Lokumu mpe kokwea ya “masuwa ya Talasisi”
“Masuwa ya Talasisi matambolaki mpo na . . . komema biloko na yo ya mombongo.”—EZEKIELE 27:25
BAMASUWA ya Talasisi esalisaki Mokonzi Salomo akóma na bozwi mingi. Bato oyo batongaki bamasuwa yango basalisaki mpo na kokolisa alfabɛ ya Grɛki mpe ya Latin. Batongaki mpe engumba Byblos, oyo ebimisaki nkombo oyo babengaka buku oyo eyebani koleka na mokili.
Banani batongaki mpe bazalaki kotambwisa bamasuwa ya Talasisi? Nkombo yango eutaki wapi? Mpe ndenge nini lisolo ya bato yango mpe bamasuwa na bango ezali komonisa ete masolo ya Biblia ezali solo?
Bankolo Mbu ya Mediterane
Bato ya Fenisia nde batongaki bamasuwa oyo ekómaki kobengama bamasuwa ya Talasisi. Mbula nkóto moko liboso Klisto aya, bato ya Fenisia basilaki koyeba kotambola na mbu. Ekólo na bango ezalaki mwa mabelé moke na bokula ya mbu, na esika oyo ezali lelo ekólo Liban. Ekólo mosusu ezalaki na nɔrdi na yango, na ɛsti ekólo mosusu, na sudi mpe ekólo mosusu. Na wɛsti na yango, ezalaki Mbu monene ya Mediterane. Mpo na kokóma na bozwi, bato ya Fenisia bakómaki kosala mombongo na bikólo oyo ezalaki pembenipembeni ya mbu yango.
Mokemoke, bato ya Fenisia oyo bazalaki batambwisi-masuwa bakómaki na bamasuwa mingi na mombongo. Lokola bakómaki kozwa benefisi mingi mpe mayele na bango ezalaki kokola, batongaki bamasuwa ya minene oyo ekokaki kosala mibembo milai koleka. Nsima ya kokóma na Sipele, na Sardaigne, mpe na Bisanga Baléares, bato ya Fenisia balandaki bokula ya Afrika ya nɔrdi na ngámbo ya wɛsti tii bakómaki na Espagne. (Talá na karte.)
Bato ya Fenisia batongaki bamasuwa oyo ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 30. Bamasuwa yango oyo ezalaki kotambola na mbu ezalaki kobengama “masuwa ya Talasisi” mpamba te ekokaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 4 000, banda na Fenisia tii na sudi ya Espagne, esika oyo, mbala mosusu Talasisi ezalaki.a
Ekoki kozala ete bato ya Fenisia bazalaki na mposa ya koyangela mokili te, kasi ya kosala mombongo na mikili ndenge na ndenge. Yango wana bapanzanaki na bisika ndenge na ndenge epai bazalaki kosala mombongo. Nzokande, mombongo yango ekómisaki bango bankolo Mbu ya Mediterane.
Mosika koleka Mbu ya Mediterane
Lokola bamipesaki na mombongo, bato ya Fenisia basalaki mibembo tii na Mbu ya Atlantike. Bamasuwa na bango etambolaki na sudi ya bokula ya Espagne tii ekómaki na etúká moko oyo ebengami Tartessus. Na mobu soki 1 100 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), batongaki engumba moko oyo babengaki Gadir. Engumba yango, oyo ezali na libongo ya masuwa mpe eyebani lelo na nkombo Cadix, na ekólo Espagne, ekómaki moko na bingumba minene ya Mpoto ya Wɛsti.
Bato ya Fenisia bazalaki kotɛkisa mungwa, vinyo, mbisi ya kokauka, mabaya ya cèdre, ya pin, bibende, batalatala, bilamba oyo ezali na mayemi kitoko, bilamba ya lini, mpe bilamba ya motane-moindo eyebani mingi oyo ezalaki kouta na Tulo. Kasi, biloko nini ya ntalo bakokaki kosomba na Espagne?
Sudi ya Espagne ezali mokili oyo etondaki na palata mpe bibende mosusu koleka mikili mosusu nyonso oyo ezali zingazinga ya Mediterane. Mpo na Tulo, engumba ya Fenisia oyo ezalaki na libongo monene ya masuwa, Ezekiele asakolaki boye : “Bato ba Tarsis [Espagne] bazalaki koya koteke biloko, zambi bazalaki na biloko ndenge na ndenge. Na biloko bya yo osombaki palata, bibende, mbengi na mondoli ya bango.”—Ezekiele 27:12, Liloba lya Nzambe.
Emonani ete bato ya Fenisia bamonaki ebele mpenza ya biloko yango pembeni ya Ebale Guadalquivir, oyo ezali mosika te na engumba Cadix. Tii lelo oyo batimolaka biloko yango na mokili wana, oyo ekóma kobengama Río Tinto. Na bisika yango bazwaka mitindo ndenge na ndenge ya bibende ya malamu mpenza banda mbula soki nkóto misato.
Lokola bamasuwa na bango ezalaki kosala mibembo longwa na Espagne tii na Fenisia, bato ya Fenisia bakómaki bango moko kaka batɛkisi ya palata ya Espagne. Palata ekómaki beboo na Fenisia, ata mpe na Yisalaele, ekólo oyo ezalaki pembeni na yango. Salomo, mokonzi ya Yisalaele akómaki kosala mombongo ná Hilama, mokonzi ya Fenisia. Yango wana, na mikolo ya Salomo, palata etángamaki ‘eloko ya solo te.’—1 Mikonzi 10:21.b
Atako bato ya Fenisia bakómaki makasi na mombongo, bazalaki mpe makambo mabe. Bazalaki kokosa bato ete balingi kolakisa bango biloko ya kotɛka na kati ya masuwa; nzokande, ezalaki mpo bákanga bango mpe bákómisa bango baombo. Kutu, nsukansuka, babalukelaki Bayisalaele, bato oyo bazalaki koyokana na bango mpo na mombongo, mpe batɛkaki bango na boombo. Yango wana, basakoli ya Bayuda basakolaki kobomama ya Tulo, engumba ya Fenisia. Nsukansuka, Alesandala Monene akokisaki bisakweli yango na mobu 332 L.T.B. (Yoele 3:6; Amosa 1:9, 10) Kobomama ya engumba yango etyaki nsuka ya eleko oyo bato ya Fenisia bazalaki kodondwa.
Libula ya bato ya Fenisia
Lokola bato nyonso oyo bayebi kosala mombongo, bato ya Fenisia bazalaki kokoma boyokani nyonso ya mombongo na mikanda. Bazalaki kosalela alfabɛ moko oyo ekokani mingi na alfabɛ ya Liebele ya kala. Bato ya bikólo mosusu mpe bakómaki kosalela alfabɛ ya bato ya Fenisia. Bagrɛki balandaki ekomeli yango, atako babongolaki makambo mosusu; na nsima, ekomeli ya Bagrɛki ebimisaki ekomeli ya Latin, alfabɛ oyo esalelamaka na minɔkɔ mingi lelo oyo.
Longola yango, Byblos, engumba moko monene ya bato ya Fenisia, ekómaki esika monene oyo bazalaki kotɛkisa bapapirise, oyo ezali nkɔkɔ ya papye oyo tosalelaka lelo oyo. Kosalela papirise esalaki ete bato bákóma na momeseno ya kokoma babuku. Kutu, Biblia, nkombo ya buku oyo eleki kokabolama na mokili mobimba, eutá nde na nkombo Byblos. Ya solo, lisolo ya bato ya Fenisia mpe bamasuwa na bango ezali kondimisa mpenza ete lisolo ya Biblia ezali solo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bambula mingi na nsima, nkombo “masuwa ya Talasisi” ekómaki kosalelama mpo na kolobela lolenge ya masuwa oyo ekoki kosala mibembo ya milai na mbu.
b ‘Bamasuwa ya Talasisi’ oyo ezalaki ya Salomo ezalaki kotambola elongo na bamasuwa ya Hilama, na ntembe te longwa na Esione-gebele mpe ezalaki kosala mombongo na Mbu Motane mpe na mikili mosusu ya mosika.—1 Mikonzi 10:22.
[Karte na lokasa 27]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BANZELA OYO BATO YA MOMBONGO YA FENISIA BAZALAKI KOLEKA
ESPAGNE
TARTESSUS
Ebale Guadalquivir
Gadir
Corse
Bisanga Baléares
Sardaigne
Sisili
Krɛti
Sipele
Byblos
Tulo
MBU YA MEDITERANE
Esione-gebele
Mbu Motane
AFRIKA
[Elilingi na lokasa 27]
Mbongo ya ebende oyo ezali na elilingi ya masuwa ya Fenisia, ekeke ya misato tii ya minei L.T.B.
[Elilingi na lokasa 27]
Bitika ya bandako oyo bato ya Fenisia batongaki na Cadix, Espagne
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Museo Naval, Madrid
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 27]
Mbongo ya ebende: Museo Arqueológico Municipal. Puerto de Sta. María, Cadix; bitiká: Yacimiento Arqueológico de Doña Blanca, Pto. de Sta. María, Cadix, Espagne