Ndenge ya kobongisa masukulu ya bato nyonso
PƆSƆ na pɔsɔ, masangá mingi ya Batatoli ya Yehova ebongisaka lisukulu ya bato nyonso oyo elobelaka lisolo moko ya Biblia. Soki ozali nkulutu to mosaleli na misala, omonisaka mpenza ete oyebi koloba mpe koteya liboso ya bato mingi? Soki ezali bongo, bakoki kosɛnga yo osala lisukulu moko ya bato nyonso. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esalisi bandeko mibali ebele bákokisa masɛngami mpo na kosalaka masukulu ya bato nyonso na lisangá. Soki basɛngi yo osala lisukulu ya bato nyonso, okobanda wapi?
Yekolá plan na yango
Liboso obanda kolukaluka na mikanda, tángá naino plan ya lisukulu mpe kanisá malamumalamu makambo oyo ozali kotánga tii ntango okokanga mpenza ntina na yango. Kɔtisá mpenza motó ya likambo ya lisukulu yango na bɔɔngɔ na yo. Likambo nini okoteya bato oyo bakoyoka yo? Mokano na yo ezali nini?
Luká mpenza komesana na makanisi ya ntina. Talelá yango malamumalamu. Ndenge nini likanisi yango mokomoko eyokani mpenza na motó ya likambo monene? Na nse ya likanisi mokomoko ya ntina, ezalaka na mwa makanisi mosusu etandani. Makambo oyo esimbi makanisi wana ekomami na nse na yango. Talelá ndenge eteni mokomoko ya plan eyokani na eteni oyo ezali liboso na yango, ndenge ezali komema na eteni oyo elandi mpe ndenge ezali kosalisa yo okokisa ntina ya lisukulu yango. Soki okangi ntina ya motó ya likambo mpe ya lisukulu na yo mpe ndenge makanisi ya ntina ezali kokokisa ntina yango, okoki sikoyo kobanda kobongisa makambo oyo okoloba.
Na ebandeli ekozala malamu soki otaleli lisukulu na yo lokola masolo minei to mitano ya mikuse, oyo mokomoko na yango etongami likoló na likanisi moko ya ntina. Bongisá yango mokomoko.
Plan oyo bapesi yo ekosalisa yo obongisa lisukulu na yo. Yango esalemi te mpo osalela yango lokola banɔti na yo ntango okosala lisukulu. Plan ezali lokola mikuwa ya lisukulu na yo. Osengeli sikoyo kosala lokola nde obakisi misuni likoló na yango, opesi yango motema mpe ofuli bomoi kati na yango.
Ndenge ya kosalela bavɛrsɛ
Yesu Klisto mpe bayekoli na ye basalaki ete mateya na bango euta na Makomami. (Luka 4:16-21; 24:27; Mis. 17:2, 3) Yo mpe okoki kosala bongo. Bavɛrsɛ esengeli kosimba lisukulu na yo. Na esika ya kolimbola kaka mpe komonisa lolenge ya kosalela maloba oyo ezali na plan oyo bapesi yo, luká nde koyeba ndenge nini bavɛrsɛ esimbi mpenza maloba yango mpe na nsima, salelá bavɛrsɛ yango mpo na koteya.
Ntango ozali kobongisa lisukulu na yo, talelá malamumalamu vɛrsɛ mokomoko oyo maloba na yango ezali na plan te. Talelá mpe bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya vɛrsɛ yango. Bavɛrsɛ mosusu emonisaka kaka makambo oyo esalaki ete likambo boye to boye esalema. Yango wana, ezali na ntina te ete otánga mpe olimbola bavɛrsɛ yango nyonso ntango okosala lisukulu na yo. Poná kaka bavɛrsɛ oyo ezali mpenza na ntina mingi mpo na bato oyo bazali koyoka yo. Soki otaleli malamumalamu bavɛrsɛ oyo ezali na plan, na ntembe te, ekozala na ntina te ete ozwa bavɛrsɛ mosusu na mikanda mosusu.
Mpo lisukulu na yo eleka malamu, yango etali te soki okotánga bavɛrsɛ boni, kasi etali nde lolenge oyo okoteya. Liboso osɛnga bato bátánga vɛrsɛ moko, monisá bango mpo na nini ozali kotánga yango. Zwá ntango ya komonisa bango ndenge oyo bakoki kosalela vɛrsɛ yango. Nsima ya kotánga vɛrsɛ moko, kokanga Biblia na yo te ntango ozali kolimbola vɛrsɛ yango. Bato oyo bazali koyoka yo mpe bakolanda yo, bakokanga Babiblia na bango te. Ndenge nini okoki kolamusa mposa ya bato oyo bazali koyoka yo mpe kosalisa bango bázwa mpenza matomba na Liloba ya Nzambe? (Neh. 8:8, 12) Okoki kosala bongo soki ozali kolimbola bavɛrsɛ, kopesa bandakisa mpe komonisa ndenge ya kosalela yango.
Kolimbola. Ntango ozali kobongisa vɛrsɛ moko mpo na kolimbola yango, omituna boye: ‘Elimboli nini? Mpo na nini nazali kosalela yango na lisukulu na ngai? Bato oyo bakoyoka ngai bakoki komituna mituna nini mpo na vɛrsɛ oyo?’ Mbala mosusu okolinga kotalela bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya vɛrsɛ yango to makambo oyo esalaki ete bálobela likambo yango to maloba yango moko oyo ezali komonisa ntina ya likambo to mpe likanisi oyo mokomi, oyo apemami, azalaki na yango. Nyonso wana esɛngi kolukaluka na mikanda. Okokuta makanisi ebele ya ntina na mikanda oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso. (Mat. 24:45-47) Koluka kolimbola makambo nyonso ya vɛrsɛ yango te, kasi limbolá mpo na nini osɛngaki bátánga yango, na kotalela makambo oyo ozali kolobela na lisolo na yo.
Kopesa bandakisa. Ntina ya bandakisa ezali mpo na kosalisa bato oyo bazali koyoka yo bákanga malamumalamu ntina ya likambo to ya etinda oyo ozali kolobela, to mpe kosalisa bango bábosana yango te. Bandakisa esalisaka bato oyo bazali koyoka bákanga ntina ya makambo oyo ozali koyebisa bango mpe báyokanisa yango na likambo moko oyo bayebi. Yesu asalaki bongo ntango asalaki lisolo na ye oyo eyebani mingi: Lisolo Likoló ya Ngomba. “Bandɛkɛ ya likoló,” “fololo ya esobe,” ‘ekuke moko ya nkaka,’ ‘ndako moko oyo etongami likoló ya mabanga,’ mpe bandakisa mingi mosusu ya ndenge wana esalaki ete mateya na ye ebenda likebi ya bato, ezala polele mpe bato bábosana yango te.—Mat. 5 tii 7.
Komonisa ndenge ya kosalela makambo oyo ezali na vɛrsɛ. Kolimbola vɛrsɛ moko mpe kopesa bandakisa ekosalisa bato oyo bazali koyoka báyeba likambo yango, kasi bakozwa matomba kaka soki basaleli makambo yango oyo bayebi. Ezali solo ete bato oyo bazali koyoka bango moko bazali na mokumba ya kosalela nsango ya Biblia, kasi yo mpe okoki kosalisa bango báyeba makambo oyo basengeli kosala. Soki omoni mpenza ete bato oyo bazali koyoka yo bakangi ntina ya vɛrsɛ oyo ozali kolobela mpe bamoni ete likambo oyo ozali koloba na lisukulu na yo eyokani na yango, zwá sikoyo ntango ya kolakisa bango ndenge nini vɛrsɛ yango esengeli kobongola makambo oyo bango bandimaka mpe etamboli na bango. Monisá mpenza matomba oyo bakozwa soki babwaki makanisi mabe to etamboli oyo eyokani te na solo oyo ozali kolobela.
Ntango ozali kotalela ndenge okomonisa na bato oyo bazali koyoka yo lolenge bakosalela bavɛrsɛ yango, kobosana te ete bauti na bisika ndenge na ndenge mpe bakutanaka na makambo ndenge na ndenge. Basusu bazali bato ya sika oyo babandi kosepela na solo, basusu bazali bilenge, basusu mibange mpe basusu bazali kobunda na mikakatano ndenge na ndenge na bomoi na bango. Salá makasi ete lisukulu na yo elobela mpenza makambo oyo bazali kokutana na yango na bomoi na bango. Salá makasi ete toli na yo emonana te lokola ozali kolobela kaka mwa ndambo ya bato.
Makambo oyo molobi asengeli kopona
Basili koponela yo makambo mosusu oyo etali lisukulu na yo. Bamonisi yo polele makanisi ya ntina mpe ntango oyo osengeli kolekisa mpo na eteni mokomoko ya lisukulu na yo. Makambo mosusu, yo moko nde okopona. Okoki kopona kolekisa miniti mingi mpo na kolobela likanisi moko, koleka makanisi mosusu. Kokanisa te ete osengeli kolekisa miniti ndenge moko mpo na makanisi nyonso ya mikemike na lisukulu na yo. Yango ekoki kotinda yo oloba mbangumbangu mpe ekolɛmbisa bato oyo bazali koyoka yo. Ndenge nini koyeba makanisi oyo osengeli kolekisa miniti mingi mpo na kolobela yango mpe makanisi oyo osengeli kolobela yango na mokuse to likolólikoló? Omituna: ‘Makanisi nini ekosalisa ngai nabimisa mpenza likanisi ya ntina ya lisukulu oyo? Makanisi nini ekoki mpenza kozala na litomba monene mpo na bato oyo bazali koyoka ngai? Soki natiki vɛrsɛ moko oyo ezali na plan mpe likanisi oyo eyokani na yango, ekobulunganisa makanisi oyo nakomonisa bato oyo bazali koyoka?’
Salá mpenza makasi ete okɔtisa te makanisi mpamba ya bato to makanisi na yo moko. Ata Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, aboyaki koloba makambo ‘na ndenge na ye moko.’ (Yoa. 14:10) Yebá ete ntina oyo bato bayaka na makita ya Batatoli ya Yehova ezali mpo na koyoka ndenge bazali kolimbola Biblia. Na ntembe te, soki bato bazali komona yo lokola moto oyo ayebi mpenza koloba, ezali mpo ete obendaka likebi na bango epai na yo moko te, kasi na Liloba ya Nzambe. Yango wana, basepelaka na masukulu na yo.—Filp. 1:10, 11.
Liboso ozalaki na plan oyo ezalaki kaka na makanisi ya ntina mpe okómisi yango lisolo oyo ezali kolimbola bavɛrsɛ. Sikoyo, osengeli komeka lisukulu na yo. Ezali malamu komeka kosala yango na mongongo makasi. Likambo ya ntina ezali ete okanga mpenza makanisi nyonso oyo okoloba. Osengeli kosala lisukulu na yo kozanga kobanga. Salá yango na lolenge oyo ekosepelisa bato oyo bazali koyoka yo mpe monisá solo na esengo mpenza. Liboso ya kosala lisukulu na yo, omituna boye: ‘Mokano na ngai ezali nini mpo na lisukulu oyo? Makanisi ya ntina ebimi polele? Bavɛrsɛ oyo naponi ekolimbola malamu lisukulu na ngai? Likanisi mokomoko ya ntina ezali komema na likanisi oyo elandi, na ndenge ya polele? Lisukulu yango ezali mpenza kotinda bato oyo bazali koyoka básepela na Yehova mpe bibongiseli na ye? Maloba ya nsuka eyokani mpenza na motó ya likambo, ezali mpenza komonisa bato oyo bazali koyoka likambo oyo basengeli kosala mpe ezali kotinda bango básalela yango?’ Soki okoki koloba ɛɛ na mituna oyo nyonso, boye ‘okosala malamu na boyebi’ mpo na bolamu ya lisangá mpe mpo na lokumu ya Yehova!—Mas. 15:2.