LITEYA 35
Kozongela likambo mpo na kobimisa yango polele
KOTEYA malamu esɛngi mpe kozongela makambo mosusu. Soki ozongeli likanisi moko ya ntina mbala ebele, na ntembe te bato oyo bazali koyoka yo bakobosana yango te. Soki ozongeli likanisi yango na maloba mosusu, bakoki kutu kokanga ntina na yango malamu koleka.
Soki bato oyo bazali koyoka yo babosani makambo oyo olobi, maloba na yo ekobongola ata moke te bindimeli to bomoi na bango. Mbala mosusu, bakobanda kokanisa nde makambo oyo otyelaki likebi mingi.
Yehova, Molakisi na biso Monene, apesi biso ndakisa mpo na oyo etali kozongela makanisi ya ntina. Apesaki libota ya Yisalaele Mibeko Zomi. Asalelaki anzelu moko mpo na koyebisa bango mibeko yango na Ngomba Sinai. Nsima, akomaki yango mpe apesaki yango na Moize. (Ex. 20:1-17; 31:18; Det. 5:22) Yehova ayebisaki Moize ayebisa lisusu libota ya Yisalaele mibeko yango liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka, mpe na lisalisi ya elimo santu, Moize akomaki yango nyonso, ndenge tozali kotánga na Deteronome 5:6-21. Na kati ya mibeko oyo epesamaki na Yisalaele, likambo moko esɛngamaki oyo emonisaki ete basengelaki kolinga mpe kosalela Yehova na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba mpe na makasi na bango mobimba. Maloba oyo mpe ezongelamaki mbala na mbala. (Det. 6:5; 10:12; 11:13; 30:6) Mpo na nini? Mpamba te ndenge Yesu alobaki yango, ezali “komandema oyo eleki monene mpe ya liboso.” (Mat. 22:34-38) Yehova asalelaki mosakoli Yilimia mpo na koyebisa lisusu Bayuda mbala koleka 20 ete kotosa mibeko nyonso oyo apesi bango ezali likambo ya lisɛki te. (Yil. 7:23; 11:4; 12:17; 19:15) Mpe na nzela ya Ezekiele, Nzambe alobaki mbala koleka 60 ete mabota “bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].”—Ezek. 6:10; 38:23.
Na lisolo ya mosala ya Yesu, tozali mpe komona ete ayebaki mpenza kozongela makanisi ya ntina. Na ndakisa, tozali na Baevanzile minei, oyo mokomoko ezali kolobela makambo ya ntina oyo elobelami mpe na Baevanzile mosusu, kasi na lolenge oyo ekeseni mwa moke. Ntango azalaki koteya, Yesu azongelaki mateya mosusu mbala ebele, kasi na lolenge mosusu. (Mko. 9:34-37; 10:35-45; Yoa. 13:2-17) Mpe ntango azalaki na Ngomba ya Olive mwa mikolo liboso ya liwa na ye, Yesu azongelaki toli moko ya ntina mingi mpo na kobimisa yango polele; alobaki boye: “Bókɛngɛlaka mpo boyebi te na mokolo nini Nkolo na bino akoya.”—Mat. 24:42; 25:13.
Na mosala ya kosakola. Ntango ozali kopesa bato litatoli, ozalaka na elikya ete bakobosana te makambo oyo ozali koloba. Soki ozali kozongela makanisi ya ntina na ndenge esengeli, yango ekoki kosalisa yo okokisa likambo yango.
Mbala mingi, soki ozongeli likanisi moko ntango ozali naino kosolola yango na moto, ekosalisa yo okɔtisa yango na motó na ye. Yango wana, nsima ya kotánga vɛrsɛ moko, okoki konyata yango lisusu soki ozongeli maloba na yango ya ntina mpe otuni ye boye: “Oyoki ndenge vɛrsɛ oyo elobi?”
Okoki mpe kosalela malamu mpenza maloba ya nsuka ya lisolo na yo. Na ndakisa okoki koloba boye: “Likambo ya ntina oyo nalingaki okanga na lisolo oyo ezali ete . . .” Na nsima, lobá lisusu likambo yango na maloba ya pɛtɛɛ. Okoki lisusu koloba ete: “Mokano ya Nzambe ezali ete mabele ebongwana paladiso mpe tondimi mpenza ete mokano yango ekokokisama.” To okoki koloba boye: “Biblia emonisi polele ete tozali na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Soki tolingi kobika na nsuka ntango ebongiseli yango ekokufa, tosengeli koyekola oyo Nzambe azali kosɛnga biso.” To mpe okoki koloba boye: “Ndenge tomoni yango, Biblia ezali kopesa toli oyo ebongi mpo na ndenge oyo tokoki koyika mpiko na mikakatano ya libota.” Na bantango mosusu, okoki kaka kozongela maloba ya Biblia mpo moto wana abosana yango te. Ya solo, mpo na kosala bongo, esengeli kokanisa malamu liboso.
Ntango ozali kosala bozongeli ya sika mpe ntango ozali koyekola na bato, okoki kosalela mituna mpo na kozongela makanisi ya ntina.
Ntango moto azali na mikakatano mpo na kokanga ntina ya toli ya Biblia to mpo na kosalela yango, osengeli kozongela likambo yango mbala ebele. Salá makasi ete olobela likambo yango na ndenge mingi. Lisolo yango esengeli kozala molai te, kasi esengeli nde kotinda moyekoli ete akanisaka ntango nyonso likambo yango. Kobosana te ete Yesu mpe asalaki bongo mpo na kosalisa bayekoli na ye bátika ezaleli ya koluka kozala na esika ya liboso.—Mat. 18:1-6; 20:20-28; Luka 22:24-27.
Ntango ozali kosala masukulu. Soki ozali kosala masukulu na lisangá, mokano na yo ezali kaka te ete oyebisa bato makambo oyo obongisi. Mposa na yo ezali ete bato oyo bazali koyoka yo bákanga ntina na yango, bábosana yango te, mpe básalela yango. Mpo okokisa yango, zongelá malamu mpenza makambo ya ntina.
Nzokande, soki olekisi kozongela makanisi ya ntina, mbala mosusu bato oyo bazali koyoka yo bakotya lisusu likebi te. Poná malamu makanisi oyo omoni ete osengeli mpenza konyata. Mbala mingi makanisi yango ezalaka makanisi ya ntina oyo esimbi mpenza lisolo mobimba, kasi ekoki mpe kozala makanisi mosusu oyo ezali na ntina mingi mpo na bato oyo bazali koyoka yo.
Mpo ozongelaka makambo oyo esengeli, okoki koloba yango na mokuse na ebandeli ya lisolo na yo. Okoki koloba yango na maloba moke oyo ezali komonisa makambo oyo okolobela na lisolo na yo, to na mituna to mpe na bandakisa ya mikuse oyo ezali komonisa mikakatano oyo esengeli kosilisa. Okoki koloba makanisi ya ntina boni ezali na lisolo na yo mpe ndenge oyo yango ekolandana. Na nsima, bandá kolobela likanisi ya ntina mokomoko na lisolo na yo. Mpo na konyata lisusu makanisi ya ntina na katikati ya lisolo na yo, okoki kozongela likanisi ya ntina mokomoko liboso oleka na mosusu. To okoki kosalela ndakisa moko oyo ezali komonisa ndenge ya kosalela likanisi yango ya ntina. Okoki lisusu konyata makanisi ya ntina na nsuka ya lisolo na yo soki osaleli maloba oyo ezali kozongela yango, kobimisa yango polele na kokesenisáká makambo, na biyano mpe mituna oyo obimisaki, to oyo ezali komonisa na mokuse ndenge ya kosilisa mikakatano oyo olobelaki.
Longolá makambo yango, moto oyo ameseni kosala masolo atalaka malamumalamu bato oyo bazali koyoka ye. Soki bato mosusu kati na bango bazali kokoka te kokanga ntina ya likanisi moko, molobi akomona yango. Soki likanisi yango ezali na ntina, akozongela yango. Nzokande, soki azongeli kaka maloba oyo asalelaki, mbala mosusu ekozala na ntina moko te. Mpo na koteya, asengeli kaka te kosuka wana. Asengeli koyeba kobongola makanisi na ye. Mbala mosusu asengeli kobakisa makambo mosusu oyo akanaki te na lisolo na ye. Soki yo mpe oyekoli kokokisa bamposa ya bato oyo bazali koyoka yo, yango ekosalisa yo okóma moteyi malamu mpenza.