Tózongela bato oyo basepelaki na Nsango ya Bokonzi No. 36
1 Bosilisi kokabola nkasa ya Nsango ya Bokonzi No. 36 oyo bapesaki bino? Nsango ya Bokonzi No. 36 ezali na motuna moko oyo ebongi mpenza bato nyonso bákanisa yango: “Mbula nkóto ya sika—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?” Ntango tokómaki pene na mobu 2000, bato batyaki elikya ete mbula nkóto ya sika ekomema mbongwana ndenge na ndenge ya minene. Nsango ya Bokonzi No. 36 elobeli mwa ndambo ya bilikya yango mpe ezali komonisa ete makambo oyo ezali kobima na mokili ezali kopesa elikya moko te. Mbula nkóto oyo ekomema kimya mpe libateli oyo bato mingi bazali koluka, ezali bobele Boyangeli ya Klisto Yesu oyo ekoumela Mbula Nkóto. Elikya oyo tozali na yango ete Bokonzi na ye ezali likambo ya solo, ezali kotinda biso tókabolela moto nyonso Nsango ya Bokonzi No. 36 soki likoki ezali.
2 Ndenge nini bato bayambaki Nsango ya Bokonzi?: Na mbala eleki, ntango tokabolaki Nsango ya Bokonzi, yango elendisaki biso mpenza na mosala na biso. Mpo na Nsango ya Bokonzi No. 35, Betele ya Canada ekomaki boye: “Basakoli mpe babongisi-nzela basalaki mpenza kampanye yango ya monene na esengo nyonso, mpe bakutanaki na makambo ebele ya kolendisa.” Na ntembe te bino mpe bozali na esengo ndenge yango mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36.
3 Tokokabola Nsango ya Bokonzi oyo kino na mokolo ya 17 Novɛmbɛ 2000. Bosili kokabola yango na bateritware nyonso ya lisangá na bino? Soki bosilisi naino te, bankulutu bakoki kosɛnga bino ete bókabola yango kino na nsuka ya sanza ya Novɛmbɛ.
4 Ntango bozali kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36 na teritware na bino, bato bazali koloba nini? Bato mosusu bakotondisa mwa lokasa mpo na kosɛnga mwa buku Azali kosɛnga to mpe bakoki kosɛnga ete báyekolisa bango Biblia na ndako na bango. Nzokande, bato mingi oyo basepelaki koyoka makambo oyo etali mbula nkóto bakosala eloko moko te kino ntango Motatoli ya Yehova moko akoya kotala bango. Tosengeli kokende kotala bato nyonso oyo basepelaki. Ekozala malamu tósala yango ntango nini? Esengeli kozongela bango noki mpenza soki likoki ezali.
5 Talá makambo oyo bandeko bakutanaki na yango ntango bazongelaki bato nsima ya kotikela bango Nsango ya Bokonzi No. 35. Mobongisi-nzela moko na mboka Irlande atikelaki nkolo restora moko lokasa ya Nsango ya Bokonzi. Mwasi yango akamwaki na makambo oyo atángaki mpe asɛngaki ndeko mwasi ete aya kotala ye lisusu. Ndeko mwasi azongelaki ye nsima ya mikolo mibale, mpe babandaki koyekola Biblia. Na mboka Danemark, Batatoli batikaki lokasa ya Nsango ya Bokonzi na ndako moko oyo bato bazalaki te. Bobele mokolo yango, mwasi nkolo-ndako atindaki mwa lokasa na Biro ya la Société, Biro etindaki yango na lisangá oyo ezali pene ya ndako ya mwasi yango. Liboso ete pɔsɔ esila, bandeko basi mibale bakendaki kotala mwasi yango, bayokanaki mpo na kobanda koyekola, mpe mwasi yango ayanganaki na likita na ye ya liboso na Ndako ya Bokonzi!
6 Okoloba nini soki ozongeli moto?: Kozongela bato oyo otikelaki bango lokasa ya Nsango ya Bokonzi ezali pɛtɛɛ mpe ezali likambo oyo ezali kopesa esengo mingi na mosala na biso. Ntango ozali kozongela moto, osengeli komema lokasa mosusu ya Nsango ya Bokonzi No. 36, ntango mosusu moto oyo okei kotala azali na lokasa na ye lisusu te. Okoki komeka makanisi oyo.
7 Nsima ya kokundwela moto oyo okei kotala soki ozali nani, okoki koloba boye:
◼ “Natikelaki yo lokasa oyo ezali na motó ya likambo: ‘Mbula nkóto ya sika—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?’ Ntango otángaki ete etikali moke Boyangeli ya Klisto Yesu oyo ekoumela Mbula Nkóto, ebanda mpe ekokómisa mabele mobimba Paladiso, likambo yango esepelisaki yo, boye te? [Lakisá bililingi ya Paladiso oyo ezali na Nsango ya Bokonzi No. 36.] Na lokasa ya nsima, balendisi yo ete osɛnga mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?” Lakisá mwa buku yango, fungolá na liteya 5, tángá motuna ya liboso mpe paragrafe 1 mpe 2, mpe sɛngá na moto oyo ozali kosolola na ye ete apesa eyano. Tángá mpe lobelá mokapo moko to mikapo mibale. Soki likoki ezali, talelá motuna mpe paragrafe mosusu, na nsima bóyokana mpo na kozongela ye mpo bókoba lisolo.
8 Lokola na sanza ya Novɛmbɛ tokolakisa mwa buku “Azali kosɛnga” to buku “Boyebi,” okoki koloba boye:
◼ “Ntango nayaki epai na yo na mbala eleki, natikelaki yo lokasa oyo ezali na motó ya likambo ‘Mbula nkóto ya sika—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?’ Ezali kolendisa yo ondima koyekola Biblia na ndako na yo kozanga kofuta mbongo. Nazongeli yo mpo na kolakisa yo mokanda oyo tosalelaka mpo na koyekola. [Lakisá mwa buku Azali kosɛnga, mpe kende na lokasa ya nsuka na ezipeli, to lakisá buku Boyebi, mpe fungolá yango na lokasa 188-189.] Mbula nkóto oyo Biblia ezali kolobela ekosala ete bato bázala na bomoi lokola ndenge ozali komona na elilingi oyo. Mpo bándima biso tófanda na Paladiso, tosengeli koyeba Nzambe malamumalamu. Okoki kopesa ngai nzela nalakisa yo na mokuse ndenge toyekolaka Biblia.”
9 Nsango ya Bokonzi No. 36 oyo tokaboli elendisi biso ete tósala mosala ya kosakola mingi lisusu, tópesa litatoli mingi mpenza. Yango ebendi mpe likebi ya bato mingi na teritware. Milende oyo tozali kosala na lisalisi ya Yehova mpo na kosalisa bato oyo basepelaki, ekotinda biso ete tókutana na bato mingi oyo bakokani na bampate.—Mat. 10:11; Mis. 13:48, 49, 52.