Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 33 lok. 197-lok. 201 par. 1
  • Lobá na mayele, kasi lobá kaka makambo ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lobá na mayele, kasi lobá kaka makambo ya solo
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki koloba na takte mpe kozanga kobalola solo
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Tóyekola koloba mpe kosala na mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ndenge ya koyeba kosolola na bato
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Nsango oyo tosengeli kosakola
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 33 lok. 197-lok. 201 par. 1

LITEYA 33

Lobá na mayele, kasi lobá kaka makambo ya solo

Osengeli kosala nini?

Osengeli kokeba na makambo oyo ozali koloba, na ndenge oyo ozali koloba yango mpe na ntango oyo osengeli koloba yango mpo osilikisa bato mpambampamba te.

Yango ezali na ntina nini?

Soki ozali koloba na mayele, yango ekoki kosala ete bato bázala na makanisi malamu ntango bazali koyoka nsango malamu. Koloba na mayele ekosalisa yo mpe obatela boyokani malamu elongo na bandeko na yo baklisto.

KOLOBA na mayele elimboli koyeba kozala na bato kozanga kosilikisa bango mpambampamba. Yango esɛngi ete oyeba ndenge nini mpe ntango nini osengeli koloba likambo boye to boye. Yango elimboli te ete osengeli kobongola solo to kobalola yango. Koloba na mayele ezali kobanga bato te.​—Mas. 29:25.

Mpo na koloba na mayele, esengeli libosoliboso kozala na mbuma ya elimo. Yango wana, moto oyo azali kosala makambo na bolingo mpenza akolinga te kosilikisa basusu; akoluka nde kosalisa bango. Moto oyo azali na boboto mpe na bopɔlɔ asalaka makambo na bonkonde mpenza. Moto ya kimya alukaka ndenge oyo akoki kozala na boyokani malamu na basusu. Moto oyo azali na motema pɛtɛɛ azalaka ntango nyonso na kimya ata ntango akutani na bato ya nkandankanda.​—Gal. 5:22, 23.

Nzokande, ata tosakoli nsango ya Biblia ndenge nini, bato mosusu bakosepela na yango te. Lokola ebele ya Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki mitema mabe, Yesu Klisto akómaki mpo na bango “libanga ya kobɛtisa libaku mpe libanga oyo ekweisaka.” (1 Pet. 2:7, 8) Yesu alobaki boye mpo na mosala na ye ya kosakola Bokonzi: “Nayaki kopelisa mɔtɔ na mabelé.” (Luka 12:49) Tii lelo oyo, nsango ya Bokonzi ya Yehova, oyo emonisi mpe ete bato basengeli kondima boyangeli ya Mozalisi na bango, ezali likambo oyo etali bato nyonso mpe basengeli kopona na lombangu. Bato mingi basepelaka te na nsango oyo emonisi ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekolongola mokili oyo ya mabe. Kasi mpo na kotosa Nzambe, tozali se kosakola. Nzokande ntango tozali kosala bongo, tosengeli ntango nyonso kokanisa toli ya Biblia oyo elobi ete: “Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.”​—Lom. 12:18.

Koloba na mayele ntango tozali kosakola. Ezali na mabaku mingi oyo toyebisaka bato bindimeli na biso. Ya solo, tosalaka yango na mosala ya kosakola, kasi tolukaka mpe mabaku mosusu ntango tozali na bato ya libota na biso, na baninga ya mosala mpe ya kelasi. Na bantango wana nyonso, tosengeli koloba na mayele.

Soki bato bazali komona lokola tozali kopamela bango ntango tozali koyebisa bango nsango ya Bokonzi, bakoki koboya yango. Soki basɛngaki biso lisalisi te mpe mbala mosusu bazali komona ete bazali na mposa na yango te, bakoki kosilika ntango tozali koluka komonisa bango ete basengeli kobongola bizaleli na bango. Tokosala nini mpo na kopesa bango makanisi mabe te? Soki toyekoli kosolola na bango na boboto, yango ekoki kosalisa biso.

Salá makasi obanda lisolo na likambo moko oyo ezali mpe kosepelisa moto yango. Soki azali ndeko na yo, moninga na yo ya mosala to ya kelasi, boye oyebi makambo oyo esepelisaka ye. Ata soki ezali mbala ya liboso okutana na ye, okoki kolobela likambo moko oyo omonaki na televizyo to oyokaki na radio, to mpe likambo moko oyo otángaki na zulunalo. Mbala mingi, masolo ya ndenge wana nde emonisaka mpenza makanisi ya bato mingi. Ntango ozali kosakola ndako na ndako, taláká makambo oyo ozali komona wana. Biloko oyo batii mpo na kobongisa ndako, biloko ya kosakana na yango oyo ezali na kati ya lopango, bililingi ya losambo mpe bililingi to maloba oyo bakomi na talatala ya motuka oyo ezali na lopango, nyonso wana ekoki kosalisa yo oyeba malamu makambo nini esepelisaka moto oyo ozali kosolola na ye. Ntango moto yango abimi libándá, yoká ye ntango azali koloba. Makambo oyo akoloba nde ekondimisa yo to ekosalisa yo oyeba malamu lisusu makambo nini esepelisaka ye, makanisi na ye mpe makambo oyo osengeli kotalela mpo na kopesa ye litatoli.

Na lisolo na bino, pesá ye makanisi ya Biblia mpe ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo etali likambo oyo bozali kolobela. Kasi koluka kaka te ete yo moko olobaka. (Mos. 3:7) Tiká mpe moto oyo azali koyoka yo aloba soki alingi. Luká mpe koyoka makanisi na ye. Yango ekoki kopesa yo makanisi oyo osengeli kosalela mpo na koloba na mayele.

Liboso oloba likambo, kanisá naino ndenge moto oyo azali kosolola na yo akotalela yango. Masese 12:8 (NW) ekumisi “monɔkɔ ya mayele.” Liloba ya Liebele oyo basaleli awa, esalelamaka mpo na kolobela bososoli mpe angɛlɛ. Yango wana, kozala na mayele elimboli kozala na ekɛngɛ liboso ya kobimisa maloba na yo, mpamba te ozali kotalela likambo malamu mpenza mpo osala oyo ebongi. Vɛrsɛ 18 ya mokapo wana ya Masese ekebisi biso mpo na ‘koloba kozanga kokanisa lokola [kokata] na mbɛli.’ Tokoki komonisa ete tozali kokɔtela solo ya Biblia, kozanga ete tósilikisa bato.

Soki oyebi kopona maloba oyo okoloba malamu, yango ekoki kosalisa yo obimisaka ntembe mpambampamba te. Soki liloba “Biblia” ezali kopekisa moto koyoka yo, okoki kosalela maloba mosusu, lokola “makomi mosantu” to “mokanda moko oyo ebimisami sikoyo na minɔkɔ koleka 2 000.” Soki ozali kolobela Biblia, okoki kotuna moto yango soki akanisaka nini mpo na yango mpe na nsima, talelá makanisi na ye na boumeli ya lisolo na bino mobimba.

Koloba na mayele esɛngaka mpe mbala mingi koyeba ntango malamu oyo osengeli koloba likambo. (Mas. 25:11) Mbala mosusu okondima te makambo nyonso oyo moto yango akoloba, kasi ezali na ntina te ete otyana na ye ntembe mpo na makanisi na ye nyonso oyo eyokani na makomami te. Koluka koyebisa ye makambo nyonso mbala moko te. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Nazali naino na makambo mingi ya koloba na bino, kasi bokoki komema yango sikoyo te.”​—Yoa. 16:12.

Soki likoki ezali, pesáká bato oyo ozali kosolola na bango longonya mpenza. Ata soki moto yango azali kotya ntembe mingi, okoki kopesa ye longonya mpo na likanisi moko oyo amonisi. Ntoma Paulo mpe asalaki bongo ntango azalaki koloba na bato ya filozofi na Ngomba ya Aleopaji na Atene. Bato ya filozofi yango bazalaki “kosolola na ye na kotyanáká ntembe.” Ndenge nini akokaki kopesa makanisi na ye kozanga ete asilikisa bango? Liboso akutana na bango, atalaki ebele ya bitumbelo oyo bato yango basalaki mpo na banzambe na bango. Na esika ete akweisa bato ya Atene mpo na losambo na bango ya bikeko, na mayele mpenza, apesaki bango longonya mpo bazalaki na mposa makasi ya kosambela. Alobaki boye: “Namoni ete na makambo nyonso bomonani ete bomipesá na banzambe koleka bato mosusu nyonso.” Maloba oyo nde epesaki ye nzela ayebisa bango nsango ya Nzambe ya solo. Yango esalaki ete bato mosusu na kati na bango bákóma bandimi.​—Mis. 17:18, 22, 34.

Kosilika te ntango moto amonisi ete aboyi makanisi na yo. Zalá kimya. Moná yango lokola libaku oyo ozwi mpo na koyeba makanisi ya moto yango malamu koleka. Okoki kopesa ye matɔndi mpo na ndenge apesi makanisi na ye. Bongo soki moto yango akati na mokuse ete: “Nazali na lingomba na ngai”? Okoki kotuna ye na mayele mpenza ete: “Obandá kosambela banda bolenge na yo?” Na nsima, ntango ayanoli, okoki koloba lisusu boye: “Okanisi ete mokolo mosusu bato nyonso bakozala kaka na lingomba moko?” Yango ekoki kosala ete bókoba lisolo na bino.

Soki tozali mpe komitalela biso moko na ndenge oyo ebongi, yango ekoki kosalisa biso tólobaka na mayele. Tondimaka mpenza ete nzela ya Yehova ezali sembo mpe Liloba na ye ezali solo. Ntango tolobelaka yango, tomonisaka mpenza ete tozali na kondima makasi. Kasi ezali na ntina te ete tómimonisa lokola biso nde tozali sembo. (Mos. 7:15, 16) Tozali na botɔndi mingi mpamba te toyebi solo mpe tozali na mapamboli ya Yehova, nzokande, toyebi ete azali kondima biso mpo na bosembo na biso moko te, kasi nde mpo na boboto monene na ye mpe mpo tozali kondima Klisto. (Ef. 2:8, 9) Toyebi ete tosengeli ‘kokoba komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima, kokoba kotala soki tozali ndenge nini.’ (2 Kol. 13:5) Bongo ntango tozali koyebisa bato ete basengeli kotosa masɛngami ya Nzambe, biso moko mpe tosengeli kosalela toli wana ya Biblia na komikitisa mpenza. Tozali na mokumba ya kosambisa bazalani na biso te. Yehova “apesi kosambisa nyonso na mabɔkɔ ya Mwana” mpe ezali liboso ya kiti ya kosambisa na ye nde biso nyonso tokozongisa monɔkɔ mpo na makambo oyo tozali kosala.​—Yoa. 5:22; 2 Kol. 5:10.

Na libota mpe elongo na bandeko na biso baklisto. Tosengeli koloba na mayele kaka na mosala ya kosakola te. Lokola koloba na mayele ezali mpe lolenge moko ya komonisa mbuma ya elimo ya Nzambe, tosengeli mpe kolobaka na mayele na ndako, ntango tozali na bato ya libota na biso. Bolingo ekotinda biso tómibanzabanza mpe mpo na mayoki ya basusu. Mobali ya Mokonzi-Mwasi Esetele azalaki kosambela Yehova te, kasi Esetele azalaki komemya ye mpe asalelaki mayele mpenza ntango azalaki kolobela ye makambo ya basaleli ya Yehova. (Est., mik. 3-8) Na bantango mosusu, koloba na mayele ntango ozali na bato ya libota na yo oyo bazali Batatoli te esɛngaka kaka kotika etamboli na yo etinda bango bákumisa solo, na esika ete olimbolela bango bindimeli na biso.​—1 Pet. 3:1, 2.

Ndenge moko mpe, ezali te mpo toyebani malamu na bandeko ya lisangá nde tokoki kobimisela bango maloba ya makasi to kosalela bango makambo na makasi. Tosengeli te kokanisa ete lokola bango bakɔmeli, ekosala bango mpasi te. Tosengeli mpe te komilongisa na kolobáká ete: “Ngai nazalaka kaka bongo.” Soki tomoni ete elobeli na biso ezali kozokisa basusu, tosengeli kosala makasi tóbongwana. ‘Bolingo makasi’ oyo tozali na yango kati na biso esengeli kotinda biso “tósala . . . malamu . . . epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.”​—1 Pet. 4:8, 15; Gal. 6:10.

Ntango ozali koloba na bato ebele. Bato oyo basalaka masolo na estrade basengeli mpe koloba na mayele. Bato oyo bafandi wana mpo na koyoka bauti bisika ndenge na ndenge mpe moto na moto azali na makambo na ye. Bango nyonso bazali kokola ndenge moko te na elimo. Mpo na bato mosusu, ekoki kozala mbala na bango ya liboso ya koya na Ndako ya Bokonzi. Ekoki kozala na bato mosusu oyo bazali kokutana na mikakatano makasi oyo molobi ayebi te. Nini ekoki kosalisa molobi azokisa te bato oyo bazali koyoka ye?

Na kotalela toli ya ntoma Paulo epai ya Tito, omityela mokano ya ‘koloba mabe mpo na moto te, . . . kozala te moto ya makambo makasimakasi, komonisa boboto mpenza epai ya bato nyonso.’ (Tito 3:2) Kolanda mokili te na ndenge basalelaka maloba oyo ezali kokitisa bato ya mposo mosusu, ya minɔkɔ mosusu, to ya bikólo mosusu. (Emon. 7:9, 10) Na bosembo mpenza, lobelá masɛngami ya Yehova mpe monisá ete kosalela yango ezali likambo ya mayele; kasi kotyola te bato oyo bazali naino kolanda mpenza nzela ya Yehova te. Lendisá nde bato nyonso báluka koyeba mokano ya Nzambe mpe básala makambo oyo ezali kosepelisa ye. Ntango ozali kopesa toli, bongisá maloba na yo; na esengo mpe na bosembo mpenza, pesá bango longonya. Na elobeli na yo mpe na mongongo na yo, monisá bolingo mpo na bandeko, bolingo oyo biso nyonso tosengeli kozala na yango.​—1 Tes. 4:1-12; 1 Pet. 3:8.

NDENGE YA KOMONISA YANGO

  • Sololá na bato na esika ete opamela bango.

  • Kanisá malamumalamu ndenge moto oyo ozali kosolola na ye akokanisa mpo na makambo oyo olingi koloba.

  • Liboso oloba, talá soki ezali ntango malamu ya kolobela likambo yango.

  • Soki likoki ezali, pesá ye longonya na bosembo mpenza.

  • Kosilika te soki amonisi ete aboyi kondima makambo olobeli ye.

  • Komimona yo moko moto malamu te mpe kosambisa bato te.

DEVUARE: Tángá na likebi mpenza masolo ya Biblia oyo ezali na 2 Samwele 12:1-9 mpe Misala 4:18-20. Na lisolo mokomoko, talá (1) makambo oyo emonisi ete bato yango bazalaki koloba na mayele mpe (2) maloba oyo emonisi ete bato yango bakangamaki na nzela ya sembo ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto