimi esili kolimbwelama bango.” (Yisaya 23:1b) Na ntembe te, “mokili ya Kitimi” ezali nde esanga ya Chypre, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 100 na wɛsti ya bokula ya Fenisi. Yango ezali libongo ya nsuka epai masuwa oyo eutaka na ɛsti na Talasisi esɛmaka liboso ekóma na Tulo. Na bongo, ntango bakokóma na Chypre, bato ya masuwa bakoyoka nsango ete libongo na bango ekwei. Oyo nde mpasi mpo na bango! Lokola bakoyoka mawa mingi, ‘bakolela’ mpo na likambo yango.

6. Lobelá boyokani oyo ezali kati na Tulo mpe Sidona.

6 Mawa yango ekozwa mpe bato oy bafandi na bokula ya Fenisi. Mosakoli alobi ete: “Bózala nyɛɛ, bino bafandi na libongo, bino bato ya [mombongo, NW] ya Sidona; baoyo balekalekaki na mai-na-monana, batondisaki bino. Litomba na ye na nzela na mai mingi ezalaki mboto ya Siholo, mbuma ibukami na ebale [Nil, matabisi na ye, ekómaki litomba ya mabota NW].” (Yisaya 23:2, 3) “Bafandi na libongo”—baoyo bazali pene ya Tulo—bakozala nyɛɛ mpe bakokamwa mpo na kokwea ya Tulo. Banani bazali “bato ya mombongo ya Sidona” oyo “batondisaki” bafandi ya mboka yango, oyo bakómisaki bango bato ya bozwi? Na ebandeli, Tulo eyangelamaki na Sidona, engumba ya libongo, na ntaka ya kilomɛtrɛ 35 na nɔrdi. Sidona akomi likoló ya mbongo na ye ya bibende ete azali mama ya Tulo. Atako Tulo aleki Sidona na bozwi, azali kaka “mwana mwasi ya Sidona,” mpe bato oyo bafandi kuna bamibengaka bato ya Sidona. (Yisaya 23:12) Yango wana, elobeli “bato ya mombongo ya Sidona” mbala mosusu elimboli bato ya mombongo na engumba Tulo.

7. Ndenge nini bato ya mombongo ya Sidona bapalanganisi bozwi?

7 Mpo na mombongo na bango, bato ya mombongo ya Sidona oyo bazali na bozwi mingi bazali kokatisa Mai Monene ya Méditerranée. Bazali komema na bisika mingi mbóto ya Siholo, oyo ezali na nsuka ya ɛsti ya Ebale Nil na esika babengi Delta ya Ezipito. (Kokanisá na Yilimia 2:18.) “Mbuma ebukami na ebale Nil” ezali mpe kolobela biloko mosusu ya Ezipito. Mosala ya mombongo mpe ya kosombitinya biloko ezalaki kopesa bato ya mombongo yango ya mbu matomba mingi, ezala mpe mabota oyo bazalaki kosala na bango mombongo. Bato ya mombongo ya Sidona batondisaki Tulo na bozwi. Bakoyoka mpenza mawa mingi ndenge akobebisama!

8. Kokwea ya Tulo ekosala Sidona nini?

8 Nsima, Yisaya alobi na Sidona boye: “Ɛ Sidona, yoká nsɔni! Zambi mai-na-monana esili koloba, bisika na makasi na mai elobi ete, Nazalaki na mpasi [ya kobota] te, naboti mpe te, [nabɔkɔli, NW] bilenge babali te, [nakolisi, NW] baseka te.” (Yisaya 23:4) Nsima ya kobebisama ya Tulo, na bokula oyo engumba yango ezalaki kala ekomonana ete etikali mpamba mpe esundolami. Mai monene ekomonana lokola nde ezali koganga mpo na mawa, lokola mama oyo abungisi bana na ye, atungisami mpenza mpe akómi kolobaloba ete azalaki na bana te. Sidona akoyoka nsɔni mpo na makambo oyo ekokómela mwana na ye ya mwasi.

9. Mpasi oyo bato bayoki mpo na kokwea ya Tulo ekokokanisama na mawa oyo elandaki makambo nini mosusu?

9 Ya solo mpenza, nsango ya kobebisama ya Tulo ekopanza mawa bipai nyonso. Yisaya alobi ete: “Lokola na nsango oyo ebimi na Ezipito, bango bakoyoka mpasi mingi na nsango ya Tulo.” (Yisaya 23:5) Mpasi ya bato oyo bazali kolela ekozala lokola mpasi oyo euti na nsango etali Ezipito. Nsango nini mosakoli alingi mpenza kolobela? Mbala mosusu ezali mpo na kokokisama ya nsango oyo asakolaki liboso, “liloba mpo na [kotɛmɛla] Ezipito.”b (Yisaya 19:1-25) To mosakoli alingi nde kolobela nsango ya kobebisama ya mampinga ya basoda ya Falo na mikolo ya Mose, nsango ya mawa oyo epanzanaki bipai nyonso. (Exode 15:4, 5, 14-16; Yosua 2:9-11) Ezala ata ndenge nini, baoyo bakoyoka nsango ya kobebisama ya Tulo bakoyoka mpasi mpenza. Basɛngi na bango báluka esika ya kokima na Talasisi, mosika mpenza, mpe bapesi bango etinda ya komonisa mawa na bango polele: “Leká epai na Talasisi, bólela bino bafandi na libongo.”—Yisaya 23:6.

Esengo “banda na ntango ya ebandeli na yango ”

10-12. Lobelá bozwi ya Tulo, koumela na yango mpe bopusi na yango.

10 Tulo ezali engumba moko ya kala, ndenge Yisaya akundoleli biso likambo yango ntango atuni ete: “Oyo nde mboka na bino ya esengo, oyo ebandaki na mikolo ya kala, [banda na ntango ya ebandeli na yango, NW]?” (Yisaya 23:7a) Lisolo ya bozwi ya Tulo ebandaki soki na ntango ya Yosua. (Yosua 19:29) Na boumeli ya bambula mingi, engumba Tulo eyebanaki mingi mpo na biloko ya bibende oyo ezalaki kosala, biloko ya talatala, mpe biloko ya langi ya motane-ngwaa. Barobe ya Tulo ya motane-ngwaa ezalaki kotɛkama na ntalo makasi, mpe bato minene bazalaki koluka bilamba na yango ya ntalo. (Kokanisá na Ezekiele 27:7, 24.) Tulo ezali mpe esika monene ya mombongo mpo na ebele ya bato ya mombongo oyo batambolaka na makalo, mpe esika monene mpo na kotinda mpe kobenga biloko na mikili mosusu.

11 Lisusu, engumba yango ezalaki na basoda ya makasi. L. Sprague de Camp akomi ete: “Atako bazalaki mpenza kolinga bitumba te—bazalaki bato ya mombongo, kasi basoda te—bato ya Fenisi bazalaki kobundela bingumba na bango na mpiko mpenza mpe na molende. Bizaleli yango, bakisa mpe makasi na bango na makambo ya mai, epesaki bato ya Tulo likoki ya kotɛmɛla limpinga ya basoda ya Asulia, oyo na ntango wana ezalaki makasi koleka.”

12 Ya solo mpenza, Tulo ayebani na mokili ya Méditerranée. “Makolo na ye makumbaki ye ete akenda mosika [mpo na kofanda lokola mopaya, NW].” (Yisaya 23:7b) Bato ya Fenisi bazalaki kosala mibembo mosika, bazalaki kotya bisika ya mombongo mpe mabongo ya mikemike, oyo na bantango mosusu ezalaki kokóma bisika oyo bango moko bazalaki koyangela. Na ndakisa, Tulo ayangelaki Carthage, na nɔrdi ya bokula ya Afrika. Nsima ya mwa ntango, engumba yango elekaki Tulo mpe ekómaki komekana na Loma kati na mikili ya Méditerranée.

