Makambo nini ebombami na bonganga-nkisi?
EZALI mpasi kolimbola bonganga-nkisi soki tolandi ndenge oyo liloba yango ezali kosalelama na moi ya lelo. Bakoki kobenga moto moko nganga-nkisi, kasi okomona ete makambo na ye ekeseni mpenza na makambo ya moto mosusu oyo bazali kobenga ye mpe nganga-nkisi. Bazali na mokonzi moko te to na mateya moko te, mpe bazali na mokanda moko te oyo ezali kolakisa makambo na bango nyonso. Lisusu, banganga-nkisi bazali na mimeseno ndenge moko te, misala na bango na milulu na bango ekeseni, mpe bazali na makanisi moko te na likambo etali banzambe oyo bakumisaka. Mwasi moko oyo akomaka mikanda alobaki boye: “Makambo ya bonganga-nkisi ezali ndenge na ndenge.” Mpe mokomi mosusu alobi: “Bango na bango bato ya losambo ya bilimu bazali na makanisi ndenge moko te na makambo nyonso.”
Mingi na bango balobaka ete bokeseni wana ezali mokakatano te. Mokanda moko oyo elobeli misala ya banganga-nkisi elobi boye: “Soki omoni lokola nde likambo moko ezali bongolabongola, talelá likambo yango malamumalamu mpe yo moko poná oyo osepeli kolanda. Landá oyo makanisi na yo emoni malamu. Elingi koloba ete yo moko okoki kotala kati na bilimu mpe mikanda mpe opona oyo omoni malamu.”
Mpo na bato oyo bayebi ndenge likambo ya solo ezalaka, bongolabongola wana ezali mpenza mokakatano. Solo ezali likambo oyo moto akoki koboya yango te. Tokoki koloba te ete likambo boye ezali solo te kaka mpo bato bazali komona yango te to bayebi yango te to bazali kondima te ete ezali bongo. Na ndakisa, na ntango ya kala, minganga bazalaki kokanisa ete soki bakati nsoso ya bomoi na biteni mibale mpe batii yango na ntolo ya moto oyo azali na kosukosu ya mimpululu, maladi na ye ekosila. Na ntembe te, bato mingi ya maladi bazalaki mpenza kondima ete soki basali bango ndenge wana bakobika. Nzokande, makambo oyo bazalaki kondima to kotyela motema ezalaki solo te, kosukosu ekoki kosila na ndenge yango te. Solo eutaka na bato te; bato balukaka nde koyeba mpe kokanga ntina na yango.
Biblia eteyaka solo ya makambo ya elimo. Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabele asalaki libondeli moko epai ya Tata na ye mpe alobaki boye: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Ntoma Paulo akomaki boye: “Makomami nyonso mapemami na [elimo, NW ] ya Nzambe.” (2 Timote 3:16) Banganga-nkisi mingi bandimaka likambo yango te. Bango balandaka masapo, losambo ya kalakala, to mpe makanisi ya bato. Kasi, omoni te ete ezali malamu tómeka naino kotalela makambo oyo Biblia elobi? Kutu, bato mingi ya mokili mobimba bandimaka ete ezali mokanda mosantu. Ezali mpe mokanda ya makambo ya Nzambe oyo ekomama kala mpenza mpe ezali tii lelo oyo. Banda babandá kokoma Biblia tii ntango basukisaki yango, eumelaki koleka mbula 1 600, kasi mateya na yango ezali na bongolabongola te. Tiká tótalela mateya ya Biblia, bongo tókokanisa yango na makambo mosusu oyo bato oyo balendisaka bonganga-nkisi balobaka.
Banani bafandaka na mokili ya bilimu?
Mpo na koyeba makambo ya elimo, motuna monene ezali oyo: Banani bafandaka na mokili ya bilimu? Lelo oyo, banganga-nkisi mingi bazali kosambela biloko ya mokili, bandimaka banzambe ebele, bamosusu basambelaka nzambe-mama monene, mpe balobaka ete azali mbala moko elenge mwasi, mama, mpe mobange, mpe amonisaka lolenge nyonso ya bomoi. Mobali na ye azali nzambe mpe azali na maseke. Banganga-nkisi mosusu basambelaka nzambe na nzambe-mama. Mokomi moko akomaki ete: “Nzambe-mwasi mpe Nzambe bazali komonisa nguya ya bomwasi mpe nguya ya bobali na mokili mobimba. Nguya mokomoko [ezali] na bizaleli na yango oyo soki esangani, bomoi ezalaka na ndenge esengeli.” Mokomi mosusu ayebani mingi na makambo yango, akomi boye: “Moko na makambo oyo okoki kosala na kati ya bonganga-nkisi ezali kopona banzambe (Banzambe/Banzambe-basi) oyo okosala na bango. . . . Bonganga-nkisi etikeli moto likoki ya kopona mpe bongo kokumisa Nzambe oyo yo moko olingi.”
Biblia endimi ata likanisi moko te na makanisi nyonso wana. Yesu Klisto amipesaki mobimba na koteya bato makambo ya Yehova, “Nzambe moko ya solo.” (Yoane 17:3) Biblia elobi ete: “[Yehova] azali monene mpe akoki na kokumisama; ye azali kotosama liboso na banzambe nyonso. Mpo ete banzambe nyonso na bato bazali bikeko.”—1 Ntango 16:25, 26.
Tokoloba boni mpo na Zabolo? Diksionɛrɛ moko elimboli ete bonganga-nkisi ezali “kosolola na Zabolo.” Lelo oyo, ezali mpasi mpo nganga-nkisi andima ndimbola wana, mpamba te mingi bandimaka kutu te ete Satana Zabolo azali. Zulunalo moko (The Irish Times) elobi ete elenge mwasi moko oyo azali “nganga-zebola moko monene mpe mokonzi ya lisangá moko monene ya banganga-nkisi na Irlande,” alobaki boye: “Soki moto andimaka Zabolo, boye andimaka losambo ya boklisto. . . . [Zabolo] akoki te kozala na mokili oyo Nzambe azali te.”
Biblia endimi ete Zabolo azali mpe emonisi ete mitungisi mingi oyo tozali kokutana na yango awa na mokili ezali kouta epai na ye. (Emoniseli 12:12) Yesu ateyaki kaka te ete Zabolo azali kasi amonisaki mpe ete moto akoki kosala mokano ya Zabolo kozanga ete ayeba yango. Na ndakisa, bakonzi ya mangomba oyo bazalaki komona ete bango nde bazali sembo, balobaki ete bazali bana ya Nzambe mpe bazalaki kokanisa ete bazali kosala mokano ya Nzambe. Yesu, ye oyo akokaki koyeba makambo oyo ezali na mitema na bango, ayebaki ete bazalaki komikosa. Alobaki na bango polele ete: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bósala mposa na tata na bino.” (Yoane 8:44) Lisusu, Biblia elobi na mokanda ya Emoniseli ete Zabolo azali “mozimbisi ya bato ya mokili mobimba.” —Emoniseli 12:9.
Ezali na bonganga-nkisi ya malamu?
Mbala mingi ntango bazali kolobela ndɔki, nganga-nkisi, to moto ya maji, bato bamonaka kaka moto oyo asalaka makambo ya mabe na ndenge oyo bato mosusu bakoki komona te. Ezala na ntango ya kala to mpe lelo oyo, mpo na bato mingi bondɔki ezali kaka mpo na kosala bato mosusu mabe. Balobaka ete bandɔki na banganga-nkisi bazali na nguya ya kopesa moto mpasi makasi, ata mpe koboma ye. Mingimingi, balobaka ete bandɔki nde bapesaka bato lisuma mpe maladi; mpe babomaka bato, mpe soki milona ya moto moko eboti malamu te, balakisaka kaka bango mosapi.
Lelo oyo bandɔki, banganga-nkisi, na bato ya maji bazali kowangana makambo wana. Bandimaka ete ezali na bandɔki mokomoko oyo ntango mosusu basalaka makambo ya mabe; mingi na bango balobaka ete nguya na bango ezali mpo na kosala malamu kasi mpo na kosala mabe te. Banganga-nkisi bango moko balobaka ete soki basali moto mabe, mabe wana ekozongela bango mbala misato mpe balobaka ete yango wana bango moko babangaka kolakela moto mabe. Balobaka ete bondɔki to bonganga-nkisi ya malamu ezalaka na maloba ya komibatela, ya kobengana banguya mabe oyo etikalaka na ndako ntango bato oyo bazalaki kofanda kuna liboso babimi, ya kolangwisa moto na bolingo, ya kosilisa maladi mpe ya kopesa moto nzoto makasi, ya kobatela mosala ya moto mpe ya kozwa mbongo. Soki totali nguya makasi oyo balobi ete bandɔki, banganga-nkisi mpe bato ya maji bazali na yango, tokoki kokamwa te ete bato mingi bakómi kosepela na misala yango.
Kasi, Biblia elobi te ete ezali na bondɔki to bonganga-nkisi ya malamu na ya mabe. Na kati ya Mobeko oyo apesaki Mose, Nzambe amonisaki likanisi na ye polele. Alobaki boye: “Bokosala nkisi mpo na kolɔka moto te.” (Levitike 19:26) Na esika mosusu alobi boye: “Moto akozwama kati na bino te . . . moto na zonga . . . to moto na kosala nkisi mpo na kosakola liboso, to nganga na nkisi, to molɛngoli, to moto na kobyanga [bilimu, NW ].”—Deteronome 18:10, 11.
Mpo na nini Nzambe alobaki bongo? Ezali te mpo na kopimela biso likambo ya malamu. Yehova apesaki basaleli na ye mibeko yango mpamba te alingaki bango mpe alingaki ete bázala baombo ya bibangabanga mpe ya biyambayamba te. Azali nde kosɛnga basaleli na ye báyebisa ye mposa na bango. Ye azali Mopesi ya “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi.” (Yakobo 1:17) Ntoma Yoane ayebisaki baninga na ye bandimi ete: “Soko tokolɔmba [Nzambe] eloko nini, tokozwa yango epai na ye mpo ete tokokokisa malako na ye mpe tokosalaka makambo mazali malamu na miso na ye.”—1 Yoane 3:22.
Tokoloba boni mpo na bilimu mabe?
Banganga-nkisi mingi bandimaka ete bilimu mabe bazali, ndenge mpe Biblia elobi yango. Moto moko oyo alendisaka misala ya banganga-nkisi akomaki mokanda moko oyo elobi boye: “Bilima bazali: Bazali na mokili oyo emonanaka te, bazali na bomoi. . . . Maloba lokola ‘Elimo Mabe’ to ‘Demo’ ezali mpenza maloba oyo ebongi. Bazali makasi mingi. . . . Bilimu oyo eleki mayele . . . ekoki (soki moto akoki kofungolela bango nzela) koya na mokili na biso. . . . Bakoki kokɔtela yo na nzoto . . . , mpe koyangela yo. Makambo yango ezali mpenza ndenge masolo ya kala elobaka ete Bademo bazalaki kokɔta na nzoto ya bato.”
Na ntango ya kala, soki bademo bakɔteli moto na nzoto, bazalaki konyokola ye na mpasi ndenge na ndenge. Bato mosusu bazalaki koloba te, bamosusu bakufaki miso, mosusu bakómaki zobazoba, mpe mosusu bazalaki kokóma na makasi ya kokamwa. (Matai 9:32; 12:22; 17:15, 18; Malako 5:2-5; Luka 8:29; 9:42; 11:14; Misala 19:16) Ntango mosusu, soki bademo mingi bakɔteli moto, azalaki konyokwama na bampasi mingi mbala moko. (Luka 8:2, 30) Tomoni ete ebongaki mpenza Yehova akebisa basaleli na ye báboya misala ya banganga-nkisi, báboya mpe bato mosusu oyo bazali na misala ya bilimu mabe.
Losambo ya solo
Bato mingi bazali kolanda makambo ya zebola mpe bonganga-nkisi mpo bazali komona yango lokola losambo oyo ekoki kosala bango mabe moko te, ezali malamu, mpe ezali kaka losambo ya banguya ya mokili. Na bisika mosusu bato bakómi kondima yango. Bazali kobanga yango lisusu te. Kutu, ekómi losambo lokola losambo nyonso. Na mokili oyo bato bakómi kondima makambo ata ya mabe, bonganga-nkisi, maji, mpe makambo mosusu ya ndenge yango ekómi makambo ya lokumu.
Mangomba ekómi ebele mpe ndenge na ndenge, moto na moto akoki kopona lingomba oyo asepeli na yango; lokola kaka ndenge moto akoki kopona sapato ya kosomba. Nzokande, Yesu alobaki ete nzela ezali kaka mibale. Alobaki boye: “Bokota na porte ya moke. Mpamba te porte na nzela oyo ememaka bato na liwa ezali monene. Mpe bato mingi balandaka nzela wana; kasi porte na nzela oyo ememaka bato na bomoi ezali moke, mpe bato mingi balandaka yango te.” (Matayo 7:13, 14, Boyokani ya Sika) Ya solo, kopona nzela etali biso moko. Kasi, lokola kopona yango etali mpe bomoi na biso ya seko, tosengeli kozwa likambo yango ya kopona na lisɛki te. Mpo tóngɛngisama na elimo, tosengeli kolanda nzela ya solo. Kaka Biblia, Liloba ya Nzambe nde ekoki kolakisa biso nzela yango.
[Elilingi na lokasa 5]
Lelo oyo, bato mingi bazali kotalela misala ya bondɔki mpe ya bonganga-nkisi lokola kaka losambo ya banguya ya mokili.
[Elilingi na lokasa 6]
Mbala mingi ntango bazali kolobela ndɔki, banganga-nkisi, bato balobelaka makambo ya mabe oyo bato mosusu bamonaka te.
[Elilingi na lokasa 6]
Bandɔki mpe banganga-nkisi bayebaka te ete basalelaka nde Zabolo?
[Bililingi na lokasa 7]
Biblia ezali kolakisa nzela ya solo.