Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/8 nk. 29-31
  • Tóyekola koloba mpe kosala na mayele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyekola koloba mpe kosala na mayele
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koloba to kosala na mayele elimboli nini?
  • Lukáká koyeba bamposa ya basusu
  • Lakisá ete okangi ntina ya likambo
  • Yebá makambo oyo esengeli koloba te
  • Maloba oyo esilisaka mpasi
  • Lobá na mayele, kasi lobá kaka makambo ya solo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge nini okoki koloba na takte mpe kozanga kobalola solo
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Koyokela baninga mawa
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Liteya na oyo etali kolimbisa
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/8 nk. 29-31

Tóyekola koloba mpe kosala na mayele

PEGGY amonaki mwana na ye ya mobali azali koloba na leki na ye mabe. Peggy atunaki ye boye: “Wana ndenge osengeli koloba na leki na yo? Talá sikoyo ndenge akómi mawamawa!” Mpo na nini Peggy alobaki bongo? Alingaki koteya mwana na ye ndenge ya koloba na bato na mayele to kosalela bango makambo kozanga ete azokisa bango.

Ntoma Paulo alendisaki elenge Timote oyo azalaki moninga na ye ya mosala ete ‘azalaka na boboto epai ya bato nyonso’ to alobaka na bango na mayele. Kosala bongo ekokaki kosalisa Timote ayokisa bato mosusu mpasi te. (2 Timote 2:24) Koloba to kosala na mayele elimboli nini? Ndenge nini okoki kokolisa ezaleli yango? Mpe ndenge nini okoki kosalisa bato mosusu bálona ezaleli yango?

Koloba to kosala na mayele elimboli nini?

Koloba to kosala na mayele elimboli koyeba kososola ndenge oyo moto akoki komiyoka na likambo boye to boye mpe kosalela ye makambo to koloba na ye na boboto to na ndenge oyo ebongi mpenza. Kaka ndenge misapi oyo esimbi eloko eyebaka soki eloko yango ezali makasi, pɛtɛpɛtɛ, sɛmbɛsɛmbɛ, mɔtɔ to nsukinsuki, moto oyo alobaka to asalaka na mayele ayebaka mpe ndenge bato mosusu bazali komiyoka mpe ayebaka maloba nini akoloba na bango to makambo nini akoki kosalela bango mpo azokisa bango te. Kasi mpo na koloba to kosala na mayele, esɛngaka te kaka koyeba koloba; esɛngaka mpe ete moto aboya mpenza koyokisa bato mosusu mpasi.

Lisolo ya Biblia oyo ezali kolobela Gehazi, mosaleli ya Elisa, epesi biso ndakisa ya moto oyo ayebaki koloba to kosala makambo na mayele te. Mwasi moko ya Suneme oyo mwana na ye autaki kokufela ye na mabɔkɔ ayaki koluka libɔndisi epai ya Elisa. Ntango Gehazi atunaki ye soki makambo na ye nyonso ezali malamu, ayanolaki ete: “Ezali malamu.” Kasi ntango apusanaki pene na mosakoli, “Gehazi ayaki kolongola ye.” Kasi Elisa alobaki na ye ete: “Tiká ye mpo ete motema na ye ezali na bololo.”​—2 Mikonzi 4:17-20, 25-27.

Mpo na nini Gehazi azangaki boboto epai ya mwasi yango? Ezali solo ete ntango atunaki mwasi yango, ayebisaki te ndenge azalaki komiyoka. Kasi, toyebi ete bato mingi balingaka koyebisa makambo na bango epai ya bato nyonso te. Atako bongo, ntembe ezali te ete elongi na ye ezalaki komonisa mpasi oyo azalaki na yango. Elisa amonaki yango, kasi Gehazi amonaki yango te, to mpe aboyaki kaka kotyela yango likebi. Lisolo yango emonisi mpenza nini esalaka ete bato mingi bázanga koloba na bato to kosalela bango makambo na mayele. Soki moto azali kopesa motuya mingi koleka na mosala oyo azali kosala, ekozala mpasi te ete abosana bamposa ya bato oyo azali kosalela mosala yango. Moto ya ndenge wana azali lokola sofɛlɛ oyo, lokola alingi akóma esika azali kokenda na ngonga oyo esengeli, aboi ata kotɛlɛma na nzela mpo na kozwa bakiliya.

Soki tolingi kozala lokola Gehazi te, tosengeli kosala makasi ete tózala na boboto epai na bato, mpo toyebi te ndenge bazali komiyoka. Tosengeli ntango nyonso kotalela bilembo oyo ezali komonisa ndenge bazali komiyoka mpe kosalela bango makambo to koloba na bango na boboto. Ndenge nini okoki kokolisa ezaleli yango?

Lukáká koyeba bamposa ya basusu

Yesu azalaki ndakisa monene mpenza na oyo etali koyeba bamposa ya bato mpe koluka ndenge oyo eleki malamu ya kosalela bango makambo na boboto. Mokolo moko azalaki kolya na ndako ya Simona Mofalisai mpe mwasi moko, “oyo ayebanaki na engumba wana ete azali mosumuki,” apusanaki pembeni na ye. Lokola mwasi ya Suneme, mwasi yango mpe alobaki ata liloba moko te, kasi makambo oyo azalaki kosala epesaki Yesu nzela ya koyeba makambo oyo ezalaki na motema na ye. ‘Ayaki na molangi ya alabasita ya mafuta ya nsolo kitoko, mpe amityaki na nsima na makolo ya Yesu, alelaki mpe abandaki kopɔlisa makolo na ye na mpisoli na ye mpe azalaki kopangwisa yango na nsuki ya motó na ye. Lisusu, azalaki kopwɛpwa makolo na ye na boboto mpe kopakola yango mafuta wana ya nsolo kitoko.’ Yesu ayebaki ntina oyo mwasi yango azalaki kosala makambo nyonso wana. Mpe atako Simona alobaki eloko moko te, Yesu ayebaki ete azalaki koloba na motema ete: “Moto oyo, soki azalaki mpenza mosakoli, mbɛlɛ alingaki koyeba nani mpe mwasi ya motindo nini oyo azali kosimba ye, ete azali mosumuki.”​—Luka 7:37-39.

Kanisá naino mpasi oyo Yesu alingaki koyokisa mwasi yango soki alongola ye pembeni na ye to mpe oyo alingaki koyokisa Simona soki aloba na ye ete: “Ozali na mayele te! Ozali komona te ete abongoli motema?” Nzokande, na boboto mpenza Yesu ayebisaki Simona lisese ya moto oyo alimbisaki bato mibale oyo bazalaki na nyongo na ye, moko azalaki na nyongo ya monene mpe mosusu azalaki kaka na mwa nyongo ya moke. Yesu atunaki ye: “Nani na kati na bango akolinga ye koleka?” Na yango, na esika aloba na Simona ete asali mabe, Yesu apesaki ye nde longonya mpo apesaki eyano ya malamu mpenza. Na nsima asalisaki Simona na boboto mpenza mpo amona makambo oyo ezalaki komonisa ndenge mwasi yango azalaki komiyoka mpe ete abongolaki motema. Yesu atalaki lisusu mwasi yango mpe na boboto nyonso amonisaki ye ete ayebaki makanisi na ye. Ayebisaki ye ete masumu na ye elimbisami mpe na nsima alobaki na ye ete: “Kondima na yo ebikisi yo; kende na kimya.” Kanisá naino ndenge maloba wana ya boboto elendisaki mwasi yango na ekateli oyo azwaki ya kosala oyo ezali malamu! (Luka 7:40-50) Yesu azalaki kolobela bato mpe kosalela bango makambo na mayele mpo azalaki kososola ndenge bazalaki komiyoka mpe ayebaki komitya na esika na bango.

Kaka ndenge Yesu asalisaki Simona, biso mpe tosengeli koyekola kososolaka makanisi ya bato na kotalela makambo oyo bazali kosala mpe kosalisa bato mosusu básalaka bongo. Baklisto oyo bakɔmeli bakoki ntango mosusu kolakisa basakoli ya sika koloba mpe kosala na mayele. Ntango bazali kosakola nsango malamu, soki babimi na lopango moko, bakoki kolobela mwa makambo oyo ezali komonisa makanisi ya moto oyo bauti kosolola na ye. Moto yango azalaki nde nsɔninsɔni, azalaki nde kobɛta ntembe, asepelaki te to azalaki nde na mosala? Lolenge nini ekoleka malamu mpo na kosalisa ye na boboto? Bankulutu mpe bakoki kosalisa bandeko oyo bayokisani mpasi na maloba mabe. Bakoki kosalisa mokomoko na bango ayeba komitya na esika ya moninga. Amoni nde ete bafingi ye, bamoni ye mpamba, to bakaniseli ye mabe? Ndenge nini boboto ekoki kozongisela ye esengo?

Baboti basengeli kosalisa bana na bango báyeba komityaka na esika ya basusu, mpamba te yango nde ekosalisa bango bálobaka na bato mpe básalelaka bango makambo na mayele. Mwana ya Peggy oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo amonaki ndenge leki na ye abebisaki elongi mpe ndenge mpisoli etondaki ye na miso, yango wana amonaki ete ayokisaki ye mpasi. Mpe kaka ndenge mama na ye akanisaki, ayokaki mawa mpe azwaki ekateli ete akozongela lisusu te. Bana ya Peggy nyonso mibale basalelaki malamu liteya yango oyo bazwaki na bomwana, mpe nsima ya bambula bakómaki kobota mbuma mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli mpe bakómaki babateli ya mpate na kati ya lisangá ya boklisto.

Lakisá ete okangi ntina ya likambo

Koyeba mpenza nini osengeli koloba to kosala ezalaka na ntina mingi, mingimingi ntango moto moko asali yo mabe. Ekoki kozala mpasi te oyokisa moto yango nsɔni. Na ntango wana, ezalaka malamu obanda naino kolobela makambo na ye ya malamu. Na esika olobela mabe oyo asali, luká libosoliboso nde ndenge oyo bokoki kosilisa likambo yango. Yebisá ye ete osepeli te na likambo oyo asali mpe nini olingi asalaka lisusu te. Na nsima osengeli mpe koyoka ye. Mbala mosusu ozalaki kokanisela ye mabe kaka mpamba.

Moto nyonso alingaka ete okanga ntina ya makanisi na ye ata soki yo ozali kokanisa ndenge mosusu. Mpo Yesu amonisa ete ayebaki ntina oyo Malata azalaki komitungisa, alobaki na ye na boboto. Alobaki boye: “Malata, Malata, ozali komitungisa mpe komiyokisa mpasi mpo na biloko mingi.” (Luka 10:41) Ndenge moko mpe, ntango moto moko ayebisi biso likambo, na esika tóluka kopesa makanisi na biso liboso ete tóyoka ye, lolenge ya malamu ya komonisa ete tokangi ntina ezali ya kobandela lisusu likambo oyo auti koyebisa biso na maloba na biso moko. Wana nde ndenge ya komonisa na boboto nyonso ete okangi ntina ya likambo.

Yebá makambo oyo esengeli koloba te

Ntango Esetele, mwasi ya mokonzi, alingaki kosɛnga mobali na ye asala ete mokano mabe oyo Amana azwaki ya koboma Bayuda elonga te, abongisaki makambo na mayele mpenza mpo mobali na ye azala na esengo. Na ntango yango nde ayebisaki ye likambo monene wana. Kasi tokoki mpe kozwa liteya ya malamu mpenza soki totaleli makambo oyo alobaki te. Na mayele mpenza aboyaki koloba ete mobali na ye mpe azalaki na kati ya bato oyo bazwaki mokano mabe yango.​—Esetele 5:1-8; 7:1, 2; 8:5.

Ndenge moko mpe, ntango tokei kotala mobali ya ndeko mwasi moko oyo azali mondimi te, na esika tóbanda mbala moko kotángela ye mikapo ya Biblia, ekozala malamu tóbanda naino koluka na mayele makambo oyo asepelaka na yango. Ntango moto moko ya sika oyo alati na ndenge oyo ebongi te ayei na Ndako ya Bokonzi, ebongi koyamba ye na esengo na esika olobela bilamba oyo alati; to mpe ntango ndeko moko oyo azalaki lisusu koya na makita te mwa mikolo ebele ayei, ebongi te kotuna ye mpo na nini ayaka lisusu makita te. Mpe soki omoni ete moto oyo abandi koyekola Biblia sika azali na makanisi oyo ebongi te, ekozala malamu te oluka kozongisa ye na nzela kaka na mbala moko. (Yoane 16:12) Kozala na mayele esɛngaka mpe koyeba makambo oyo esengeli koloba te.

Maloba oyo esilisaka mpasi

Koyekola koloba na mayele ekosalisa yo ozala na boyokani malamu ná bato mosusu, ata soki moto akaniseli yo mabe mpe akangeli yo nkanda. Na ndakisa, ntango bato ya Efelaima “basilikelaki [Gideona] makasi,” ayanolaki bango na maloba malamu; alimbolelaki bango ndenge mpenza likambo esalemaki mpe akumisaki bato ya Efelaima na bosembo mpenza mpo na makambo oyo basalaki. Asalelaki mpenza mayele mpamba te alobaki na bango ete batombokaki na ntina, mpe komikitisa na ye esepelisaki bango.​—Basambisi 8:1-3, NW; Masese 16:24.

Mekáká ntango nyonso kokanisa ndenge oyo bato bakoyoka soki olobeli bango maloba boye to boye. Soki ozali kosala makasi mpo olobaka mpe osalaka na mayele, yango ekosalisa yo ozala na esengo oyo Masese 15:23 (NW) elobeli: “Moto azalaka na esengo mpo na eyano oyo ebimi na monɔkɔ na ye, mpe liloba oyo elobami na ntango oyo ebongi ezalaka malamu mpenza!”

[Elilingi na lokasa 31]

Baklisto oyo bakɔmeli bakoki kolakisa basakoli ya sika koloba mpe kosala na mayele

[Elilingi na lokasa 31]

Baboti bakoki koteya bana na bango báyebaka komitya na esika ya bato mosusu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto