Nsango ya Bokonzi No. 36
Mbula nkóto ya sika—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?
Mbula nkóto ya sika—Ebandeli ya makambo ya sika?
NA MIDI ya butu ya mokolo ya 31 Desɛmbɛ 1999, siɛklɛ ya 20 esilaki.a Yango ezalaki siɛklɛ moko ya yikiyiki mingi. Kasi ezali mpe na siɛklɛ yango nde bato ya siansi babimisaki makambo ya sika mingi, baminganga bakómaki na mayele mingi ya kobikisa bato, mayele ya mosala ya kopanza nsango ebakisamaki mingi, mpe nkita ya mokili mobimba ezalaki kobakisama nokinoki. Yango wana bato mingi batii motema ete mbula nkóto ya sika ekomemela bango makambo ya sika mpe ya malamu ebele. Bitumba, bobola, kobebisa mokili mpe maladi ekosila mpenza na mbula nkóto oyo ya sika?
Bato mingi bandimi ete ezali bongo. Kasi okoki solo kondima ete mbula nkóto ya sika ekozala na makambo ya sika mpe ya malamu mpo na yo—makambo oyo ekotya bomoi na yo na libota na yo na likama te kasi ekobatela bino? Tótalela mwa ndambo ya mikakatano minene oyo tozali na yango lelo oyo.
Kobebisa mabele
Mikili ya bozwi ezali “mpenza kobebisa mabele bipai nyonso na mokili, mpe kobebisama yango esali ete zamba na nyama na yango ezali lisusu malamu te.” Soki batiki kosala ndenge wana te, “mabele mobimba ekobeba mingi mpenza.”—“Avenir de l’environnement mondial—2000,” Programme des Nations unies pour l’environnement.
Maladi
“Kino na mobu 2020, kati na bato zomi oyo bakokufa na mikili ya bobola, bato nsambo bakokufa na maladi oyo eyambelanaka bato te (maladie non contagieuse); nzokande, lelo oyo bato oyo bazali kokufa na maladi yango bakómi ata na katikati ya motango yango te.”—“Mokili oyo etondi na maladi,” Harvard University Press, 1996 (Lingelesi).
Bato mosusu ya mayele balobi ete “na mobu 2010, na mikili 23 epai bato mingi bazali na maladi ya sida, bato milio 66 bakosila kokufa.”—“Face au sida: la situation dans les pays en développement,” rapport conjoint de la Commission européenne et de la Banque mondiale.
Bobola
“Pene na bato miliare 1,3, bazali kobikela na mbongo moke mpenza oyo ekoki ata dolare moko te mpo na mokolo mobimba, mpe pene na bato miliare 1 bazali kolya malamu te.”—“Rapport mondial sur le développement humain 1999,” rapport du programme des Nations unies pour le développement.
Bitumba
“Na mikili mingi, mobulu ekobakisama lisusu mingi koleka. Lokola euti na kokabwana ya bato na makambo etali bikólo, bituluka mpe mangomba, . . . mobulu motindo wana ekozala . . . lolenge ya matata oyo ekopalangana mingi na mokili mobimba na mbula ntuku mibale na mitano oyo ezali koya, . . . mpe ekoboma bankóto ya bato mbula na mbula.”—“À l’aube d’un nouveau monde: la sécurité des États-Unis au XXI e siècle,” Commission américaine d’étude sur la sécurité nationale au XXI e siècle.
Na yango, lokola bato bazali kosala makɛlɛlɛ mingi mpe bazali kosepela na mbula nkóto ya sika, yango ezali kozipa bango miso bámona te ndenge mabele ezali se kobeba, ndenge maladi na bobola ezali se kobakisama mpe ndenge bitumba ezali se kokóma makasi koleka. Mikakatano nyonso wana ezali kobima mpo bato batondi na lokoso, bazali kotyelana motema te, mpe batondi na moimi—ezala siansi, tekinoloji, to makambo ya politiki ekoki kosilisa bizaleli wana te.
Mbula Nkóto oyo ekomemela bato mapamboli
Moto moko ya kala oyo azalaki kokoma babuku, alobaki boye: “Nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.” (Yilimia 10:23) Bato bazangi bobele makoki ya komitambwisa te kasi lisusu bazali na lotomo te ya koyangela mabele. Bobele Mokeli na biso, Yehova Nzambe, nde azali na lotomo mpe na mayele ya kosilisa mikakatano ya bato.—Baloma 11:33-36; Emoniseli 4:11.
Kasi ntango nini akosilisa mikakatano yango? Mpe akosilisa yango ndenge nini? Bilembo oyo ezali komonisa ete tokómi mpenza na nsuka ya “mikolo ya nsuka” ezali mingi. Fungolá Biblia na yo, mpe tángá 2 Timote 3:1-5. Mokapo yango ezali komonisa polele bizaleli oyo bato bakozala na yango na “ntango ya mpasi” oyo. Matai 24:3-14 mpe Luka 21:10, 11 ezali mpe kolobela “mikolo ya nsuka.” Mikapo yango ezali kolobela mingi makambo oyo ezali kosalema banda na mobu 1914; makambo lokola etumba ya mokili mobimba, maladi mpe nzala oyo ezali komonana bisika mingi.
Etikali moke “mikolo ya nsuka” esila. Danyele 2:44 elobi ete: ‘Nzambe na lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, . . . ekobuka mpe ekosilisa makonzi nyonso [oyo ezali awa na mabele], mpe [yango moko, NW ] ekotikala lobiko na lobiko.’ Yango wana esakolamaki ete Nzambe akotya Bokonzi, to boyangeli, oyo ekotambwisa mabele. Emoniseli 20:4, emonisi ete Bokonzi yango ekoyangela mpo na mbula nkóto mobimba! Talá mwa ndambo ya makambo oyo ekosalema mpo bomoi ya bato nyonso ekóma malamu na boumeli ya Mbula Nkóto wana ya nkembo:
Nkita. “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga na miwiti mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya.”—Yisaya 65:21, 22.
Bato bakozala nzoto kolɔngɔnɔ. “Bongo miso na bakufeli miso makofungolama, mpe matoi na bimimi makozipolama; bongo motengumi akopombwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.” “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na malali.”—Yisaya 33:24; 35:5, 6.
Bato bakofanda na esika malamu. Nzambe ‘akobebisa babebisi na mokili.’—Emoniseli 11:18.
Bato bakoyokana malamu. “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi na [Yehova].”—Yisaya 11:9.
Bamilio ya bato bazali kondima bilaka oyo ya Biblia, yango wana bazali kobanga te mpo na mikolo oyo ezali koya. Yango ezali kopesa bango makasi ya kobunda na mitungisi mpe na mikakatano ya bomoi. Ndenge nini nguya ya Biblia ekoki kotambwisa bomoi na yo?
Boyebi oyo ezali komema na bomoi!
Ntango mosusu makambo oyo siansi na tekinoloji esalaka ekamwisaka biso mpenza! Atako moto azali na mayele, bato mingi bazali na kimya te mpe bato mingi bazali na esengo te. Biblia elobeli boyebi oyo ekopesa kimya mpe esengo, elobi boye na Yoane 17:3 (NW ): “Oyo elimboli bomoi ya seko, ete báyekola koyeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”
Boyebi yango ezali na kati ya Biblia. Atako bato mingi balobaka makambo ndenge na ndenge mpo na buku mosantu yango, kasi kaka bato moke nde batángá mpenza buku yango. Ezali boni mpo na yo? Ya solo, esengeli kosala makasi mpenza mpo na kotánga Biblia. Mpe yango ekopesa yo bolamu. Biblia ezali buku bobele moko oyo “epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kopesa disipilini na bosembo.”—2 Timote 3:16, NW.
Kasi, ndenge nini okoki koyeba Biblia malamumalamu? Mpo na nini te kondima ete Batatoli ya Yehova básalisa yo? Bateyaka bamilio ya bato na bandako na bango mpe basɛngaka mbongo te. Bakoki kosalela mikanda ndenge na ndenge oyo elimbolaka Biblia mpo na koteya yo, na ndakisa mwa buku lokola Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Mwa buku yango ezali kopesa biyano ya malamu mpenza na mituna mingi oyo okoki komituna mpo na Biblia, mituna lokola oyo: Nzambe azali nani? Nzambe azali na mokano nini mpo na mabele? Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa yo mpo ozala na libota ya malamu?
Soki okolinga ete Motatoli ya Yehova moko aya kotala yo na ndako na yo, tosɛngi yo ete otondisa lokasa oyo ezali awa na nse. Bakosepela kolakisa yo makambo mingi mpo na Mbula Nkóto ya nkembo ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela!
□ Nalingi kozwa mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
□ Bóya epai na ngai mpo na boyekoli ya Biblia na ndako kozanga lifuti.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Awa tozali kolobela ndenge bato ya mikili ya Mpoto bazali kotalela mbula nkóto ya sika. Kasi mpo na bato ya siansi, mbula nkóto ya sika ekobanda mpenzampenza na mokolo ya 1 Yanuali 2001.