Biyano na mituna na bino
◼ Ndeko mwasi oyo azali mosakoli asengeli kozipa motó soki azali koyekola na moto Biblia mpe ndeko mobali oyo azali mosakoli azali wana?
Ntango ndeko mwasi azali kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo esalemaka mbala na mbala, mpe akei elongo na ndeko mobali, asengeli kozipa motó na ye. (1 Ko. 11:3-10) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2002, lokasa 27 elimbolaki boye: “Wana ezali ebongiseli ya koteya oyo motambwisi nde azali kokamba yango. Boyekoli wana ezali ebongiseli ya koteya na lisangá atako ezali kosalema epai mosusu. Soki ndeko mwasi Motatoli oyo azwá batisimo nde azali kotambwisa boyekoli wana, mpe ndeko mobali oyo azwá batisimo azali wana, ndeko mwasi asengeli kolata litambala.” Esengeli kozala bongo ata soki boyekoli ezali kosalema na ndako, liboso ya porte to na esika mosusu.
Kasi, soki moto oyo bazali kosolola na ye liboso ya porte to na esika mosusu akómi naino moyekoli ya Biblia te, ndeko mwasi asengeli te kolata litambala soki akei elongo na ndeko mobali oyo azali mosakoli, ata soki azongeli moto yango mpo na kolakisa ye ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka to kosolola na ye na moko ya mikanda oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato Biblia. Lokola mbala mingi koyekola na moto Biblia liboso ya porte to na esika mosusu ebandaka mokemoke na kozongela ye mbala na mbala, basakoli basengeli kotalela ndenge makambo ezali mpe kozala na makanisi oyo ebongi mpo na koyeba ntango nini esengeli kolata litambala.