MITUNA YA BATÁNGI
Ezali malamu ete baboti oyo bazali Batatoli báfanda esika moko na makita elongo na mwana na bango oyo abimisamá na lisangá?
Ezali na ntina te komitungisa koleka ndelo na likambo etali esika oyo moto oyo abimisamá na lisangá asengeli kofanda na Ndako ya Bokonzi. Zulunalo oyo ebimisá masolo mingi mpo na kolendisa baboti bakristo ete soki likoki ezali, básalisa mwana na bango oyo abimisamá na lisangá, oyo azali kofanda na bango ndako moko. Ndenge emonisamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/11/1988 nkasa 19 mpe 20 (na Lifalanse), baboti bakoki ata koyekola Biblia ná mwana na bango ya elenge oyo abimisamá na lisangá mpe azali kofanda na ndako na bango. Elikya ezali ete na ndenge yango, bakolendisa mwana yango amona ete asengeli kozonga na nzela ya malamu.
Na oyo etali esika ya kofanda na Ndako ya Bokonzi, emonani ete ezali mpe mabe te elenge oyo abimisamá na lisangá afanda na kimya elongo na baboti na ye. Lokola ezali mobeko te ete moto oyo abimisamá na lisangá afanda kaka na bakiti ya nsima, mabe ezali te soki mwana oyo abimisamá na lisangá afandi pembeni ya baboti na ye, ata soki bafandi wapi. Lokola baboti bazali kolandela elimo ya mwana na bango, na ntembe te bakolinga komona soki mwana yango azali mpenza kotya likebi na makambo oyo ezali koteyama na makita. Kofanda elongo na mwana na bango na esika ya kotika ye afanda esika mosusu ekoki kosalisa na likambo yango.
Bongo soki mwana oyo abimisamá na lisangá afandaka lisusu ndako moko na baboti te? Bakoki kofanda esika moko te? Kala, masolo oyo ebimaki na zulunalo oyo elobelaki polele ezaleli oyo mokristo asengeli kozala na yango na oyo etali kosala makambo elongo na ndeko ya libota oyo abimisamá na lisangá, oyo tofandi na ye ndako moko te.a Kasi, kotika moto oyo abimisamá na lisangá afanda na kimya pene ya bandeko na ye na ntango oyo makita ezali kosalema ekeseni mosika na koluka kozalazala ná ye mpambampamba. Soki bandeko ya libota oyo bazali sembo batalelaka ndeko na bango oyo abimisamá na lisangá ndenge Biblia esɛngi mpe basalaka makasi bálanda toli oyo Biblia epesi ya kotika kosangana na ye, emonani ete ntina ya komitungisa ekozala te.—1 Ko. 5:11, 13; 2 Yoa. 11.
Ata soki moto oyo abimisamá na lisangá afandi pembeni ya ndeko na ye libota to pembeni ya ndeko mosusu ya lisangá, ntina ya komitungisa esengeli kozala te soki afandi na ye kimya. Kotyela moto mibeko na oyo etali esika ya kofanda ekoki kobimisa mindɔndɔ na bantango mosusu. Soki bato nyonso oyo bazali wana, ata mpe bandeko ya libota oyo bazali sembo, basalaka makasi bátosa mitinda ya Biblia na oyo etali kobimisama na lisangá, mpe soki likambo yango ezali kobɛtisa basusu libaku te, ntina ya komitungisa mpo na esika ya kofanda na ntango ya makita ezali te.b
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/1981, nkasa 27 mpe 28, na Lifalanse.
b Likanisi yango esemboli makanisi oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/1953, lokasa 240, na Lifalanse.