APƐNDISI
Ndenge ya kotalela moto oyo alongolami na lisangá
Moko na makambo oyo esalaka mpasi mingi na motema ezali koyoka ete ndeko to moninga moko ya motema abimisami na lisangá mpo asalaki lisumu monene, kasi abongoli motema te. Ndenge oyo tolandaka etinda ya Biblia na likambo yango ekoki komonisa soki bolingo na biso mpo na Nzambe mpe bosembo na biso na ebongiseli na ye ezali mpenza makasi.a Tótalela mwa mituna oyo likambo yango ebimisaka.
Ndenge nini tosengeli kotalela moto oyo alongolami na lisangá? Biblia elobi boye: “Bótika kosangana na moto nyonso oyo abengami ndeko, oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te.” (1 Bakorinti 5:11) Biblia elobi boye mpo na moto oyo “atikali te na kati ya liteya ya Kristo”: “Bóyamba ye na bandako na bino soki moke te to bópesa ye mbote te. Mpo moto oyo apesi ye mbote, asangani na misala na ye ya mabe.” (2 Yoane 9-11) Tosengeli te kozala baninga ya moto oyo alongolami na lisangá, tosengeli mpe te kozala na ye na boyokani na makambo ya elimo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/1981, lokasa 23 (na Lifalanse), elobaki boye: “Kopesa moto mbote ekoki kozala litambe ya liboso oyo ekomema na lisolo, mpe mbala mosusu na boninga. Tokosepela kosala litambe wana ya liboso ná moto oyo alongolami na lisangá?”
Esengeli mpenza kokata boyokani nyonso na moto yango? Ɛɛ, mpe ezali bongo mpo na bantina mingi. Ya liboso, likambo yango etaleli bosembo na biso epai ya Nzambe mpe na Liloba na ye. Tosengeli kotosaka Yehova ntango nyonso, kasi te kaka soki ezali pɛtɛɛ mpo na biso. Bolingo na biso epai ya Nzambe etindaka biso tótosa mibeko na ye nyonso; toyebaka ete azali sembo mpe atondi na bolingo mpe ete mibeko na ye ezali mpo na bolamu na biso. (Yisaya 48:17; 1 Yoane 5:3) Ya mibale, kokata boyokani ná moto oyo aboyi kobongola motema ebatelaka biso mpe bandeko mosusu ya lisangá mpo elimo na biso, ezaleli na biso mpe lokumu ya lisangá ebebisama te. (1 Bakorinti 5:6, 7) Ya misato, ekateli na biso ya kokangama na mitinda ya Biblia ekoki kosalisa moto oyo alongolami na lisangá. Ntango tozali komemya ekateli ya komite ya kosambisa, yango ekoki kosimba motema ya mosumuki oyo amonisaki motema makasi atako bankulutu basalaki milende nyonso mpo na kosalisa ye. Kobungisa boninga ya bato oyo alingaka ekoki kosalisa ye ‘azongela makanisi ya malamu,’ amona ete asalaki mpenza mabe, mpe azwa mokano ya kozonga epai ya Yehova.—Luka 15:17.
Tokosala nini soki ndeko ya libota na biso alongolami na lisangá? Na Likambo yango, bolingo oyo esangisaka bandeko ya libota emekaka mpenza bosembo ya moto. Ndenge nini tosengeli kotalela ndeko ya libota oyo alongolami na lisangá? Awa, tokoki te kolobela makambo nyonso oyo tokoki kokutana na yango, kasi tótalela ndakisa mibale.
Na ntango mosusu, ekoki kozala ete tofandi ndako moko na ndeko oyo alongolami na lisangá. Lokola ekateli ya kolongolama na lisangá ebomi te bondeko ya biso na ye, tokoki kokoba kosala na ye makambo mosusu oyo tosalaka mokolo na mokolo. Kasi, na etamboli na ye, moto yango aponi kokata boyokani ya elimo ná bandeko na ye oyo bazali Batatoli. Yango wana, bandeko oyo batikali sembo epai ya Nzambe basengeli lisusu te kozala na boyokani ná ye na makambo ya elimo. Na ndakisa, soki moto oyo alongolami na lisangá ayei kofanda na esika tozali kosala losambo na kati ya libota, akolanda kaka, akopesa biyano te, akosala mpe likambo mosusu te. Kasi, soki moto oyo alongolami na lisangá azali naino elenge, baboti na ye bazali kaka na mokumba ya koteya ye mpe kopesa ye disiplini. Yango wana, baboti bakoki koyekolaka na ye Biblia.b—Masese 6:20-22; 29:17.
Kasi, ekoki kozala ete ndeko oyo alongolami na lisangá afandaka epai mosusu. Atako ezalaka na mwa makambo mosusu na libota oyo ekoki kosɛnga kokutana na ye, yango esengeli kozala momeseno te. Bakristo oyo bazali sembo balukaka te ndenge ya kokakola mobeko ya Nzambe mpo básololaka mpambampamba ná ndeko oyo alongolami na lisangá kasi afandaka epai mosusu. Nzokande, bosembo epai ya Yehova mpe na lisangá na ye etindaka bango bátosa etinda ya Biblia na ndenge ya kotalela moto oyo alongolami na lisangá. Bosembo na bango emonisaka ete balingaka bolamu ya moto oyo alongolami na lisangá mpe yango ekoki kosala ete disiplini oyo moto yango azwi eteya ye.c—Baebre 12:11.
a Makanisi oyo epesami na likambo yango etaleli mpe moto oyo amilongoli na lisangá.
b Mpo na koyeba makambo mosusu etali elenge oyo alongolami na lisangá kasi azali naino na ndako ya baboti, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2001, nkasa 16-17, mpe ya 15/11/1988, lokasa 20 (na Lifalanse).
c Mpo na koyeba makambo mosusu na ndenge ya kotalela ndeko oyo alongolami na lisangá, talá batoli ya Biblia oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/1988, nkasa 26-31, mpe ya 15/12/1981, nkasa 26-31 (na Lifalanse).