Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 14 nk. 69-73
  • Ndenge nini okoki koloba na takte mpe kozanga kobalola solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki koloba na takte mpe kozanga kobalola solo
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • Lobá na mayele, kasi lobá kaka makambo ya solo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Tóyekola koloba mpe kosala na mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ndenge ya kosimba motema ya bato oyo tozali koteya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • “Kobá komipesa . . . na koteya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 14 nk. 69-73

Liteya 14

Ndenge nini okoki koloba na takte mpe kozanga kobalola solo

1. Mpo na nini tosengeli kolona takte?

1 Ntango Yesu atindaka bayekoli na ye ete bakenda kosakola, alakisaka bango polele ete basengeli kozala na bokengi na maloba na bango mpe na misala na bango. Atako alakaka ete akozala na bango elongo, basengelaki te komilukela mindondo mpambampamba. (Mat. 10:16) Ata kati ya bango na bango, baklisto basengeli koloba mpe kosala na mayele mpo ete bazokisana te. (Masese 12:8, 18) Ntina wana ebongi kozala na eloko babengi takte.

2. Kozala na takte elimboli nini?

2 Takte elimboli “koyeba eloko nini ebongi malamu mpo na koloba to kosala kati na boyokani na biso elongo na bato mosusu”. Elimboli lisusu “likoki ya kobatela boyokani elongo na bazalani na biso kozanga kozokisa bango”. Moto oyo azali na takte amimonisaka moninga kati na maloba na ye mpe kati na misala na ye mpo ete azokisa mayoki ya baninga te. Tolingi te ete maloba na biso mpe misala na biso epesa mpasi epai ya moto. Nzokande, ata tosali nyonso, tokozanga te kozokisa bazalani na biso, mpamba te ata maloba na Biblia, mpo na bamosusu ezali kozokisa bango. (Baloma 9:33; 2 Bakol. 2:15, 16) Na yango, atako tozali kosala nyonso ete tozokisa bato te, nzokande epai mosusu tokoki mpe kobalola solo ya Liloba ya Nzambe te.

3. Monisa ndenge nini mbuma na elimo ezali moboko na takte.

3 Ezali mpasi te mpo na kozala na takte kati na bomoi na biso ya mikolo nyonso soki tozali komonisa mbuma na elimo na Nzambe, mpamba te wana nde moboko na yango. (Bagal. 5:22, 23) Na ndakisa, ye oyo azali na bolingo akoboya kosilikisa bazalani na ye, akozala nde na mposa mpenza ya kosalisa bango. Moto na boboto akosalaka makambo nyonso lokola moninga. Ye oyo ayebi komipekisa mpe azalaka nyee ata kati na matumoli, ntango mosusu akobenda bato mosusu ete bazala lokola ye. Nzokande, moto na kosilika noki mpe moto na nkanda akolobaka pwasa mpe akotumolaka bayoki na ye. (Masese 15:18) Na esika ete ebengana to elembisa bato, maloba na biso mpe misala na biso esengeli nde kobenda bango epai na biso.

4-8. (a) Ndenge nini tokoki kozala na takte na mosala na biso ya ndako na ndako? (b) Kozala na takte elimboli kobalola solo? Ezaleli yango esengi lisusu nini?

4 Zala na takte kati na mosala ya kosakola. Na mosala na yo ya ndako na ndako, okoki kozala na takte mingi soki okobanda masolo na yo na makambo oyo mazali kotungisa moto mpe kolakisa ye ndenge nini Bokonzi na Nzambe ekosilisa mikakatano yango. Lobela ye ete, na ntembe te olingi boyengebene, ozali moto na makanisi mabongi mpe ozali na mposa na komona mabongwani kitoko. Soki oseki ye to okweisi bindimeli na ye, akokanga elimo na ye. Yango wana, na esika ete obimisa ntembe, bolobana nde mpo na makambo oyo bato nyonso bandimaka yango. Soki na nsima esengeli bolobana likambo moko oyo ekoki kobimisa ntembe, luka naino esika ya boyokani kati na yo mpe molobani na yo mpe salela yango mingi. Soki okoki kokotisa kati na elimo ya moto yango solo mingi kitoko na ntina etali Bokonzi mpe mapamboli oyo yango ekopesa, na ntango ekoki okozwa libaku ya kosembola makanisi na ye mosusu oyo mazali na mabunga, na kotalelaka ndenge botondi na ye mpo na boboto ya Nzambe ezali kokola.

5 Moklisto oyo azali na takte mingi akosala makasi ya koyikisa mpiko na molobani na ye ete akota kati na lisolo mpe abimisa likanisi na ye. Ntoma Paulo azalaki naino koyoka likanisi ya bato oyo ye azalaki kosakola epai na bango, mpo ayeba makanisi nini ya malamu akoki kosalela, oyo ekozala na nguya mpo na nsango malamu. (1 Bakol. 9:20-22) Tosengeli kolanda ndakisa na ye. Soki tomitii na esika ya balobani na biso mpo na kokanga ntina na makambo na bango, mpo na nini bazali kondima boye to bazali koloba boye, ekozala na biso mpasi mingi te ya kolobela bango na takte mpe na boboto. Makanisi na bango mauti mbala mosusu na mitindo ya bomoi mpe na makambo ya kala makeseni na oyo ya biso to mpo ete bakondimaka Biblia te lokola biso. Nsima na koyeba mwa makambo matali balobani na biso, tokoki kolakisa bango nsango malamu na lolenge ekosepelisa bango, na esika ete totumola bango mpambampamba mpo ete toyebaki likanisi na bango te mpe bantina na yango te.

6 Kotalela likanisi ya bamosusu elimboli te kobalola solo mpo na kosepelisa bango. Tosengeli kobatela solo na makambo nyonso. Kozala na takte elimboli te kobanga bato mpe kotika boyengebene pembeni. Nzokande, atako tokoki kobalola solo te, ebongi toyeba ntango nini tokoki koloba likambo boye to likambo boye. Mbala mosusu ebongi bobele kozanga kolanda makambo oyo moto auti koloba. To mpe koyanola mokolo mosusu, ntango moto akozala prêt mpo na kosimba ntina na yango. Ezali lokola Yesu alobaka na bayekoli na ye ete “nazali na makambo mingi na koloba na bino nde bokoki koyamba yango sikawa te.” (Yoane 16:12) Atako bindimeli ya molobani na biso ekeseni na oyo ya biso, ntina ezali te ya koluka kosembola na mbala moko makanisi nyonso ya libunga oyo azali kobimisa. Soki tokosala bongo, mbele akokanga elimo na ye mpe akoboya lisolo nyonso na nsima.

7 Na boumeli ya lisolo moko, soki moto abimisi bapwɛ́ mingi na Biblia mpe alobi ete ezali lokuta, ezali mpasi mpo na koyanola na takte mpe na ntango moke na mokomoko na mituna na ye. Eleki malamu kotika eteni monene pembeni mpe koyanola bobele na oyo ezali na boyokani na lisolo na bino. Ntango mosusu mpe molobani na yo alingi komema yo na makanisi ya bato. Zala na takte mpo ete obendama na nzela yango te mpe salela Biblia mpo na koyanola na mituna wana ya mosuni. Kosalaka bongo, okolanda ndakisa ya Yesu.​—Mat. 22:15-22.

8 Soki molobani na yo asiliki, zala na takte mingi, kasi simba eyambweli na yo ngwi. Koluka te ete obalola solo mpo na kokitisa nkanda ya molobani na yo. Luka nde koyeba ntina na mayoki na ye. Okoki ata kotuna ye mpo na nini azali na likanisi boye. Soki alimboli ntina na likanisi na ye, okoki koloba na ye ete yo mpe olingi kolimbwela ye bantina ya likanisi na yo. Ata lisolo ekosukela ndenge nini, takte ekobimisa matomba malamu. Omikundola toli elandi ekomami na Masese 15:1: “Eyano ya boboto ekosilisa nkanda, kasi liloba ya makasi ekopelisa nkele.” Nzokande, soki moto azali kotya matata mingi, ebongi malamu kotika ye.​—Mat. 7:6.

9, 10. Takte ezali na ntina kati na boyokani na biso elongo na bandeko na biso baklisto?

9 Takte epai ya bandeko na biso baklisto. Tosengeli kozala na takte bobele mpo na bato oyo bayebi Jéhovah te, kasi lisusu mpo na bandeko na biso ya elimo. Ntango mosusu bandeko bazali na takte mingi kati na mosala ya kosakola, kasi bazali kobosana kosalela takte epai ya baninga na bango baklisto. Tosengeli kozala na boboto kati na lisangá ya Jéhovah, na misala na biso mpe na maloba na biso, mpo na kokolisa elimo ya bolingo mpe ya bomoko, lisusu mpo na kobatela boyokani malamu mokolo na mokolo. Paulo mpe apesi toli oyo: “Soko tozwi nzela, tosalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali [bandeko na biso] bandimi.”​—Bagal. 6:10.

10 Tozali komibanzabanza mpo na bandeko na biso, mpe mingimingi mpo na matomba na bango ya elimo, mpamba te biso banso tozali basangani na lisangá ya Jéhovah. (Bafil. 2:2, 4) Nzokande, moklisto oyo azali na takte mingi ayebi ete ata azali komibanzabanza mpo na matomba ya bandeko na ye, akoki komikotisa te na makambo oyo etali bobele bango moko, na ndakisa kotunaka bango mituna na makambo na bango ya nkuku. Soki tozali na takte tokozala “monongi na makambo na bamosusu” te.​—1 Pet. 4:15.

11. Monisa na nzela ya mikapo ete Makomami esengi na bankulutu bazala na takte mingi?

11 Takte ezali na ntina mingi mpo na bankulutu ntango bazali kotalela makambo ya bandeko kati na lisangá. Ntango ntoma Paulo apesaki Timote malako mpo na lolenge asengeli kosala mpe koloba epai na batomboki kati na lisangá ya boklisto, amonisaki ye ntina ya kozala moninga mpe kozala na boboto. Alobaki na ye boye: “Ebongi te ete moombo na Nkolo aswanaka kasi azala na boboto liboso na bato nyonso, . . . azala na motema petee, alakisa batemeli na ye na bopolo; mpo ete bakoki . . . kozonga na makanisi malamu, mpe kolongwa na motambo na Diable.” (2 Tim. 2:24-26) Bobele bongo, ntoma Paulo apesaki toli na baklisto ete bazala na “elimo ya bopolo” mpo na kokenda kosalisa ndeko oyo anyati litambe mabe naino ye moko ayebi yango te. (Bagal. 6:1) Wana ezali bango kopesa toli na bandeko motindo oyo, bankulutu basengeli kozala na takte atako bakoki kobalola mitinda ya boyengebene te.

12, 13. Mpo na nini takte ezali na ntina mingi kati na libota?

12 Tosengeli mpe kozala na takte kati na libota na biso. Ntango mosusu, mpo ete toyebi bango malamu, tozali koloba na bango kozanga boboto to tozali kosalela bango makambo na makasi. Nzokande, ebongi ete tozala mpe na takte epai na bango. Maloba makasi ekokabola bango na biso. Ata basangani mosusu ya libota na biso bazali basaleli ya Jéhovah te, tosengeli kozala na takte epai na bango. Nani ayebi, ntango mosusu bakoya kondima losambo ya solo mpo na takte na biso.​—1 Pet. 3:1, 2.

13 Soki tozali na takte tokobuka mbuma malamu kati na boyokani na biso elongo na bato ya libanda, na boyokani na biso elongo na bandeko na biso ya elimo mpe na boyokani na biso elongo na basangani ya libota na biso. Ezaleli yango ekozala elengi mingi mpo na bayoki na biso, lokola emonisi yango Masese 16:24 ete: “Maloba kitoko mazali lokola mafuta na nzoi na elengi epai na molimo mpe na kobika kati na mikwa.” Na yango, tya molende na yo nyonso mpo na kolona takte, wana ezali yo na mposa ya kosala malamu epai na bato nyonso oyo ozali kokutana na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto