“Bókeba na ndenge bozali koyoka”
KOYOKA ezali na ntina mingi mpo na koyekola. Ekoki kobikisa moto to mpe komema ye na liwa. Ntango Yehova alingaki kobikisa libota na ye na boombo na Ezipito, apesaki Moize malako mpe Moize ayebisaki mikóló ya Yisalaele makambo oyo basengelaki kosala mpo na kobikisa bana na bango ya liboso mpo anzelu aboma bango te. (Ex. 12:21-23) Na nsima, mikóló yango bayebisaki makambo yango na libota mokomoko. Lokola bayebisaki bango makambo yango kaka na monɔkɔ, Bayisalaele basengelaki koyoka na likebi mpenza. Basalaki nini? Biblia elobi boye: “Bato ya Yisalaele nyonso basalaki boye. Lokola elakaki [Yehova] Moize mpe Alona, basalaki boye.” (Ex. 12:28, 50, 51) Yango wana, Bayisalaele babikaki na lolenge ya kokamwa mpenza.
Lelo oyo, Yehova azali kobongisa biso mpo na kobikisa biso na likama moko monene koleka. Na ntembe te, tosengeli kotya likebi mpenza na malako oyo azali kopesa biso na makita ya lisangá. Ozali mpenza kozwa matomba na makita yango? Yango etaleli mpenza ndenge oyo oyokaka.
Okangaka makanisi ya ntina ya mateya oyo ozali kozwa na makita? Ozalaka na momeseno ya koluka pɔsɔ na pɔsɔ ndenge oyo okosalela malako yango na bomoi na yo to ndenge oyo okoyebisa yango na bato mosusu?
Bongisá motema na yo
Mpo tózwa mpenza matomba mingi na mateya oyo ezali kopesama na makita ya lisangá, tosengeli kobongisa mitema na biso. Makambo oyo esalemaki ntango Yosafata azalaki mokonzi ya Yuda, emonisi mpenza ntina ya kobongisa mitema na biso. Yosafata asengelaki komonisa ete azali na mpiko mpo na kosalela losambo ya solo. “Alongolaki bisika ya likoló mpe [makonzí mosantu, NW] kati na Yuda” mpe apesaki mikóló, Balevi na banganga, mokumba ya koteya bato na bamboka nyonso ya Yuda Mibeko ya Yehova. Atako bongo, “bisika ya likoló elimwaki te.” (2 Nta. 17:6-9; 20:33, NW) Nini esalemaki? Losambo ya banzambe ya lokuta mpe lolenge moko ya mabe ya kosambela Yehova oyo bazalaki kosala na bisika ya likoló na kolanda losambo ya bapakano ekɔtelaki bango mingi na boye ete bakokaki kotika yango te.
Mpo na nini bakokaki te kosalela na boumeli ya bomoi na bango mobimba mateya oyo Yosafata atindaki báteya bango? Biblia elobi lisusu boye: “Bato bango moko babongisaki naino mitema na bango te mpo na Nzambe ya batata na bango.” Bayokaki kasi basalelaki makambo yango te. Mbala mosusu, bakanisaki ete kokende na tempelo ya Yelusaleme mpo na kopesa bambeka ezalaki malamu te. Ata ndenge nini, mitema na bango ezalaki na kondima te.
Mpo tózongela lisusu te banzela ya mokili ya Satana, tosengeli kobongisa mitema na biso mpo na kozwa mateya oyo Yehova azali kopesa biso lelo oyo. Ndenge nini? Moko na makambo ya ntina oyo ekosalisa biso ezali libondeli. Tosengeli kosɛnga na mabondeli na biso ete tóyamba mateya ya Nzambe na botɔndi mpenza. (Nz. 27:4; 95:2) Yango ekosalisa biso tósepela na milende ya bandeko na biso oyo, atako bazali bato ya kokoka te, kasi bazali komipesa mpo Yehova asalela bango mpo na koteya bato na ye. Ekotinda biso tópesa Yehova matɔndi kaka mpo na makambo ya sika oyo tozali koyekola te, kasi lisusu mpo na libaku oyo apesi biso ete tósepelaka mpe na makambo oyo tosilaki koyekola. Lokola tozali na mposa ya kosala mpenza mokano ya Nzambe, tobondelaka boye: “Ɛ [Yehova], teyá ngai nzela na yo; . . . pesá ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.”—Nz. 86:11.
Tyáká likebi
Makambo mingi epekisaka biso tóyoka na likebi mpenza. Ekoki kozala ete likambo moko ezali kotungisa makanisi na biso. Mbala mosusu makɛlɛlɛ mpe bato oyo bazali kotambolatambola na kati to na libándá ya esika ya makita, nyonso wana ekoki kosala ete tótya likebi malamu te. Soki mpe nzoto ezali malamu te, tokokoka mpenza te kotya likebi. Mbala mingi, baoyo bazali na bana mike bakokaka te kotya likebi. Nini ekoki kosalisa biso tótya ntango nyonso likebi ntango makita ezali kosalema?
Miso nde esalaka mpenza ete tótya likebi. Salelá miso na yo mpo otya likebi: kotika te kotala molobi. Ntango apesi vɛrsɛ moko, ata oyebi yango, luká yango mpe landá ye ntango azali kotánga yango. Salá makasi otalatala te esika makɛlɛlɛ ezali to esika bato bazali kotambolatambola. Soki miso na yo ezali kotalatala makambo mingi oyo ezali kolongola likebi na yo, okoyoka te makambo mingi oyo bazali koloba na estrade.
Soki ozali na ‘likambo oyo ezali kobulunganisa makanisi’ na yo mpe ezali kopekisa yo kotya likebi ntango makita ezali kosalema, bondelá Yehova apesa yo kimya ya makanisi mpe ya motema, yango ekosalisa yo otya likebi. (Nz. 94:19, NW; Filp. 4:6, 7) Bondelá bongo mbala na mbala soki esengeli. (Mat. 7:7, 8) Makita ya lisangá ezali likabo ya Yehova. Esengeli ondima ete alingi ozwa litomba na yango.—1 Yoa. 5:14, 15.
Ndenge ya kolanda masukulu
Na ntembe te, ozali kokanisa lisusu mwa makambo oyo esepelisaki yo na masukulu oyo oyoká. Nzokande kolanda lisukulu ezali kaka te kokanga mwa makanisi ya ntina. Lisukulu ezali lokola mobembo. Atako ezali na makambo mingi ya kitoko oyo okoki kotalatala na nzela, likambo ya ntina ezali nde likambo oyo olingi kosala to esika ozali kokende. Ndenge moko mpe, molobi akoki mbala mosusu koluka kati na lisolo na ye kosalisa bato oyo bazali koyoka ete bákanga ntina ya likambo moko to básala likambo moko.
Talá lisukulu oyo Yosua asalaki liboso ya libota ya Yisalaele, na Yosua 24:1-15. Mokano na ye ezalaki ete asalisa Bayisalaele bápona kokangama na losambo ya sembo mpe bákabwana mpenza na mabota oyo ezalaki zingazinga na bango oyo ezalaki kosambela bikeko. Mpo na nini yango ezalaki na ntina mingi? Losambo ya lokuta epalanganaki mingi mpe yango ezalaki likama mpo na libota ya Yisalaele oyo basengelaki kozala na boyokani malamu na Yehova. Bato bayokaki toli ya Yosua mpe balobaki boye: “Biso tokoki kotika [Yehova] soki moke te mpo na kosalela banzambe mosusu. . . . Biso mpe tokosalela [Yehova].” Mpe basalaki bongo!—Yos. 24:16, 18, 31.
Ntango ozali kolanda lisukulu, salá makasi oyeba ntina na yango. Talá ndenge makanisi oyo molobi azali kobimisa ezali komema bino bókanga ntina ya lisukulu yango. Omituna soki makambo yango ezali kosɛnga yo osala nini.
Ndenge ya koyoka masolo ya mituna mpe biyano
Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Boyekoli ya Mokanda mpe masolo mosusu na Likita ya Mosala, esalemaka na mituna mpe biyano ya mikanda oyo elimbolaka Biblia.
