Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 5 nk. 24-29
  • Zala moyoki malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zala moyoki malamu
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • “Bókeba na ndenge bozali koyoka”
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Koyeba koyoka na boboto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Tyá likebi na ndenge ozali koyoka
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Zalá moyoki malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 5 nk. 24-29

Liteya 5

Zala moyoki malamu

1-5. Liloba koyoka elimboli nini, mpe mpo na nini ezali likambo ya ntina ete tozala bayoki malamu, mingimingi na makita ya lisangá?

1 Bokoli na yo lokola ministre ya Jéhovah etali mingimingi likoki na yo ya koyoka. Na boumeli ya bomoi na yo, koyoka ezali na ntina monene mpo na boyekoli. Tozali koyoka ntango totii matoi, kasi soki totye likebi te na makambo mazali kolobama, tokoyoka liloba moko te. Na ntembe te osila koloba na moto moko oyo, na esika ete ayoka makambo nyonso ozalaki koyebisa ye, ayokaki bobele ndambo. Mbala mosusu azalaki koningisa motó kasi oyebi na malamu nyonso ete azalaki kolanda yo te mpe na motindo yango akokaki kozwa litomba te na makambo oyo olobelaki ye. Na yango, omoni ete kozala ntango nyonso moyoki malamu ezali na ntina mpenza, mingimingi na ntango tokei koyangana na likita ya bonzambe. Tozali kotanga kati na Masese 1:5: “Moto na mayele akoyoka mpe akokolisa mayele na ye.”

2 Makita ya lisangá ezali ndambo na ebongiseli oyo Jéhovah akamati na nsima na lisangá na ye mpo na koteya biso. Soki tozali koyoka na likebi, tozali komonisa limemya epai na Jéhovah mpe na nyonso oyo azali kosala mpo na koteya biso. Nzokande, Nzambe ayebi na nini biso tozalisami mpe ayebi ete na bantango mosusu tolembisaka likebi na biso. Yango wana, ntango abengi biso mpo na kolya ebele na bilei na elimo oyo abongisi mpo na biso, alobi na ntina nyonso ete: “Boyokamela ngai koyoka mpenza mpe bolya yango ezali malamu . . . Bosembola litoi epai na ngai mpe boya epai na ngai, boyoka ete molimo na bino ebika.” (Yis. 55:2, 3) Soki tolingi kozwa bomoi ya seko mpe kosalisa bazalani na biso ete bango mpe bazwa eloko oyo ya motuya, esengeli toyokamela mpenza koyoka mpe tosimba makanisi na Nzambe.—Baeb. 1:1, 2; 2:1.

3 Moto oyo azali koyoka azali komonisa na wana ete azali na komikitisa, mpe biso banso tozali na mposa na ezaleli oyo. Kati na biso, moko te ayebi makambo nyonso; tokoki ntango nyonso koyekola makambo ya sika epai ya bazalani na biso. Ata molobi ayebi koloba malamu te mpe azali na makoki nyonso te lokola esengeli na balobi, tokomonisa ete tozali solo bato ya komikitisa na ndenge tokopusama na kosalisa ye mpe koyikisa ye mpiko na kotyaka likebi na makambo oyo azali koloba. Ata na motó na likambo oyo tomeseni na yango, mbala mosusu ye akokotela yango na ndenge moko ya sika mpo na biso to akobimisa likambo moko oyo biso toyoka naino te. Uta na minoko na bana mike, na elobeli ya elimo, Jéhovah akoki kongengisa biso.​—Mat. 11:25.

4 Esengeli na biso kotya matoi mpenza na makita ya lisangá, mpamba te makambo oyo tozali koyekola kuna, tosengeli kosalela yango kati na bomoi na biso. Na “boyebi ya solo” nde tokoki kolata bomoto ya sika. (Bakolose 3:9, 10) Kasi soki tozali koyoka na likebi te, soki tozali koyokamela te mpo na kolanda ndimbola nyonso, tokoyeba te mabongwani nini esengeli na biso kosala kati na bomoi na biso, mpe kokola na biso na elimo ekoki kozala noki te. Ezali mpe likambo ya ntina ete toyeba kopesa biyano malamu na bozongeli na eteyelo. Lisusu, kati na mosala ya kosakola, ezali likambo na ntina koleka ete toyeba koyanola na moto na moto oyo atuni biso ntina na elikya kitoko oyo ezali kati na biso.

5 Wana ekozwa yo momeseno ya kotya likebi na makambo mazali kolobama, okobongisa likoki na yo ya kosimba makambo ozali koyoka.

6-8. Ndenge nini tokoki kopekisa elimo na biso ete etambola pambapamba te na ntango diskur ezali koleka?

6 Ndenge nini okoki koyoka. Soki tokebi te, makanisi na biso makoki kotambola pambapamba na ntango ya makita. Makambo tosalaki na moi to makambo tokosala lobi ekoki koyela biso na makanisi. Nzokande, soki tozali kotya matoi te na makambo mazali kolobama na makita, ntina nini toyei awa? Moto na moto asengeli komipesa disipline mpo ete makanisi na ye matambolatambola te. Tosengeli kozwa ekateli makasi ya kotya likebi mpenza na makambo mazali kolobama mpe topekisa elimo na biso ete epengwa na makambo mosusu te. Ezali lokola ete tokitisi rido mpo ete makambo nyonso oyo matali lisolo oyo tozali koyoka te matikala libanda. Yango nde babengaka na Lifalanse ete concentration to kotya makanisi na yo nyonso esika moko.

7 Mwango moko malamu mpo ete elimo na yo etambola pambapamba te ezali boye ete okamata note na makanisi mpe na mikapo ya Biblia oyo molobi azali kopesa. Kasi kolekisa te mpo na kozwa banote, mpamba te ata ezali solo ete mwa banote ekoki kosalisa yo na kotya makanisi na yo esika moko, nzokande soki eleki mingi ekopengwisa lisusu likebi na yo. Banote ekoki kosunga yo na nsima; ata okosalela yango te, nzokande ntina na yango ekozala ete esalisaki yo na kotya likebi na yo na maloba ya ndeko oyo azalaki kosala diskur. Okosila komonisa mposa na yo mozindo mpo na diskur yango mpe okosila kososola makanisi maleki ntina.

8 Na lisolo, tokoyebaka ete moto azali kolanda biso ntango azali kotuna mituna ya ntina na likambo oyo tozali kosolana biso na ye. Bobele bongo, ntango ozali koyoka diskur, okomindimisa ete ozali kolanda yango na likebi soki omoni ete elimo na yo ezali komituna mituna ya ntina kati na makanisi mpe ozali kozela eyano epai na ndeko oyo azali kosala diskur. Kanisa mpe na lolenge oyo okoki kosalela makanisi ozali koyoka kati na diskur.

9. Lokola makanisi na biso matambolaka noki, ndenge nini tokoki kosalela yango na litomba nyonso ntango tozali koyoka diskur?

9 Makanisi na biso makendaka mbangu koleka maloba ya oratere, yango wana elimo ekoki kopengwa na makambo mosusu. Basalaki mituya, bamonaki ete ntango elimo ekanisi maloba soko 400 na minite moko, monoko ezali kobimisa bobele maloba soko 125 na minite moko. Nzokande mbangu ya makanisi na biso ekoki kozala na biso litomba mpo na kokanisa likoló na makambo malobami, kosalaka rézimé na yango mpe kolekisaka yango lisusu kati na elimo na biso mpo ete ekomama na mozindo kati na yango.

10, 11. Ndenge nini tokoki koyoka na elimo malamu?

10 Mwango mosusu ekopesa biso nzela na kotya likebi likoló na makambo ya ntina oyo molobi azali kolakisa, ezali boye ete toyoka na elimo moko malamu. Toluka mabunga te kati na makambo oyo molobi azali kobimisa to mpe na lolenge na ye ya kolobela yango. Mokumba ya kopesa toli ezali na mokengeli na eteyelo ya mosala ya Nzambe. Na motindo yango, bayoki nyonso bakotya likebi na bango bobele na makambo ya litomba oyo molobi azali kobimisela bango.

11 Bobele bongo, ntango mokengeli na eteyelo azali kopesa toli na moyekoli moko, ebongi te na moyekoli mosusu ete akoka koimaima mpo na yango. Ebongi nde amituna ndenge nini toli yango etali ye mpe ndenge nini ye akoki kosalela yango. Na motindo yango, moyoki malamu akozwa litomba na masolo nyonso oyo bayekoli bazali kosala, nde bobele na oyo ya ye moko te.

12. Ndenge nini bana bakoki koyekola na kozala bayoki malamu?

12 Bana mpe bilenge basengeli koyekola kozala bayoki malamu. Bakosalisama na likambo yango soki bafandi penepene ya baboti na bango mpo ete baboti batalaka bango. Baoyo bayebi kotanga bakoyikisama mpiko soki bazali na mokanda na bango moko oyo tozali koyekola. Ebongi kopekisa bango ete basala eloko mosusu te na ntango ya makita. Mpo na kopusa bango na koyoka, baboti bakoki koyebisa bango ete nsima na kozonga na ndako, bakotuna bango makambo bayekoli na makita, moto na moto akoloba ata likambo moko oyo asimbi. Soki bakamataki banote to bakundoli likanisi moko elobamaki na likita, baboti basengeli kopesa bango felisitatio mpo na yango. —Deter. 31:12.

13, 14. Mabe nini ezali ya kolya mingi liboso ya likita?

13 Soki tolingi kolanda malamu likita, ebongi topengola ezaleli ya kolya mingi liboso na likita. Na ntango totondisi estomake na biso na bilei, ekopesa biso mpongi, mpamba te makasi mingi ya nzoto ekei na mosala ya konika biloko na libumu, mpe elimo na biso ekolemba; tokokoma koyoka bobele na goigoi, kozanga mposa, mbala mosusu mpe tokoki ata kolala.

14 Eloko mosusu eleki ntina ezali boye ete obongisa makambo na yo na motindo boye ete oyanganaka poso na poso na makita mpo na koteyama. Na biteyelo ya mokili, bayekoli mingi bazali kokima kelasi mpe na nsima bazali komeka koyekola bango moko. Kasi okoki kozwa litomba na mateya oyo oyokaki yango te? Na yango, otika nzela te na libota na yo to na baninga na yo ete bapekisa yo koyangana na makita. Luka kozala wana na makita poso nyonso mpo na koyoka solo ezwami na Liloba na Nzambe oyo ekoki kopesa yo bomoi.

15, 16. Limbola ndenge nini tokoki komeka mpe kobongisa likoki na biso ya koyoka na makita.

15 Meka likoki na yo ya koyoka. Tolekisaka ngonga mitano poso nyonso na makita ya lisangá, mpe ndambo monene na ntango yango ezalaka mpo na koyoka. Ozwaka litomba mpenza na ngonga yango? Makanisi boni ya kitoko osimbaka poso na poso? Nsima na koyangana na Eteyelo ya mosala ya Nzambe mpe na likita ya mosala, okoki kozongela na maloba na yo moko likanisi ya ntina ya lisolo moko na moko? Okoki koyeba lisusu nani na nani balekaki liboso mpo na kosala badiskur? Ozali lisusu na mposa ya kotya molende mpo na kobakisa likebi na yo ete ozwa litomba mingi na badiskur nyonso ezali kosalema, mbala mosusu na kokamataka banote? Meka naino. Na nsima, wana makita esili, lobana elongo na bayangani mosusu mpo na makanisi ya ntina oyo bouti koyoka.

16 Na makita na biso mingi oyo tokosalaka poso na poso, mituna mitunamaka mpe basengaka na bayoki ete bakoka koyanola. Ntango moto apesi eyano, ezalaka mbala mingi mbuma na ngonga mingi ya boyekoli ya ye moko mpe ezali komonisa ete azali na eksperianse mingi oyo azwi yango na boumeli ya bambula ebele. Otyaka matoi na biyano oyo bandeko mosusu bazali kopesa? Na ntango basilisi koloba, okoki kozongela na maloba na yo moko biyano oyo bango bapesi? Meka naino kosala bongo, mpe okosepela na komona ete ozali koyoka malamu koleka liboso.

17. Nini ekoki kosalisa biso ete tolanda malamu baparagrafe ntango ezali kotangama?

17 Na makita ya lisangá, botangi esalemaka mpe mingi. Na ndakisa bakotangaka baparagrafe na boyekoli ya Mosenzeli mpe na boyekoli ya mokanda. Olandaka botangi yango na likebi to otikaka nde makanisi na yo kotambola pambapamba? Makanisi mingi ya kitoko ezalaka kati na baparagrafe, oyo mbala mosusu biyano ekokaka kobimisa yango te. Mpe ata makanisi mosusu mabimisami kati na biyano oyo bandeko bapesi, nzokande koyoka lisusu na nzela na botangi makambo ya ntina oyo bandeko babimisi ekosalisa elimo ete ekanga yango makasi kati na bɔɔngo. Tokoki koyekola makambo mingi mpe mingi soki tokotya likebi mpenza na nyonso ezali kotangama na makita. Okokoka kozwa litomba soki ozali kolanda botangi na miso na yo mpe na matoi na yo.

18-20. Bayoki malamu bazali kozwa mbano nini?

18 Bayoki malamu bazali kozwa mbano. Bayoki malamu bayebi ete makambo mazali mingi oyo basengeli koyekola mpe bazali na mposa na kokotisa boyebi mingi kati na boongó na bango. Bazali koyoka maloba oyo ya Masese 2:3, 4: “Ee, soko okolela mpo na bososoli mpe soko okonganga mpo na boyebi; soko okoluka ye lokola palata . . .” Jéhovah azali kopambola boluki na bango, mpamba te apesi elaka oyo: “Mbele okososola botosi na kotosa Jéhovah mpe okozwana na boyebi na koyeba Nzambe. . . . Boye okoyeba boyengebene mpe kosambisa-sembo mpe kokata na solo, ee nzela nyonso malamu.”​—Masese 2:5, 9.

19 Ya solo, mpo na kozala moyoki malamu ebongi komipesa disipline yo moko. Kasi mbano ezali monene liboso! Kokola na biso na elimo ezali komonana polele. Tozali kosala mabongwani masengeli kati na bomoi na biso. Tozali kobakisa makoki na biso ya koyebisa nsango malamu epai ya bazalani na biso, ezala kati na lisangá to na libanda, na mosala ya kosakola.

20 Tokoki koloba ete ntango oyo tobongisi mpo na boyekoli na biso moko ezali moke, nzokande biso banso tozali na libaku ya koyoka mingi na makita ya lisangá. Na yango, ezali solo likambo ya ntina ete tozala bayoki malamu. Mpe lokola makambo oyo tozali koyoka etali mosala oyo tozali kosalela Jéhovah mpe elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko, boye toli oyo ya Yesu ezali na ntina mingi ete: “Bokeba soko bozali koyoka boni.”​—Luka 8:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto