Liteya 13
Nkisi mpe bondɔki ezali mabe
Satana alingaka osalela nkisi. Bato mingi bapesaka bato oyo bakufá to bilimu mabonza mpo na komibatela ete mabe ezwa bango te. Basalaka yango mpamba te babangaka bilimu. Balataka mpɛtɛ to bansinga ya bikelakela na nzoto. Bamelaka to bapakolaka “bankisi” oyo bamonaka ete ekoki kobatela bango. Bato mosusu babombaka biloko oyo bakanisaka ete ezali na nguya ya kobatela bango na bandako na bango to bakundaka biloko yango na lopango. Bato mosusu basalelaka “nkisi” mpamba te bakanisaka ete ekosalisa bango mpo mombongo na bango etambola malamu, mpo bálonga na ekzamɛ na kelasi, to mpo mwasi oyo azali koluka to mobali oyo azali kolinga, alinga ye.
Mpo ete Satana azwa yo te, osengeli kozala moninga ya Yehova. Yehova Nzambe na baanzelu na ye bazali na nguya koleka Satana na bademo na ye. (Yakobo 2:19; Emoniseli 12:9) Yehova azali na mposa makasi ya komonisa nguya na ye mpo na bolamu ya baninga na ye—baoyo bazali mpenza sembo epai na ye.—2 Ntango 16:9.
Liloba ya Nzambe elobi ete: ‘Osengeli kosala nkisi te.’ Yehova apekisi nkisi mpe bondɔki mpamba te misala yango ezali kotya moto na boyokani na Satana Zabolo.—Levitike 19:26.