Ebandeli na bango na mikolo na biso mpe ndenge mosala ekoli
MOSALA ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso, ebandaki eleki sikoyo mbula koleka nkama moko. Na ebandeli ya bambula ya 1870, mwa etuluku moke ya bato babandaki koyekola Biblia na Allegheny, etúká ya Pennsylvanie, oyo ezali lelo na engumba Pittsburgh, na États-Unis. Charles Taze Russell nde abandisaki etuluku yango. Basalaki zulunalo Zion’s Watch Tower and Herald of Christ’s Presence (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona mpe Moyebisi ya kozala ya Klisto) oyo nimero na yango ya liboso ebimaki na sanza ya Yuli ya mobu 1879, na Lingelesi. Na 1880, etuluku wana moke ya bayekoli ya Biblia ebimisaki masangá epai na epai na bitúká mosusu. Na 1881, basalaki lisangá (association) oyo babengaki Zion’s Watch Tower Tract Society, mpe na 1884 bakomisaki lisangá yango na mikanda ya Leta mpe Russell azalaki prezida na yango. Na nsima, nkombo ya lisangá yango ekómaki Watch Tower Bible and Tract Society. Mingi na bango bazalaki kosakola ndako na ndako mpe kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia. Na 1888, bato ntuku mitano bazalaki kosala mosala yango ya ntango nyonso—sikawa bazali soki 700000 na mokili mobimba.
Na 1909, mosala yango ekómaki kosalema na mikili mingi, mpe biro monene ya Société Watch Tower ekómaki esika yango ezali sikawa, na Brooklyn, na etúká ya New York. Babandaki kobimisa masolo ya Biblia na bazulunalo ya kopanza nsango, mpe na 1913 masolo yango ekómaki kobima na minɔkɔ minei na bazulunalo 3000 na États-Unis, na Canada mpe na Mpoto. Bakabolaki bankama ya bamilio ya babuku, mwa babuku mpe batrakte.
Na 1912, basalaki filme oyo ezalaki na motó ya likambo: “Fɔtɔ-Drame ya bozalisi.” Filme yango ezalaki mpenza filme oyo bato bazali koloba mpe kotambola, ezalaki kolimbola makambo banda ntango moto azalisamaki awa na mabele tii na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu. Filme yango ebandaki kolakisama na 1914, mpe bato 35000 bazalaki kotala yango mokolo na mokolo. Ezalaki filme ya liboso oyo bato bazalaki koloba mpe kotambola.
MOBU 1914
Ntango moko ya mpasi ekómaki pene. Na 1876, na Brooklyn, na etúká ya New York, Charles Taze Russell, moyekoli ya Biblia, abimisaki na zulunalo moko (Bible Examiner) lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Ntango ya bapakano: Ekosuka ntango nini?” Lisolo yango elobaki boye, na lokasa 27 na nimero oyo ebimaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, ete, “Ntango nsambo ekosuka na 1914 T.B.” Ntango ya Bapakano ezali eleko oyo libongoli mosusu ya Biblia ebengi yango ete “ntango oyo etyami mpo na mabota.” (Luka 21:24) Makambo oyo bakanisaki ete ekosalema na 1914 esalemaki nyonso te, atako bongo mbula yango emonisaki nsuka ya Ntango ya Mabota mpe ezalaki mobu moko ya ntina mingi. Bato mingi oyo bakomaka masolo ya kala mpe oyo balimbolaka makambo oyo esalemaka na mokili, balobaki ete 1914 ezalaki mobu moko ya mbongwana monene na kati ya lisolo ya bato. Maloba oyo elandi ezali komonisa bosolo ya likambo yango:
“Mobu 1913 ezalaki mbula ya nsuka oyo ezalaki ‘malamu’ na lisolo ya bato, liboso ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebanda.”—Zulunalo Times-Herald, na etúká ya Washington, 13 Marsi 1949.
“Na boumeli ya mbula 75, kobanda 1914 tii 1989, ntango bitumba mibale ya mokili mobimba esalemaki mpe ntango bikólo ya nguya mingi ezalaki kowelana (guerre froide), bato oyo bakomaka masolo ya kala batalelaka yango lokola eleko oyo ekeseni mpenza na bileko mosusu nyonso, ntango moko oyo bato mingi na mokili bazalaki kobunda, bautaki kobunda to bazalaki komilɛngɛla mpo na kobunda.”—Zulunalo The New York Times, 7 Mai 1995.
“Mokili epanzanaki mpenza na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe kino lelo toyebi te mpo na nini. Liboso ya ntango wana, bato bazalaki kokanisa ete makambo ekobonga se kobonga. Kimya ezalaki mpe bato bazalaki na bomoi ya malamu. Na nsima, makambo nyonso ebebaki. Banda ntango wana, tozali lokola bato bazali kozela likambo moko . . . Bato mingi babomami na ekeke oyo koleka bikeke mosusu nyonso na lisolo ya bato.”—Dr. Walker Percy, zulunalo American Medical News, 21 Novɛmbɛ 1977.
Mbula koleka 50 nsima ya 1914, Konrad Adenauer, moto monene na Leta ya mboka Allemagne akomaki ete: “Banda 1914, bato bazali lisusu na kimya te mpe bazali na likama.”—The West Parker, Cleveland, Ohio, 20 Yanuali 1966.
C. T. Russell, prezida ya yambo ya Société Watch Tower, akufaki na 1916 mpe na mbula oyo elandaki Joseph F. Rutherford akitanaki ye. Mbongwana mingi esalemaki. Zulunalo moko ya sika na nkombo L’Âge d’Or ebimaki, oyo ekómaki bongo kobima nzela moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. (Lelo oyo Lamuká!, na nimero moko babimisaka bazulunalo koleka milio 20 na minɔkɔ koleka 80.) Basɛngaki na basakoli ete básakolaka mingi ndako na ndako. Mpo na komikesenisa na mangomba mosusu, na 1931 baklisto yango bazwaki nkombo Batatoli ya Yehova. Nkombo yango euti na Yisaya 43:10-12, NW.
Basalelaki radio mingi na bambula ya 1920 mpe ya 1930. Na 1933, Société Watch Tower ezalaki kosala masolo ya Biblia na bastasyo ya radio 403. Na nsima, Batatoli batikaki kosalela radio mpe bakómaki kokenda kotala bato ndako na ndako na bafono mpo na koyokisa bango masolo ya Biblia oyo etyamaki na diskɛ. Na bisika oyo moto asepelaki na solo ya Biblia, bazalaki kobanda koyekola na ye Biblia.
BALONGI NA BATRIBINALE
Na boumeli ya bambula ya 1930 mpe 1940, bazalaki kokanga Batatoli ya Yehova mingi mpo bazalaki kosala mosala na bango ya kosakola, bafundaki bango na makambo ebele mpe basambaki mpo na koluka kolongisa bonsomi ya koloba, ya kobimisa mikanda, ya koyangana mpe ya losambo. Na États-Unis, ntango batribinale ya mike ezalaki kokatela bango bitumbu, bazalaki kosɛnga kokenda kosamba na batribinale ya minene, mpe balongaki makambo 43 na Tribinale oyo Eleki Monene na mboka yango. Bobele bongo, balongaki mpe na batribinale ya minene na mikili mosusu. Lokola balongaki na batribinale, Profesɛrɛ C. S. Braden akomaki buku moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete Bango mpe bazali na kondima (na Lingelesi) mpe alobaki boye: “Basalaki mosala moko malamu mpo na kosalisa demokrasi, mpe basali makasi mpo na kobatela ntomo na bango, mpamba te na molende na bango basali makasi ya kozwa ntomo yango mpo na mangomba ya Amerika oyo ezali na bato mingi te.”
BABONGISI MATEYA YA NTINA MPENZA
J. F. Rutherford akufaki na 1942 mpe N. H. Knorr akitanaki ye. Babongisaki mateya ya ntina mpenza. Na 1943, bafungolaki eteyelo ya Gileadi—Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia mpo na bamisionɛrɛ. Kobanda ntango wana, bamisionɛrɛ oyo basilisaka na eteyelo yango batindamaka bipai nyonso na mokili. Masangá ya sika esalemaki na mikili oyo ezalaki liboso ata na lisangá moko te, mpe bafiliale efungwami na mikili mingi mpe lelo oyo bafiliale ezali koleka 100. Mbala na mbala, bankulutu ya masangá, bandeko oyo basalaka na bafiliale, mpe baoyo bazali kosala mosala ya ntango nyonso (lokola babongisi-nzela) na mosala ya kosakola, bazwaka mateya mpo ete básala mosala na bango malamu. Na Esika Monene ya mateya na Patterson ya batatoli ya Yehova, oyo ezali na etúká ya New York, bafungoli biteyelo ndenge na ndenge mpo na baministre ya nsango malamu.
N. H. Knorr akufaki na 1977. Kati na mbongwana ya nsuka oyo esalemaki, oyo ye mpe apesaki mabɔkɔ liboso ya liwa na ye, ezalaki bongo kobakisama ya motángo ya basangani ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo ezali na biro monene na Brooklyn. Na 1976, bakabolaki mikumba ya kotambwisa mosala mpe bapesaki yango na bakomite ndenge na ndenge oyo basangani na yango nyonso bazali kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo bango nyonso basali bambula mingi na mosala ya kosakola.
BATONGI BANDAKO MOSUSU YA KONYATA MIKANDA
Lisolo ya Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso ezali na makambo mingi ya kokamwa. Ezalaki mwa etuluku moko moke ya bayekoli ya Biblia oyo ebandaki na Pennsylvanie na 1870, lelo oyo na mobu 2000, Batatoli bakómi na masangá soki 90000 na mokili mobimba. Na ebandeli, bakompanyi nde ezalaki konyata mikanda na bango nyonso; na nsima, na 1920, Batatoli bakómaki kofutela bandako mpo na konyata mikanda mosusu bango moko. Kasi, banda 1927, bango moko bakomaki konyata mikanda na bango na ndako moko ya baɛtazɛ mwambe oyo bango moko batongaki na Brooklyn, na New York. Batongi sikawa bandako mosusu ya konyata mikanda mpe bandako mpo na babiro. Bandako mosusu oyo ezali kaka wana na Brooklyn, ezali mpo na kolalisa bandeko oyo bamipesi bango moko mpo na kosala na bandako ya konyata mikanda. Société Watchtower ezali mpe na ferme na yango epai batongá mpe bandako ya konyata mikanda, yango ezali pene na Wallkill na nɔrdi ya etúká ya New York. Ndako yango ezali kosalisa mpo na konyata bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe ferme ebimisaka biloko mosusu ya kolya mpo na baministre ya nsango malamu oyo bazali kosala na bisika ndenge na ndenge. Bandeko oyo bamipesi bango moko mpo na kosala kuna bazwaka mwa lisungi ya mbongo moke sanza na sanza mpo na kokokisa bamposa ya mikemike.
MAYANGANI YA MIKILI MINGI
Liyangani monene ya liboso esalemaki na 1893, na engumba Chicago, na etúká ya Illinois, na États-Unis. Bato 360 bayanganaki mpe bato 70 bazwaki batisimo. Liyangani monene ya nsuka oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili mingi, oyo esalemaki bobele na esika moko, ezalaki na engumba New York na 1958. Esalemaki na Yankee Stadium mpe Polo Grounds. Bato 253922 bayanganaki mpe bato 7136 bazwaki batisimo. Banda ntango wana, mayangani oyo bato bautaka mikili mingi, ekóma kosalema na bisika mingi na bikólo mingi na mokili mobimba. Na bongo, mayangani ya etúká oyo ezali kosalema na bisika mingi ekoki kozala soki nkóto moko na mokili mobimba.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]
Basalaki makasi mpo na kobatela bonsomi na bango
[Elilingi na lokasa 6]
“Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ebandaki kobima 6000 na monɔkɔ moko, kasi sikawa ezali kobima koleka milio 22 na minɔkɔ koleka 132
[Elilingi na lokasa 7]
Mbongwana monene na lisolo ya bato
[Elilingi na lokasa mobimba 10]