Na makambo mosusu, koyoka lisolo ya mituna mpe biyano ezali lokola ozali kosolola na moto. Mpo ozwa mpenza matomba mingi, osengeli koyoka na likebi mpenza. Yoká ndenge lisolo ezali kolandana. Yoká ndenge motambwisi azali kobimisa polele motó ya likambo mpe makanisi ya ntina. Pesáká biyano na maloba na yo moko na mituna oyo azali kobimisa. Yoká ndenge basusu bazali kolimbola makambo mosusu mpe komonisa lolenge tokoki kosalela yango. Soki ozali kolanda ndenge basusu bazali kotalela likambo moko, yango ekosalisa yo ozwa makanisi ya sika na likambo oyo oyebi banda kala. Yo mpe pesá makanisi na yo na lisolo yango, pesá eyambweli ya kondima na yo.—Lom. 1:12.
Soki obongisi masolo yango na ndako, yango ekosalisa yo otya mpenza likebi ntango ezali kosalema mpe okolanda makanisi oyo bandeko mosusu bazali kopesa. Soki ezali mpasi mpenza mpo oyekola masolo yango na ndako, zwá ata miniti moke liboso makita ebanda, mpo na kotala soki lisolo yango ekolobela nini. Soki osali bongo, ekosalisa yo oyeba makambo oyo ekoyokana na lisolo yango.
Ndenge ya koyoka na mayangani ya mike mpe ya minene
Na ntembe te, na mayangani ya mike mpe ya minene, ezali na makambo mingi oyo ekoki kolongola likebi na biso koleka na makita ya lisangá. Yango ekoki kosala ete ezala mpasi mpenza mpo tólanda liyangani malamu. Nini ekoki kosalisa biso?
Kolala malamu na butu ezali na ntina mingi. Mokolo mokomoko, liboso liyangani ebanda, luká kosimba malamu mokapo ya mokolo wana. Talá motó ya likambo ya lisukulu mokomoko mpe meká kokanisa makambo oyo bakoloba wana. Salelá Biblia na yo malamu. Bato mingi bamoni ete kokoma mwa makanisi ya ntina esalisaka bango bátya ntango nyonso likebi na masolo nyonso. Komá makanisi oyo omoni ete okosalela yango na bomoi na yo mpe na mosala ya kosakola. Na boumeli ya mikolo yango, ntango ozali kokende na liyangani to ntango ozali kozonga na ndako, lobelá makanisi yango. Ekosalisa yo obosana te makambo oyo oyokaki.
Teyá bana báyeba koyoka
Baboti baklisto bakoki kosalisa bana na bango, ata bazali naino mike mpenza ete bákóma na “bwanya mpo na lobiko,” soki bazali komema bango na makita ya lisangá mpe na mayangani ya mike mpe ya minene. (2 Tim. 3:15) Lokola makoki ya bana ya kotya likebi ekesanaka, baboti basengeli kozala na bososoli mpo na kosalisa bango báyekola koyoka na likebi mpenza. Mbala mosusu toli oyo elandi ekosalisa yo.
Na ndako, bongisá ntango mpo bana na yo oyo bazali naino mike, báfandaka kimya mpo na kotánga to kotala bililingi na mikanda na biso ya boklisto. Na makita, kopesa bango bana-popi te ntango bazali kotungisa yo. Lokola ezalaki na Yisalaele ya kala, lelo oyo mpe bana mike bayaka na makita mpo “báyoka mpe báyekola.” (Det. 31:12) Soki ebongi, baboti mosusu bapesaka mwana na mwana mokanda oyo bazali koyekola, ata soki azali naino mwana moke mpenza. Ntango bana bazali kokola, salisá bango bámibongisaka mpo na masolo ya mituna mpe biyano.
Makomami emonisi ete koyoka Yehova ezali na boyokani na kotosa ye. Yango emonani na maloba oyo Moize ayebisaki libota ya Yisalaele: “Natii liboso na yo bomoi mpe liwa, lipamboli mpe elakeli mabe; bongo osengeli kopona bomoi . . . mpe olinga Yehova, Nzambe na yo; mpe oyoka mongongo na ye mpe okokangama na ye.” (Det. 30:19, 20, NW) Lelo oyo, ezali na ntina mingi ete tóyoka malako oyo Yehova azali kopesa biso, tótosa yango mpe tósalela yango na bomoi na biso mpo tósepelisa Nzambe mpe tózwa bomoi ya seko. Yango wana, ezali mpenza na ntina mingi ete tóyoka likebisi ya Yesu oyo elobi ete: “Bókeba na ndenge bozali koyoka!”—Luka 8:18.