Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/7 nk. 26-27
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Kozipa motó—Ntango nini mpe mpo na nini?
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Basi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/7 nk. 26-27

Mituna ya batángi

Ntango nini ebongi mpenza ete mwasi moklisto alata litambala na makambo ya losambo?

Ntoma Paulo akomaki ete: “Mwasi nyonso oyo azali kobondela to kosakola kozanga ete motó na ye ezipama azali koyokisa mokonzi na ye nsɔni.” Mpo na nini? Mpo na kotosa ebongiseli ya Nzambe mpo na bokonzi: “Mokonzi ya mwasi ezali mobali.” Kobondela mpe koteya na lisangá ya boklisto ezali mpenza mokumba ya mobali. Yango wana, mwasi moklisto asengeli kolata litambala ntango azali kosala makambo oyo mbala mingi esengeli kosalema na mobali na ye to na ndeko mobali moko oyo azwá batisimo.​—⁠1 Bakolinti 11:​3-10, NW.

Makambo oyo esɛngaka ete mwasi moklisto alata litambala ekoki komonana kati na libala na ye. Na ndakisa, ntango libota mobimba bafandi esika moko mpo na koyekola Biblia to mpo na kolya, esɛngaka ete mobali nde ateya libota mpe abondela Nzambe mpo na bango nyonso. Nzokande, soki mobali yango azali mondimi te, mwasi akoki kokokisa mokumba yango. Yango wana, soki mobali na ye azali wana ntango azali kobondela na mongongo makasi mpo na ye moko mpe mpo na bamosusu, to ntango azali koyekola Biblia na bana na ye, ezali malamu ete mwasi moklisto alata litambala. Soki mobali na ye azali wana te, akolata litambala te mpo Nzambe apesa ye ndingisa ya koteya bana.​—⁠Masese 1:8; 6:⁠20.

Kasi, akosala nini soki na libota, mwana mobali azali mosaleli ya Yehova oyo amipesi mpe azwá batisimo? Lokola mwana mobali yango azali na lisangá ya boklisto, asengeli koteyama na bandeko mibali ya lisangá. (1 Timote 2:12) Soki tata na ye azali mondimi, ezali ye nde asengeli koteya ye. Kasi, soki tata na ye azali wana te, mama na ye asengeli kolata litambala ntango azali koyekola Biblia elongo na mwana oyo asilá kozwa batisimo mpe bana mosusu. Mwasi moklisto akopona ye moko soki akotika ete mwana mobali oyo asilá kozwa batisimo asala libondeli na boyekoli yango to na ntango ya kolya. Akoki komona ete mwana yango azali naino na makoki mpenza te mpe akoki komona malamu ye moko asala libondeli. Soki aponi kosala libondeli ye moko na ntango wana, asengeli kolata litambala.

Ntango azali kosala makambo mosusu na lisangá, mwasi moklisto asengeli kolata litambala. Na ndakisa, na likita mpo na mosala ya kosakola na mikolo ya pɔsɔ, ekoki kozala ete ndeko mobali oyo azwá batisimo azali te, bobele bandeko basi. Na mabaku mosusu, ekoki kokóma ete mibali oyo bazwá batisimo bazali te na likita moko ya lisangá. Soki ndeko mwasi asengeli kokokisa mikumba oyo esalemaka na ndeko mobali moko na makita ya lisangá to na likita mpo na mosala ya kosakola, asengeli kolata litambala.

Esengeli ete mwasi moklisto alata litambala ntango azali kobongola lisukulu na lokota mosusu to na elobeli ya bikela mpo na bato oyo bakufá matoi to ntango azali kotánga baparagrafe na mokanda oyo ezali kosalelama na likita ya lisangá? Te. Bandeko basi oyo bazali kosala mikumba wana bazali kotambwisa likita te, bazali mpe koteya te. Ndenge moko mpe, ndeko mwasi oyo azali kosala bilakiseli, azali koyebisa makambo oyo akutanaki na yango, to azali kosala masolo ya bana-kelasi na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi akolata litambala te.

Soki koteya na kati ya lisangá ezali mokumba ya mibali oyo bazwá batisimo, kosakola mpe koteya bato oyo bazali na kati ya lisangá te ezali mpo na mibali na basi. (Matai 24:14; 28:​19, 20) Yango wana, ata soki ndeko mobali moko azali wana ntango mwasi moklisto azali koteya bato oyo bazali Batatoli te, akolata litambala te.

Nzokande, bokeseni ezali na ntango oyo azali kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndako moko mpe ndeko mobali oyo azwá batisimo azali wana. Wana ezali ebongiseli ya koteya oyo motambwisi nde azali kokamba yango. Boyekoli wana ezali ebongiseli ya koteya na lisangá atako ezali kosalema epai mosusu. Soki ndeko mwasi Motatoli oyo azwá batisimo nde azali kotambwisa boyekoli wana, mpe ndeko mobali oyo azwá batisimo azali wana, asengeli kolata litambala. Kasi, ndeko mobali nde akosala libondeli. Ndeko mwasi akoki kosala libondeli te ntango ndeko mobali oyo azwá batisimo azali wana, bobele soki ezali na mwa bantina mosusu oyo epekisi ye, na ndakisa ndeko yango akokaka lisusu koloba te.

Na bantango mosusu, ndeko mobali moko oyo azwi naino batisimo te akoki kobima na ndeko mwasi moklisto mpo na koyekola Biblia na moto. Soki ndeko mwasi yango alingi, akoki kosɛnga ndeko mobali yango oyo azwi naino batisimo te ete atambwisa boyekoli. Kasi, lokola ndeko mobali akoki te kosala libondeli epai ya Yehova mpo na moklisto mwasi, ekozala malamu ete ye moko asala libondeli na boyekoli wana. Ntango azali kotambwisa boyekoli mpe ntango azali kosala libondeli na bisika ya ndenge wana, ndeko mwasi asengeli kolata litambala. Atako ndeko mobali wana azali mosakoli oyo azwi naino batisimo te, bato oyo bazali Batatoli te bakotalela ye lokola mosangani ya lisangá mpo ete azali kosakola.

Ntoma Paulo akomaki boye: “Mwasi asengeli kozala na elembo moko ya bokonzi na motó na ye mpo na baanzelu.” Basi baklisto bazali mpenza na libaku malamu ya kozala ndakisa malamu epai ya bamilio ya baanzelu oyo bazali ntango nyonso kotosa Yehova na bosembo. Ebongi mpenza ete basi oyo babangaka Nzambe bámonisa limemya na likambo etali kozipa motó soki esengeli bongo.

[Bililingi na lokasa 26]

Kozipa motó emonisaka limemya mpo na bokonzi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto