Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/01 lok. 5
  • ‘Yoká mpe bakisá mayele mingi’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Yoká mpe bakisá mayele mingi’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Tyá likebi na maloba ya bulɛɛ
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Tóyoka mpe tóyekola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Tóyangana elongo mpo na kosanzola Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • “Kondima kati na liloba ya Nzambe”​​​—liyangani ya etúká 1997
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 5/01 lok. 5

‘Yoká mpe bakisá mayele mingi’

1 Mokanda ya Masese emonisi ete bwanya ezali kobenga boye: “Bóyoka, zambi nakoloba mpo na makambo ya kitoko; kozipwa na bibebu na ngai ekozala mpo na makambo ya sembo. Toli ezali na ngai mpe mayele malamu. . . . yókamela ngai; zambi baoyo bakobatela nzela na ngai bakopambolama. Zambi ye oyo akozwana na ngai akomona bomoi; akopambolama na [Yehova].” (Mas. 8:6,14, 32, 35) Maloba oyo emonisi mpenza mateya oyo ezali kozela biso na liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe.”

2 Moombo ya sembo atalelaki bamposa ya bandeko nyonso ya mokili mobimba, yango wana abongisaki programe ya liyangani yango mpo na kokokisa bamposa yango. Soki tosaleli mateya ya elimo mpe toli malamu oyo ekopesama kuna, yango ekoki kosalisa biso tozala na esengo, tozala ntango nyonso na boyokani malamu elongo na Yehova, mpe totikala na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. Na ntembe te, tozali na ntina malamu ya ‘koyoka mpe kobakisa mayele.’​—Mas. 1:5.

3 Liboso ete liyangani ebanda: Mpo tózwa mpenza litomba na makambo oyo ekolobama, tosengeli kofanda na bisika na biso mpe makanisi na biso ezala mpenza na esika na yango ntango liyangani ebandi. Yango esɛngaka ete moto na moto amibongisa malamu. Sɛkɛlɛ ezali ete esengeli kobanda komibongisa libosoliboso. Lalá na ngonga malamu. Lamuká na ntɔngɔntɔngɔ mpo na kotikela moto mokomoko ya libota na yo ntango ya komibongisa mpe kolya mwa eloko. Kómá na ngonga malamu na esika ya liyangani mpo na kozwa esika ya kofanda mpe kobongisa makambo mosusu liboso ete liyangani ebanda. Mikolo nyonso, esika ya liyangani ekobanda kofungwama na ngonga ya 8:00 na ntɔngɔ, mpe liyangani ekobanda na ngonga ya 9:30 na ntɔngɔ.

4 Lokola ntina ya liboso ya koyangana na biso ezali ya kokumisa Yehova “kati na koyangana monene,” eteni mokomoko ya liyangani esengeli kobanda na ndenge oyo ekokumisa Nzambe. (Nz. 26:12) Mpo na yango, biso nyonso tolendisami ete tozala na bisika na biso liboso ete loyembo ya liboso eyembama. Yango eyokani na toli oyo ya Makomami: “Tiká ete makambo yango nyonso masalema na motindo mozali na nsɔni te mpe na mobulu te.” (1 Kol. 14:40) Yango elimboli nini mpo na mokomoko na biso? Ntango omoni prezida ya eteni moko ya liyangani afandi na ebaelo wana miziki ezali kobɛta, osengeli nokinoki kofanda na esika na yo. Yango ekopesa yo nzela oyemba na motema mobimba elongo na bayangani mosusu loyembo oyo ebandisaka eteni mokomoko ya liyangani, mpo na kosanzola Yehova.​—Nz. 149:1.

5 Ntango liyangani ezali kosalema: Ezela “[abongisaki, NW ] motema na ye ete asosola Mobeko ya [Yehova] mpe ete [alanda] yango.” (Ezl. 7:10) Ndenge nini tokoki kobongisa mitema na biso mpo na kozwa mateya oyo Yehova abongisi? Ntango ozali kotala mitó ya makambo ndenge na ndenge ya masukulu oyo ezali na kati ya lokasa ya programe, omituna boye: “Yehova azali koteya ngai nini na nzela ya programe oyo? Ndenge nini nakoki kosalela mateya yango mpo ete ngai mpe libota na ngai tozwa matomba?” (Yis. 30:21; Ef. 5:17) Na boumeli ya liyangani, omitunaka mituna yango. Kómá makambo oyo olingi kosalela. Zwá ntango ya kosolola makambo yango na nsuka ya mokolo nyonso ya liyangani. Yango ekosalisa yo obosana makambo yango te mpe osalela yango.

6 Kopekisa makanisi na biso ete etambolatambola te na boumeli ya bangonga mingi ezali likambo moke te. Nini ekoki kosalisa biso tosala makasi mpo makanisi na biso etambolatambola te? Kebá na makambo oyo miso ezali komona. Mbala mingi, makambo oyo totalaka ebendaka likebi na biso. (Mat. 6:22) Yango wana, salá makasi mpo na kobalolabalola motó te ntango nyonso oyo oyoki mwa makɛlɛlɛ to mwa yikiyiki. Tyá miso na yo epai ya molobi. Soki molobi abandi kotánga vɛrsɛ moko, yo mpe landá na Biblia na yo, mpe tiká Biblia na yo ya kofungwama ntango azali kolimbola vɛrsɛ yango.

7 Bolingo ya boklisto ekotinda biso tolongola likebi ya bato mosusu te ntango mateya ezali kopesama. (1 Kol. 13:5) Ntango wana ezalaka “ntango ya kozala nyɛ” mpe koyoka. (Mos. 3:7) Yango wana, osengeli te kosolola mpe kotambola mpambampamba. Soki osilisi bamposa na yo nyonso liboso, yango ekosala ete okendeke mpe mingimingi te na twalɛti. Osengeli te kolya to komela mai tii na ngonga oyo ebongisami mpo na bopemi; longola bobele soki ozali maladi. Baoyo bazali na batelefone ya mabɔkɔ, bamasini nyonso oyo etyaka makɛlɛlɛ, kamera mpe masini ya kokanga fɔtɔ basengeli te kosalela yango na ndenge oyo ekolongola likebi ya bato mosusu na makambo oyo ezali kolobama. Baboti basengeli kobongisa ete libota na bango mobimba​—ata mpe bana na bango oyo bakoli​—bafanda esika moko na bango, yango ekopesa bango nzela ete bakɛngela bango malamu.​—Mas. 29:15.

8 Na mbula eleki, nkulutu moko oyo asi ayanganá na mayangani mingi alobaki boye: “Namonaki ete liyangani ya mbala oyo ekesanaki mpenza na mayangani ya liboso mpo na ntina mosusu. Moto nyonso na kati ya liyangani azalaki kozwa banɔti, ata mpe bana mike. Ezalaki mpenza esengo na komona likambo yango. Bato bazalaki kolanda malamu na Babiblia na bango ntango nyonso balobi bazalaki kosɛnga ete Babiblia efungwama.” Kotya likebi ndenge wana ezali mpenza malamu. Yango ezali komema bolamu kaka epai na biso moko te to epai ya bandeko mosusu oyo toyangani na bango te, kasi ezali kokumisa mpenza Yehova Nzambe, Moteyi na biso Monene.​—Yis. 30:20.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto