Mateya mpo na kokolisa makoki ya koloba mpe ya koteya
EZALA ozali elenge to mobange, mobali to mwasi, mateya oyo ekoki kosalisa yo obongisa malamu lisusu lolenge na yo ya koloba mpe okóma moteyi malamu mpenza ya Liloba ya Nzambe.
Mokɛngɛli na eteyelo nde akokabola masolo na bandeko oyo bakomisaki nkombo na bango na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Na nkasa misato oyo elandi, okokuta lokasa na yo ya toli. Mitango oyo ezali liboso ya toli mokomoko, ekokani na nimero ya mateya oyo ezali na nkasa oyo elandi. Mateya yango ekolimbola ndenge oyo okoki kosalela malamu mpenza toli mokomoko oyo etali koloba mpe koteya, mpe ekolimbola ntina ya toli yango mokomoko. Okokuta mpe toli oyo ekosalisa yo oyeba ndenge oyo okokokisa oyo basɛngi yo.
Balangi oyo ezali na lokasa na yo ya toli, ezali komonisa toli nini etali masolo oyo esɛngi (1) kotánga mpo na bayoki, (2) elakiseli oyo bato mibale to koleka bazali kosala, to (3) lisukulu oyo ezali kosalema na lisangá. Mokɛngɛli na eteyelo akopona toli oyo okosalela. Ezali malamu ete osala makasi mpo na kosalela naino toli moko. Soki osali badevuare oyo ezali na nsuka ya liteya oyo bapesi yo, yango ekosalisa yo mingi mpenza. Soki omonisi ete osaleli mpenza toli oyo ezali na liteya yango, mokɛngɛli akosɛnga yo osalela toli mosusu.
Soki lisolo na yo ekosalema lokola elakiseli, osengeli kopona kadre oyo okosala yango. Na lokasa 82, okokuta ndenge oyo okoki kosala lisolo na yo, kasi kosuka kaka na yango te. Mokɛngɛli akoki kosɛnga yo omeka kosalela lolenge moko mpo omesana na yango, to akoki kotika yo moko opona lolenge oyo okosala lisolo na yo.
Soki ozali kotánga mokanda oyo mpe ozali kosala badevuare oyo ezali na kati, ata ntango ozali na lisolo ya kosala na eteyelo te, yango ekoki kosalisa yo okola mpenza. Mbala mosusu, okoki kotánga liteya moko pɔsɔ na pɔsɔ to nsima ya mwa mikolo.
Ezala oumeli to te na eteyelo to na mosala ya kosakola, okoki mpenza kolanda kokola. Tiká ete ozwa mpenza matomba na mateya oyo ezali kopesama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.