Milenere ya misato ekokokisa bilikya na yo?
NTANGO ebandi kosila. Likoló na mur ya centre ya Beaubourg, na Paris, horloge (ntango monene) moko ezali komonisa ba secondes oyo etikali. Ekolanda kotanga na kozanga kotelema kino le 31 Décembre 1999 na minuit. Na ntango wana likambo monene likosalema oyo uta ebandeli na ntango na biso ekosalema bobele mbula moko: kokota kati na milenere ya sika, milenere ya misato.
Bernward Joerges, sociologue na mboka Berlin (République fédérale d’Allemagne) alobi: “Mbula 2 000 ezali, na lolenge mosusu, likambo monene oyo kati na lisolo na bato ezali kolengelama mingi koleka.” Mpo na nini bozeli motindo wana? Atako bongo, mobu 2000 ezali bobele date to mokolo lokola ba dates mosusu kati na boumeli ya ntango. Lisusu, yango eyebani bobele na baoyo bazali kolanda manaka ya Occident (epai kuna moi ekolalaka). Engebene manaka ya ba musulmans, mbula 2 000 ekokani na mobu 1 420, mpe engebene bayuda ekokani na mobu 5 760 ya mokili mobimba.
Kasi, kati na lisolo oyo ebimisamaki kati na zulunalo Dagens Nyheter ya Suéde, profesere Joerges alimboli ete: “Mpo na ndenge mikili mileki makasi miyangelaki biteni mosusu ya mokili, manaka na biso oyo ya grégorien, oyo etongami likolo na date oyo bakanisi ete Klisto abotamaki, epalanganaki kati na eteni monene ya mokili.” Na yango, mbula 2 000 ekozala elembo mpo na eteni monene ya bato. Profesere Joerges abakisi ete: “Bato bakokanisa makambo na bomoi na bango moko na date wana, mpe makambo nyonso minene oyo matiaki elembo na mokili.”
Nzokande, mpo na bato mingi, ezali bobele date oyo etyami elembo te. Bernward Joerges alobi ete: “Mikano ebele mpe ba programmes ezali kobongisama kati na makambo nyonso na bomoi mpe kati na bato ya lolenge nyonso mpo na kotya ‘elembo’, mpo na kokumisa likambo oyo monene mpe kopesa ndimbola monene na yango.” Abakisi ete: “Bipai binso na mokili, bato oyo bayebi kobongisa mikano minene mpe ‘baoyo bayebi kobongisa masano’, baoyo bazali na mposa makasi ya lokumu, bazali kokanisa, bazali kotya mikano mpe kobongisa makambo minene.” Bato mosusu bakoloba ete: “Mikanda oyo mikolobela bikeke bisili koleka, mikosopana mingi mpenza. Bapanzi nsango bakozala na yikiyiki mpo na ebandeli ya milenere wana. Station moko ya télévizió ya République fédérale d’Allemagne ezali komibongisa mpo na kolakisa na boumeli na ngonga 24 makambo makoleka na bisika binso na mabelé ntango ntongo ya mokolo yango ekotana.”
Bapanzi nsango bakozanga te kolobela mingi mpo na mwana ya nsuka oyo akobotama na 1999 mpe oyo ya liboso akobotama na mobu 2000. Bakomi na nsango bakozala na mposa mingi ya kokutana na mwa bato oyo babotamaki na ekeke ya 19 baoyo bakozala naino na bomoi mpo na kotuna bango mayoki oyo bazali na yango mpo na kobika bikeke misato mpe komona milenere mibale. Nkutu bato mosusu bazali kokanisa ete makambo nyonso oyo malobami mpo na milenere yango ekobimisa lolenge ya ligboma epai na bato mingi. Engebene esakweli moko ya mabe, elobami ete na minuit, wana bakokumisa mbula ya sika, bato mingi bakomiboma.
Atako makambo wana mamonani ete maleki ndelo, ezali komonana mpenza ete likambo yango lizali na mwa bokosi. Mpo na bato mingi, kati na mokili na biso oyo ezangi elikya, milenere ya sika ezali komonana lokola pole na elikya, ebandeli ya avenire moko kitoko. Bamosusu bazali kozela ete sianse mpe teknoloji ekoka kopesa biso elikya ya mokili epai kuna tokolya malamu mpe tokozala na bomoi molai, epai kuna tokosala mosala mingi te mpe tokofanda mingi na bandako; epai kuna ba robots bakosalisa biso na misala makasi; epai kuna na mayele na bato ya sianse, mai ekobongwana essence. Bazali kokanisa avenire oyo ekozala na télévizió oyo okoki komona moto na elongi, mopanzi mpe nsima, telefone oyo ezali kolakisa moto oyo azali kosolola na yo, vidéo na langi mingi, mpe telefone oyo ekobongola maloba mbala moko. Bazali kokanisa mpo na kosala bolukiluki na Sanza, Mars mpe ba planétes mosusu mpo na kotimola mabanga to biloko mosusu na motuya.
Kasi bato nyonso bazali kotalela makambo na elikya te. Balukiluki mosusu bazali kotalela milenere ya sika lokola ebandeli ya ntango moko oyo motuya na bato ekoleka mingi na mokili mpe kobeba ya ezingelo na biso. Kobeba ya mopepe ekobongola ezingelo na biso na kozala na molungé makasi. Ba glace to mbula mpembe oyo ezali na ngomba ekobongwana mai mpe nivó na mai-monene ekomata, mai ekokóma na bisika oyo bato bafandi mpe bisika nyonso oyo bazali kolona, mpe bamilió ya ba hectares ya mabelé oyo bato bazali kolona ekozala esobe. Bamoni ete nkita ya mokili mobimba ekokwea, yikiyiki kati na politike oyo ekoningisa biyangeli mpe mabota na bato, kokóla makasi ya koboma, mpe likambo oyo eleki mabe, etumba ya nikleere oyo ekoboma bato nyonso.
Wana tozali kobelema na milenere yango ya sika, bato oyo bakolobelaka liboso makambo oyo makoya bazali na makanisi mingi, kasi bazali na makanisi ya sikisiki te mpo na oyo ekoya. Kasi, ezali kosenga makambo mingi oyo mazali mpasi mpenza na kosala mpo ete moto akoka kosakola ntango ekoya na bosikisiki nyonso. Moto na mayele oyo asakolaka avenire akokisaki likambo yango na oyo babiangi jeu d’échecs (lolenge na dame): Liboso ete nabeta ngola (pion) moko nakotala liboso mbala boni na kolya. Kasi nsima wana ete moninga na ngai abeti, nasengeli kobandela lisusu.
Mpo na oyo mobu 2 000 ekomema, bobele avenire yango moko nde ekokata likambo. Nzokande, yango elimboli te ete avenire na yo eyebani te. Biblia emonisi polele ete tobelemi na milenere (mbula nkoto) oyo ezali na ntina mingi koleka milenere ya misato oyo etikali mbula soko zomi mpo ebanda. Milenere oyo ekoya ekoleka mosika mpenza, oyo bato bazali kolikya. Ekolimbola mpenza nini? Mbongwana nini yango ekomema? Tosengi na yo etanga lisolo oyo elandi mpe oyekola makambo oyo Biblia elobi mpo na yango.