Monisá ete ozali moklisto ya sembo ntango moto moko ya libota na bino abimisami na lisangá
1. Likambo nini ekoki komeka bosembo ya moklisto?
1 Bolingo oyo bato ya libota moko bazali na yango kati na bango ekoki kozala makasi mpenza. Yango ekoki komemela moklisto komekama ntango mobalani, mwana, moboti, to ndeko mosusu ya libota abimisami na lisangá to amilongoli ye moko. (Mat. 10:37) Ndenge nini baklisto ya sembo basengeli kotalela ndeko yango? Tosengeli kotalela ye ndenge mosusu soki afandi na biso ndako moko? Liboso, tótalela lisusu oyo Biblia ezali koloba na likambo yango, malako oyo tosengeli kosalela mpo na baoyo babimisami na lisangá mpe mpo na baoyo bamilongoli bango moko.
2. Biblia elobi nini mpo na lolenge oyo baklisto basengeli kotalela bato oyo babimisami na lisangá?
2 Ndenge oyo tosengeli kotalela baoyo babimisami na lisangá: Liloba ya Nzambe epesi baklisto etinda ete bátika kosangana to kozala na boninga na moto oyo abimisami na lisangá: “Bótika kosangana na moto nyonso oyo abengami ndeko oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi masanga to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te. . . . Bólongola moto mabe na kati na bino.” (1 Kol. 5:11, 13, NW) Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 18:17 (NW) ezali mpe na likanisi ya ndenge yango: “Tiká ete [moto oyo abimisami na lisangá] azala epai na yo lokola moto ya bikólo mosusu mpe lokola mokɔngɔli-mpako.” Bato oyo bazalaki koyoka Yesu bayebaki malamu ete Bayuda ya ntango wana bazalaki koboya kosangana na bapakano mpe ete bazalaki koboya kozala baninga na bakɔngɔli-mpako mpo bazalaki kotalela bango lokola bato ya mbindo. Na yango, Yesu azalaki kopesa bayekoli na ye etinda ete básangana te na bato oyo babimisami na lisangá.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1981 nkasa 17-19 (na Lifalanse).
3, 4. Makambo nini epekisami kosala elongo na bato oyo babimisami na lisangá to baoyo bamilongoli na lisangá?
3 Elingi koloba ete baklisto ya sembo basololaka te makambo ya elimo na moto nyonso oyo abimisami na lisangá. Kasi esuki wana te. Liloba ya Nzambe elobi ete tosengeli ‘kolya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te.’ (1 Kol. 5:11, NW) Na yango, toboyaka mpe kotambola elongo na moto oyo abimisami na lisangá. Elingi koloba tokoboya kobengisa ye na pikiniki, na fɛti, na lisano, to kokende na magazini elongo na ye, na lisano to mpo na kolya esika moko na ye, ezala na ndako to na restora.
4 Tokoloba boni mpo na kosolola na moto oyo abimisami na lisangá? Atako Biblia elobeli makambo nyonso te oyo tosengeli koboya kosala elongo na bato yango, kasi 2 Yoane 10 (NW) ezali kosalisa biso tóyeba likanisi ya Yehova na likambo yango: “Soki moto ayei epai na bino mpe amemi liteya oyo te, bóyamba ye na bandako na bino soki moke te to bópesa ye mbote te.” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1981, na Lifalanse, lokasa 23, ntango elobeli likambo yango, elobi ete: “Mbote ya mpamba ekoki kozala ebandeli ya lisolo to ya boninga. Tolingi kobanda likambo ya ndenge wana elongo na moto oyo abimisamaki na lisangá?”
5. Moto oyo abimisami na lisangá amipimeli makambo nini?
5 Ya solo, ezali kaka ndenge oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango elobi na nkasa 29, ete: “Likambo ezali awa ezali ete moklisto oyo amipesi na masumu kino abimisami na lisangá, amipimeli makambo mingi: kondimama na Nzambe, . . . boninga ya malamu elongo na bandeko mpe makambo mosusu mingi oyo azalaki kosala kala elongo na bandeko ya libota na ye oyo bazali baklisto.”
6. Esɛngami na moklisto ete atika kosangana na ndeko na ye oyo abimisami na lisangá mpe azali kofanda na ye ndako moko? Limbolá.
6 Na kati ya ndako: Elingi koloba ete bato oyo bafandaka ndako moko na ndeko na bango oyo abimisami na lisangá bakoki kolobana na ye te, kolya elongo na ye te, mpe kozala elongo na ye te na ntango bazali kosala makambo na bango mosusu ya mokolo na mokolo? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1991, na maloba na nse ya lokasa 22, elobi ete: “Soki libota moko ya baklisto ezali na moto moko oyo abimisami na lisangá, moto yango akosangana na makambo ya mokolo na mokolo ya ndako wana.” Na yango, bato ya libota na ye bakoki kotala soki bakotikela oyo abimisami na lisangá nzela alya na bango to asangana na bango na makambo mosusu ya libota. Atako bongo, bakosala makambo na boye ete bato oyo bazali kokutana na bango bákanisa te ete makambo nyonso ezali kaka ndenge ezalaki liboso ete ndeko na bango abimisama na lisangá.
7. Ndenge nini boyokani ya elimo ebongwanaka ntango moto moko na kati ya libota abimisami na lisangá.
7 Kasi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1981 (na Lifalanse), na lokasa 26, elobi mpo na moto oyo abimisami to oyo amilongoli na lisangá ete: “Boyokani nyonso ya elimo elongo na ye ekatani. Yango ezali bongo ata soki moto oyo abimisami na lisangá azali ndeko na biso mpenza, to ndeko ya libota moko oyo tofandi na ye ndako moko. . . . Boyokani ya elimo oyo kala ezalaki kati na ndako ekozala lisusu ndenge moko te. Na ndakisa, kati na libota epai mobali abimisami na lisangá, mwasi na bana na ye bakomiyoka malamu te soki mobali azali kotambwisa boyekoli ya Biblia to botángi ya Biblia to libondeli. Soki alingi kobondela, na ndakisa liboso na kolya, azali na lotomo ya kosala yango na ndako na ye moko. Kasi bato mosusu ya libota na ye bakoki kobondela moto na moto na motema na ye. (Mas. 28:9; Nz. 119:145, 146) Bongo soki moto oyo abimisami na lisangá mpe azali kofanda na ndako alingi kosangana na bango na boyekoli ya Biblia ya libota? Basusu bakoki kopesa ye nzela azala wana mpe ayoka, kasi bakotika ye te ete ateya to ayebisa bango makanisi na ye mpo na makambo ya losambo.”
8. Mokumba nini baboti oyo bazali baklisto bazali na yango epai na mwana moke oyo abimisami na lisangá mpe azali naino kofanda na bango ndako moko?
8 Soki mwana moke oyo afandaka na ndako ya baboti abimisami na lisangá, baboti oyo bazali baklisto bazali kaka na mokumba ya kobɔkɔla ye mpe kokolisa ye. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1988 (na Lifalanse), lokasa 20, elobi ete: “Bobele ndenge bakokoba koleisa ye, kolatisa ye mpe kopesa ye esika ya kofanda, basengeli mpe koteya ye mpe kopesa ye disiplini oyo eyokani na Liloba ya Nzambe. (Masese 6:20-22; 29:17) Na yango, baboti ya bolingo bakosala ebongiseli mpo ete báyekola na ye Biblia, ata soki abimisami na lisangá. Ntango mosusu, akoki kozonga na nzela soki bazali koyekola na ye moko. To bakoki kozwa ekateli ete akoba koyangana na boyekoli ya Biblia ya libota.”—Talá mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2001, nkasa 16-17.
9. Ndenge nini baklisto basengeli kotalela ndeko ya mosuni oyo abimisami na lisangá kasi afandi ndako moko na bango te?
9 Soki moto ya libota oyo abimisami na lisangá afandaka epai mosusu: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1988, lokasa 28 (na Lifalanse) elobi ete: “Makambo yango ekeseni mpenza soki moto oyo babimisi na lisangá to amilongoli na lisangá azali ndeko ya libota moko oyo afandi ndako moko te na libota na ye. Likoki ezali ya kosangana ata moke te na ndeko yango. Ata soki likambo moko ebimi na kati ya libota oyo ezali kosɛnga ete bákutana na ye, ekozala malamu kosangana na ye mingi te mpenza,” na boyokani na etinda ya Nzambe ya ‘kotiká kosangana na moto nyonso’ oyo asali masumu kasi aboyi kobongola motema. (1 Kol. 5:11) Baklisto ya sembo basengeli kosala milende mpo na koboya kosangana mpambampamba na ndeko yango, bakoki mpe kosala na ye mpenza mombongo te.—Talá mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1981, nkasa 28-29 (na Lifalanse).
10, 11. Moklisto akotalela makambo nini liboso ete andima ete moto moko ya libota oyo abimisami na lisangá azonga kofanda na ndako epai na bango?
10 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobeli likambo mosusu oyo ekoki kosalema: “Bongo soki ndeko mpenza na libota moko, lokola mwana to moboti oyo afandaka na ndako te, abimisami na lisangá mpe nsima na yango alingi kozonga kofanda na ndako? Na kotalela ndenge makambo ezali, libota yango moko nde ekoki kozwa ekateli na likambo yango. Na ndakisa, moboti moko oyo abimisami na lisangá akoki kobɛla to akoki lisusu kokokisa bamposa na ye te to akoki lisusu kosala makambo na ye ye moko te. Bana na ye baklisto bazali na mokumba ya kosalisa ye, na kotalela Biblia mpe bizaleli malamu. (1 Tim. 5:8) . . . Makambo bakosala ekotalela bamposa ya solosolo ya moboti yango, bizaleli na ye mpe ntina oyo mokonzi ya libota azali kopesa na bolamu ya elimo ya libota na ye.”—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1981, lokasa 27 (na Lifalanse).
11 Mpo na oyo etali mwana, lisolo yango ekobi boye: “Mbala mosusu, baboti oyo bazali baklisto bandimaki ete mwana oyo abimisami na lisangá mpe azali nzoto kolɔngɔnɔ te to azali konyokwama na maladi ya makanisi azonga na ndako mpo na mwa ntango moke. Kasi na makambo nyonso mibale, baboti bakotalela ndenge mwana na bango azalaka. Mwana yango oyo abimisami na lisangá azalaki kofanda na ndako na ye moko, mpe sikoyo azali lisusu na makoki ya kosala yango te? To alingi kozonga na ndako ya baboti libosoliboso mpo ayebi ete kuna bomoi ekozala mpasi te? Elimo na ye mpe bizaleli na ye ezali ndenge nini? Akokɔtisa ‘levire’ na kati ya libota?—Gal. 5:9, NW.”
12. Ebongiseli ya kobimisa moto na lisangá epesaka matomba nini?
12 Matomba ya kozala sembo epai ya Yehova: Kotosa ebongiseli ya Makomami ya kobimisa moto na lisangá mpe koboya kosangana na bato oyo basali masumu oyo baboyi kobongola motema, ekomemela biso matomba. Ebatelaka bopɛto ya lisangá mpe emonisaka polele ete tozali bato oyo balandaka mpenza bizaleli malamu ya Biblia. (1 Pet. 1:14-16) Ebatelaka biso na makambo ya mabe oyo ekoki kobebisa biso. (Gal. 5:7-9) Epesaka mpe moto oyo abungi nzela libaku ya kozwa matomba mingi na disiplini oyo bapesi ye, mpe yango ekosalisa ye abota “mbuma ya kimya, elingi koloba, boyengebene.”—Ebe. 12:11, NW.
13. Likambo nini libota moko esembolaki, mpe ebotaki mbuma nini?
13 Nsima ya koyoka lisukulu moko na liyangani ya zongazonga, ndeko mobali moko na lipasa na ye ya mwasi bamonaki ete esengelaki bábongola ndenge na bango ya kofanda na mama na bango oyo azalaki kofanda esika mosusu na bango mpe abimisamaki na lisangá elekaki mbula motoba. Mbala moko nsima ya liyangani, mobali yango abengaki mama na ye, mpe nsima ya koyebisa ye ete balingaka ye mingi, alimbolelaki ye ete bakoki lisusu kosolola na ye te, longola kaka soki likambo ya monene ebimi na libota oyo ekosɛnga ete bákutana na ye. Eumelaki te na nsima, mama na bango abandaki lisusu koyangana na makita mpe nsukansuka azongaki na lisangá. Lisusu, mobali na ye oyo azalaki mondimi te abandaki koyekola Biblia mpe na nsima azwaki batisimo.
14. Mpo na nini tosengeli kotosa na bosembo mpenza ebongiseli ya kobimisa bato na lisangá?
14 Ntango tozali kotosa na bosembo mpenza ebongiseli oyo euti na Makomami ya kobimisa moto na lisangá, tozali komonisa bolingo na biso mpo na Yehova mpe tozali kopesa eyano na oyo azali kotumola Ye. (Mas. 27:11) Bongo tokozwa mpenza mapamboli ya Yehova. Mokonzi Davidi akomaki mpo na Yehova ete: “Nakolongwa na nzela ya malako na ye te. Epai na moto ya sembo okomimonisa sembo.”—2 Sam. 22:23, 26, NW.