Lolendo na ye ekokitisama

13. Mpo na nini motuna etunami ete nani akomeka kosambisa Tulo?

13 Koyeba ete Tulo ezali engumba moko ya kala mpe ya bozwi mingi, motuna oyo elandi ebongi mpenza: “Nani [apesi toli oyo mpo na kotɛmɛla Tulo, mokaboli ya, NW] mitole? Ye oyo [bato ya mombongo na yango bazali bankumu, mpe batɛki, NW] na yango bazali bato ya lokumu kati na mokili?” (Yisaya 23:8) Nani akomeka koloba mabe na engumba oyo ezali kotya bato ya nguya na bisika oyo ezali koyangela mpe na bipai mosusu—mpe na yango ekómi “mokaboli ya mitole”? Nani akomeka koloba mabe na engumba monene oyo bato ya mombongo na yango bazali bankumu mpe batɛki bazali bato ya lokumu? Maurice Chéhab, mokambi ya kala ya biloko ya ntango ya kala na Musée national ya Beyrouth, na Liban, alobi ete: “Kobanda na ekeke ya libwa tii ekeke ya motoba L.T.B., Tulo ezalaki na esika ya ntina mingi ndenge Londres eyebanaki na ebandeli ya ekeke ya ntuku mibale.” Na bongo, nani akomeka koloba mabe na engumba yango?

14. Nani asakoli kosambisama ya Tulo, mpe mpo na nini?

14 Eyano oyo epemami na Nzambe ekobimisa kobanga na Tulo. Yisaya alobi ete: “Yehova na bibele ye moko apesi toli oyo mpo na kobebisa lolendo ya kitoko nyonso, mpo na kotyola bato ya lokumu na mabele.” (Yisaya 23:9, NW) Mpo na nini Yehova asakoli kosambisama ya engumba yango ya bozwi mpe ya kala? Ezali nde mpo bafandi na yango bazali basambeli ya nzambe ya lokuta Baala? Ezali nde mpo ete Tulo azali na boyokani na Yezabele—mwana mwasi ya Mokonzi Etebala, mokonzi ya Sidona mpe ya Tulo—oyo abalaki Ahaba, mokonzi ya Yisalaele mpe abomaki basakoli ya Yehova? (1 Mikonzi 16:29, 31; 18:4, 13, 19) Eyano na mituna yango mibale [oyo eyei liboso na eyano oyo] ezali ete te. Tulo azwi etumbu mpo na lolendo na ye—anduki bomɛngo mpe bato mosusu batikali mabɔkɔ mpamba, bakisa mpe Bayisalaele. Na ekeke ya libwa L.T.B., na nzela ya mosakoli Yoele, Yehova alobaki na Tulo mpe na bingumba mosusu ete: “Botɛkisi bana na Yuda mpe bana na Yelusaleme epai na [Bagrɛki, NW] ete bólongola bango mosika na ndelo na bango.” (Yoele 3:6) Nzambe akoki kotika Tulo atalela bato oyo basalaki kondimana na ye lokola mwa biloko ya kotɛka?

15. Tulo akosala nini ntango Yelusaleme ekokwea na mabɔkɔ ya Nebukadanesala?

15 Mbula soki mokama ekoleka kasi Tulo akobongwana te. Ntango limpinga ya basoda ya Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone babebisi Yelusaleme na 607 L.T.B., Tulo akosepela: “Aha! [Yelusaleme] ebukani, bikuke ya bato! Na ntembe te bakoya epai na ngai. Nakotonda—abebisami.” (Ezekiele 26:2, NW) Tulo akosepela, akolikya ete akozwa litomba ntango Yelusaleme akobebisama. Akolikya kosala lisusu mombongo mingi koleka, mpamba te mboka-mokonzi ya Yuda ekomekana na ye lisusu te. Yehova akotyola baoyo bazali komibenga “bato ya lokumu,” oyo bazali komitya na lolendo nyonso na ngámbo ya banguna ya basaleli na ye.

16, 17. Nini ekokómela bafandi ya Tulo ntango engumba yango ekokwea? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

16 Yisaya akobi kolobela kosambisama oyo Yehova akweisi likoló ya Tulo: “[Katisá mokili na yo lokola Ebale Nil, Ɛ mwana mwasi ya Talasisi. Libándá ya kobongisa masuwa, NW] ezali lisusu te. Asemboli lobɔkɔ na ye likoló na mai-na-monana, [aningisi makonzi. Yehova apesi etinda mpo na Fenisi, mpo na, NW] kobebisa bisika makasi na yango. Alobi mpe ete, Okosepela lisusu te, ɛ moseka monyokolami, mwana mwasi ya Sidona; tɛlɛmá, [katisá kino Kitimi. Ata, NW] kuna mpe okozala na kimya te.”—Yisaya 23:10-12.

17 Mpo na nini Tulo abengami “mwana mwasi ya Talasisi”? Mbala mosusu mpamba te nsima ya kokwea ya Tulo, Talasisi akozala makasi koleka kati na bango mibale.c Tulo ebebisami mpe bafandi na yango bakopanzana lokola mpela na ebale, ngunda na yango ebukani mpe mai etondi na bisika nyonso ya pembenipembeni wana. Nsango ya Yisaya epai ya “mwana mwasi ya Talasisi” ekomonisa mpenza ete makambo oyo ekokómela Tulo ezali ya minene. Yehova ye moko asemboli lobɔkɔ na ye mpe apesi etinda. Moto moko te akoki kobongola nsuka na yango.

18. Mpo na nini Tulo ebengami, “moseka . . . mwana mwasi ya Sidona,” mpe mbongwana nini ekokómela ye?

18 Yisaya alobi mpe ete Tulo azali “moseka . . . mwana mwasi ya Sidona,” ezali komonisa ete bakangaki ye naino te mpe bapunzaki ye te na babundi ya bapaya mpe azali naino na bonsomi. (Kokanisá na 2 Mikonzi 19:21; Yisaya 47:1; Yilimia 46:11.) Atako bongo, sikawa asengeli kobebisama, mpe bafandi na ye mosusu bakokatisa tii na Kitimi, oyo eyangelami na Fenisi mpo na kofanda kuna lokola bato bakimá mboka. Kasi, lokola nkita na bango ekwei, bakozala na kimya kuna te.

Bakaladi bakopunza ye

19, 20. Nani asakolamaki ete akolonga Tulo, mpe ndenge nini esakweli yango ekokisamaki?

19 Nguya nini ya politiki ekokokisa mokano ya Yehova likoló na Tulo? Yisaya alobi ete: “Talá mokili ya Bakaladi. Oyo ezali libota, ezalaki Asulia te. Babongisaki Tulo mpo na bafandi ya lisobe; batɛmisaki ndako milai ya etumba, bakweisaki ndako [milai na ye ya kofanda, NW], batikaki ye eloko mpamba. Bólela, ɛ masuwa ya Talasisi, zambi esika na yo ya makasi [epunzami, NW].” (Yisaya 23:13, 14) Bakaladi—kasi Baasulia te—nde bakolonga Tulo. Bakotonga bandako na bango ya milai ya etumba, bakobebisa bisika ya kofanda ya Tulo, mpe esika makasi ya masuwa ya Talasisi, bakobebisa yango mpenza.

20 Mpo na kokokisa esakweli yango, nsima ya kokwea ya Yelusaleme, Tulo atombokelaki Babilone, mpe Nebukadanesala azingaki engumba yango na basoda. Tulo akanisi ete bakozwa ye te, apikami makasi. Na ntango bazingaki engumba yango, mitó ya basoda ya Babilone “ekómaki na mabandi” mpo na bikɔti na bango, mpe mapeka na bango “elongwaki mposo” mpo na komema biloko ya kotonga bisika ya etumba. (Ezekiele 29:18, NW) Kozinga yango esɛngi Nebukadanesala makambo mingi. Abuki engumba Tulo oyo ezali na mokili, kasi amonaki biloko oyo ezalaki kuna te. Biloko mingi ya motuya ya engumba Tulo ememamaki na esanga moko ya moke na ntaka ya mɛtrɛ 800 na ngunda. Lokola azalaki na masuwa te, mokonzi ya Bakaladi akokaki te kozwa esanga yango. Nsima ya mbula 13, Tulo akoki lisusu kobunda te, kasi abiki mpe amoni kokokisama ya bisakweli mosusu.

‘Akozongela mosolo na ye’

21. Na lolenge nini “bakobosana” Tulo mpe na boumeli ya ntango boni?

21 Yisaya akobi kosakola ete: “Na mokolo yango, [bakobosana Tulo kino mbula, NW] ntuku nsambo, lokola mikolo na mokonzi moko.” (Yisaya 23:15a) Ntango bato ya Babilone bakobebisa engumba yango oyo ezalaki na mokili, “bakobosana” engumba ya Tulo oyo ezali na esanga. Mpo na kokokisa esakweli yango, na boumeli ya “mokonzi moko”—bokonzi ya Babilone—engumba Tulo oyo ezalaki na esanga ekozala te nguya oyo ezali na mosolo mingi. Na monɔkɔ ya Yilimia, Yehova atángi Tulo kati na mabota oyo esengeli komɛla vinyo ya nkanda na Ye. Alobi ete: “Mabota oyo bakosalela mokonzi ya [Babilone kino mbula, NW] ntuku nsambo.” (Yilimia 25:8-17, 22, 27) Ya solo, Babilone ayangelaki engumba Tulo oyo ezalaki na esanga na boumeli ya mbula ntuku nsambo te, mpamba te bokonzi ya Babilone ekweaki na mobu 539 L.T.B. Emonani ete, mbula 70 ezali komonisa eleko oyo Babilone azalaki nguya monene—ntango bokonzi ya Babilone ezalaki komikumisa na lolendo nyonso ete etomboli ebonga na yango ata likoló na “minzoto ya Nzambe.” (Yisaya 14:13, NW) Mabota ndenge na ndenge ekwei na mabɔkɔ ya boyangeli yango na bileko ndenge na ndenge. Kasi, na nsuka ya mbula 70, boyangeli yango ekokwea. Na bongo, nini ekokómela Tulo?

22, 23. Nini ekokómela Tulo ntango akozala lisusu na nse ya boyangeli ya Babilone te?

22 Yisaya alobi lisusu ete: “Na nsuka ya [mbula, NW] ntuku nsambo, ekoyembelama Tulo lokola na loyembo ya mwasi ya pite ete, Kamatá nzɛnzɛ, tambolá kati na mboka, yo mwasi ya pite oyo [babosani. Ningisá nsinga na ndenge okokoka, NW], yembá nzembo mingi, ete okoka kokanisama lisusu. [Mpe ekokóma ete na nsuka ya mbula ntuku nsambo ete Yehova akotya likebi na ye epai na Tulo, mpe akozonga na lifuti, NW] na ye mpe akosala pite na makonzi nyonso na [mabele oyo ezali na mokili, NW].”—Yisaya 23:15b-17.

23 Nsima ya kokwea ya Babilone na 539 L.T.B., Fenisi ekómaki etúká moko ya bokonzi ya Bamede na Baperse. Sirise Monene, mokonzi ya Perse azali moyangeli ya motema malamu. Na boyangeli yango ya sika, Tulo akozongela mosala na ye ya kala mpe akosala makasi mpo na kozongela esika na ye oyo ayebanaki na yango lokola engumba monene mpo na mombongo na mokili mobimba—ndenge moko na mwasi ya pite oyo babosani ye mpe abungisi bakiliya na ye, atambolaka na engumba mobimba kobɛta nzɛnzɛ mpe koyemba nzembo mpo na kobenda lisusu bakiliya ya sika. Tulo akolonga mpenza? Ɛɛ, Yehova akopesa ye nzela ya kolonga. Na nsima, engumba oyo ezali na esanga ekokóma na bozwi mingi mpenza mpe pene na nsuka ya ekeke ya motoba L.T.B., mosakoli Zekalia alobaki ete: “Tulo amitongelaki esika makasi, ayanganisaki mpe palata lokola mputulu, mpe wolo na kitoko lokola bosɔtɔ na nzela.”—Zekalia 9:3.

‘Matabisi na ye esengeli kokóma eloko moko mosantu’

24, 25. (a) Na lolenge nini matabisi ya Tulo ekómi eloko moko mosantu mpo na Yehova? (b) Atako Tulo azali kosalisa basaleli ya Nzambe, esakweli nini Yehova apesi etaleli Tulo?

24 Maloba ya esakweli oyo elandi ezali mpenza kobenda likebi! “Matabisi na ye mpe lifuti na ye esengeli kokóma eloko moko mosantu mpo na Yehova. Ekosangisama te, to ekotyama na pembeni te, mpamba te lifuti na ye ekozala mpo na baoyo bazali kofanda liboso na Yehova, mpo na kolya kino bakotonda mpe mpo na ezipeli ya kitoko mpenza.” (Yisaya 23:18, NW) Na lolenge nini matabisi ya biloko ya mosuni ya Tulo ekómi eloko mosantu? Yehova atambwisi makambo na ndenge ete matabisi yango esalelama ndenge mokano na ye ezali—mpo ete basaleli na ye bálya malamu mpe bázala na ezipeli malamu. Likambo yango esalemaki ntango Bayisalaele bautaki na boombo na Babilone. Bato ya Tulo basalisaki bango, bapesaki bango nzete ya eleze mpo na kotonga lisusu tempelo. Bazongelaki lisusu kosala mombongo elongo na engumba Yelusaleme.—Ezela 3:7; Nehemia 13:16.

25 Atako bongo, Yehova apesi litatoli mosusu mpo na kotɛmɛla Tulo. Zekalia asakoli mpo na engumba oyo ezali sikawa na esanga, oyo ezali sikawa na bozwi ete: “Talá, [Yehova] akolongola bozwi na ye, akobwaka nguya na ye kati na mai-na-monana; akolyama na mɔ́tɔ.” (Zekalia 9:4) Yango ekokisamaki na sanza ya Yuli na mobu 332 L.T.B. ntango Alesandala Monene abebisaki mokonzi wana ya lolendo na mbu.

Tóbwaka ezaleli ya lokoso ya biloko ya mosuni mpe lolendo

26. Mpo na nini Nzambe akweisaki Tulo?

26 Yehova akweisi Tulo mpo na lolendo na ye, mbeba oyo aboyaka mpenza. “Miso ya nzombo” etángami na esika ya liboso kati na makambo nsambo oyo Yehova ayinaka. (Masese 6:16-19) Paulo alobaki ete lolendo ezali na boyokani na Satana Zabolo, mpe ndenge Ezekiele alobeli lolendo ya Tulo eyokani na makambo oyo elobelaka Satana ye moko. (Ezekiele 28:13-15; 1 Timote 3:6) Mpo na nini Tulo azalaki na lolendo? Ezekiele alobi na Tulo ete: “Motema na yo [ekómi, NW] na lolendo mpo na [bozwi, NW] na yo.” (Ezekiele 28:5) Engumba yango emipesaki na mombongo mpe na konduka mosolo. Bozwi ya Tulo ekómisaki ye lolendo mingi. Na monɔkɔ ya Ezekiele, Yehova alobi na “mokonzi ya Tulo ete”: ‘Motema na yo [ekómi, NW] na lolendo, mpe olobi ete, Ngai nazali nzambe, nafandi na efandelo na nzambe na kati na mai monene.’—Ezekiele 28:2.

27, 28. Bato bakoki kokangama na motambo nini, mpe lisese nini Yesu apesaki mpo na yango?

27 Bikólo ekoki kokóma na lolendo mpe na lolenge mabe ya kotalela bozwi—ezali mpe ndenge moko mpo na bato. Yesu apesaki lisese moko oyo emonisaki ete motambo yango ekoki kozala likama. Alobelaki mobali moko ya bozwi oyo bilanga na ye ebotaki mbuma mingi. Lokola azalaki na esengo, mobali yango akanaki kotonga bandako ya minene koleka mpo na kobomba biloko na ye mpe kosepela na bomoi ya esengo ntango molai. Kasi yango esalemaki te. Nzambe alobaki na ye ete: “Yo zoba! na butu oyo bakoluka [molimo, NW] na yo epai na yo. Bongo biloko bisili yo kobongisa bikozala na nani?” Ɛɛ, mobali yango akufaki, mpe bozwi na ye esalisaki ye ata na eloko moko te.—Luka 12:16-20.

28 Yesu asukisaki lisese yango na maloba oyo: “Moto oyo abombi biloko mpo na ye mpenza nde azali mozwi epai na Nzambe te, azali na motindo boye.” (Luka 12:21) Kozala na bozwi, ezalaki mabe te, mpe kobuka mbuma mingi ezalaki lisumu te. Libunga ya mobali yango ezalaki nde ete akómisaki biloko yango likambo oyo eleki ntina na bomoi na ye. Elikya na ye nyonso ezalaki na bozwi na ye. Ntango azalaki kokanisa bomoi na ye na mikolo ezali koya, azalaki kotalela Yehova Nzambe ata moke te.

29, 30. Ndenge nini Yakobo akebisaki mpo na ezalela ya komityela motema?

29 Yakobo alobeli likanisi yango polele mpenza. Alobi ete: ‘Yakani bino bato bozali koloba ete, Lelo soko lobi tokokenda na mboka oyo, tokolekisa mbula moko wana, tokosala mombongo, tokozwa litomba. [Nzokande boyebi te oyo bomoi na bino ekozala lobi, NW]. Bozali bobele londende, komonana mwa ntango moke na nsima kolimwa. Kasi ekoki na bino koloba ete, Soko ezali mokano ya [Yehova], tokozala na bomoi, mpe tokosala boye na boye.’ (Yakobo 4:13-15) Na nsima, Yakobo amonisaki boyokani oyo ezali kati na lolendo mpe bozwi, ntango akobaki koloba ete: “Bozali komikumisa na nzombo na bino. Komikumisa nyonso ya motindo yango ezali mabe.”—Yakobo 4:16.

30 Lisusu, kosala mombongo ezali lisumu te. Lisumu ezali nde lolendo, enzombo, komityela motema oyo moto amityelaka soki akómi na bozwi. Lisese moko ya kala mpe ya mayele elobaki solo ete: “Pesá ngai bobola te, bozwi mpe te.” Bobola ekoki kokómisa bomoi mpasi. Kasi bozwi ekoki mpe kosala ete moto ‘awangana [Nzambe] mpe aloba ete: “Yehova azali nani?”’—Masese 30:8, 9, NW.

31. Mituna nini moklisto asengeli komituna?

31 Tozali kati na mokili oyo bato mingi bakwei na motambo ya lokoso mpe ya moimi. Mpo na makambo ya mombongo, bato bazali kolobela mingi bozwi. Yango wana, moklisto asengeli komitalela malamumalamu mpo na koyeba soki akangami te na motambo yango oyo ekangaki engumba Tulo, oyo emipesaki na mombongo. Alekisaka ntango na ye mingi mpe nguya na ye mingi na koluka biloko ya mosuni, mpe na yango akómi lokola moombo ya bozwi? (Matai 6:24) Alulaka bato mosusu oyo bazali na biloko mingi to biloko ya kitoko koleka ye? (Bagalatia 5:26) Soki azali moto ya bozwi, akanisaka na lolendo nyonso ete ebongi bátyelaka ye likebi mingi koleka to ebongi azwa mikumba koleka basusu? (Kokanisá na Yakobo 2:1-9.) Soki azali moto ya bozwi te, azali nde na “mposa ya kozwa mosolo,” ezala ata ndenge nini? (Biso nde totɛngisi makomi; 1 Timote 6:9) Amipesi mpenza na makambo na ye ya mombongo mpe apesaka kaka mwa ndambo moke ya bomoi na ye mpo na kosalela Nzambe? (2 Timote 2:4) Akufi mpenza na mposa ya koluka bozwi mpe abosani mitinda ya boklisto na makambo na ye ya mombongo?—1 Timote 6:10.

32. Likebisi nini Yoane apesaki, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango?

32 Ezala ata tozali na biloko mingi to te, Bokonzi ya Nzambe esengeli kozala ntango nyonso na esika ya liboso na bomoi na biso. Ezali na ntina mingi ete tóbosana soki moke te maloba oyo ya ntoma Yoane: “Bólinga mokili te soko makambo kati na mokili te. Soko moto nani akolingaka mokili, bolingo na Tata ezali kati na ye te.” (1 Yoane 2:15) Ezali solo ete, tosengeli kosalela ebongiseli ya makambo ya nkita ya mokili mpo na kobikela. (2 Batesaloniki 3:10) Yango wana, ‘tosalelaka mokili’—kasi tosalelaka yango “na makambo nyonso te.” (1 Bakolinti 7:31, NW) Soki tolingi biloko ya mosuni koleka ndelo—biloko oyo ezali na kati ya mokili—tokolinga lisusu Yehova te. Komipesa na “mposa mabe ya nzoto mpe mposa mabe ya miso mpe nzombo na bizaleli” eyokanaka te na likambo ya kosala mokano ya Nzambe.d Kosala mokano ya Nzambe nde ememaka na bomoi ya seko.—1 Yoane 2:16, 17.

33. Ndenge nini baklisto bakoki kokima motambo oyo Tulo akweaki na yango?

33 Tulo akweaki na motambo ya kotya likambo etali koluka biloko ya mosuni na esika ya liboso. Azalaki na biloko mingi, akómaki na lolendo, mpe azwaki etumbu mpo na lolendo na ye. Ndakisa na ye ezali likebisi mpo na bikólo mpe bato lelo oyo. Ezali mpenza malamu kolanda toli ya ntoma Paulo! Akebisaki baklisto ete “bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bozwi oyo ekoki kobeba, kasi nde epai na Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso ebele mpo biso tósepela.”—1 Timote 6:17, NW.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Banganga-mayele mosusu balobaka ete Talasisi ezali Sardaigne, esanga moko ya wɛsti ya Méditerranée. Sardaigne ezalaki mpe mosika na Tulo.

b Talá mokapo ya 15, nkasa 200-207, ya buku oyo.

c “Mwana mwasi ya Talasisi” ekoki mpe kozala bato ya Talasisi. Buku moko elobi ete: “Bankolo-mboka Talasisi bazali sikawa na bonsomi ya kosala mibembo mpe ya kosala mombongo lokola ntango Ebale Nil etondaka mpe elekaka na bipai nyonso.” Kasi, yango mpe elobeli mingimingi ndenge mobulungano ekozala mpo na kokwea ya Tulo.

d “Nzombo na bizaleli” ezali kobongolama ya liloba ya Grɛki alazonia, oyo elimbolami lokola “lolendo ya mabe mpe ezangi ntina oyo etyaka motema na biloko ya mabele.”—The New Thayer’s Greek-English Lexicon.

[Karte na lokasa 256]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

MPOTO

ESPAGNE (Ekoki kozala esika TALASISI ezalaki)

MAI MONENE YA MÉDITERRANÉE

SARDAIGNE

CHYPRE

AZIA

SIDONA

TULO

AFRIKA

EZIPITO

[Elilingi na lokasa 250]

Tulo akoyangelama na Babilone, kasi na Asulia te

[Elilingi na lokasa 256]

Mbongo ya ebende na elongi ya Melqart, mokonzi ya banzambe ya Tulo

[Elilingi na lokasa 256]

Ndenge masuwa ya Fenisi ezalaki

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto